Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/95 lok. 3
  • Tokoki mpenza kokumisa Yehova mingi na Apríli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki mpenza kokumisa Yehova mingi na Apríli?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi​—Eteni 1
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 3/95 lok. 3

Tokoki mpenza kokumisa Yehova mingi na Apríli?

1 Mokomi na nzembo Davidi azalaki na mposa ya solo ya kokumisa Yehova na lolenge moko oyo lobongi na ye, yango wana alobaki maloba oyo: “Ngai nakosanjola Yehova na monɔkɔ na ngai bɛ, ɛɛ kati na bato mingi nakosanjola ye,” (Nz. 109:30) Apríli ezali sanza moko malamu mpo na ‘kobakisa na lisanzoli na ye nyonso’ na kosanganáká mingi koleka na mosala ya kosakola. (Nz. 71:14) Tokanaka kozala kati na baoyo, mingi, bazali kosala bongo na kosanganáká na molɔngɔ́ ya babongisi-nzela basungi?

2 Tomibongisa uta sikawa: Masese 21:5 ezali kokundwela biso ete: “Moto akosala mosala na molende, akozwa litomba.” (Liloba lya Nzambe) Na bongo esengeli na biso koyebisa likambo yango epai na Yehova kati na libondeli, na kotaleláká naino ye liboso kati na mikano na biso. (Mas. 3:5, 6) Nsima na yango, totalela na sikisiki manáká na biso mpo na koyeba mbongwana nini esengeli kosala na ntina na kobomba mwayene ya ngonga mibale na mokolo mpo na mosala ya kosakola. Na “kosombáká” ntango likoló na misala mosusu, tokokoka kolekisa ntango mingi mpenza na mosala ya kosakola.​—Ef. 5:16, NW.

3 Tósololaka mpe tósalaka na bomoko: Ntoma Paulo alobaki mpo na basusu ete bazalaki mpo na ye “liziba na koyikisa mpiko” kati na kokokisama ya mosala na ye ya kosakola (Kols. 4:11). Tóloba na ntina na mikano na biso epai na baoyo balingi kobanda mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Apríli. Lisungi na bango ekopesa nzela na koyikisana mpiko kati na elimo. Mokɛngɛli na mosala akoki koyanola na mituna na biso oyo mitali makita mpo na mosala ya kosakola mpe bateritware oyo esalelami naino te.

4 Basusu bazali na makoki ya kozala babongisi-nzela basungi na lisalisi ya boyokani mpe lisungi ya libota na bango. Misala ya ndako mikoki, bobele mpo na mwa ntango moke, kokabolama na lolenge lokeseni. Esengeli mbala mosusu kotalela lisusu eleko oyo ebongisami mpo na kokokisa yango. Kosolola na ntina na makambo yango kati na libota ekoki kosalisa biso na kokokisa mokano na biso. Mpo na kolónga, esengeli kosolola malamu mpe kosala na bomoko.

5 Tozala ntango nyonso na elikya: Towela te kokanisa nokinoki ete ezalela na biso epesi biso nzela te mpo na kozala babongisi-nzela basungi. Bilenge oyo bazali banakelasi, baye bakoma basilá-sanza, bamama na ndako, batata ya mabota oyo basalaka misala oyo mizali kozwa bango mokolo mobimba bandimaki komipesa bango moko mpo na kozala babongisi-nzela basungi na Apríli. Bazali kosala na boyokani na maloba ya mokomi na nzembo oyo elobi ete “kosanjola ekoki epai na bato na sembo,” mpe ezalaki na bango mpasi te mpo na kobakisa milende oyo misengeli na kolekisa ngonga 60 na mosala ya kosakola. (Nz. 33:1) Ata soki tokoki te kozala kati na babongisi-nzela basungi, mpo na nini te kosangana na esengo na bango na kosakoláká mingi koleka?

6 Mpo na bato mingi, kobanda mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Apríli ezalaki fungola mpo na kokɔta kati na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola basilaki kobakisa mosala na bango, bamonaki ete ezalaki na bango nkaka te mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

7 Ee, Apríli ezali sanza moko malamu mpo na mosala mingi kati na teokrasi. Ezali na bawikende mitano mpenza, elingi koloba bapɔ́sɔ mitano mpe balomingo mitano. Tokoki kobanda na ntɔ́ngɔntɔ́ngɔ misala na biso mpe kosala ata na mpokwa. Tolingi kosala nyonso ekoki na biso mpo na kokumisa Yehova Nzambe na biso. Mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Apríli ezali mwango malamu ya komonisa botɔ́ndi na biso mpo na misala na ye mingi ya ngolu epai na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto