Tósalela malamu babuku ya kala
1 Yehova azali kopesa biso bilei kitoko ya mingi ya elimo. Na boumeli ya bambula, ndambo monene ya bilei yango ebimisamaki na mikanda ya nkasa 192. Na Yuli, bakolakisa buku nyonso oyo ezali na nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya 1982. Tozali naino na oyo ezali malamu? Lisangá ezali na yango kati na libombo na yango ya mikandá? Soki ezali bongo, ekozala malamu kotalela makambo mazali na kati mpe kopona makambo oyo makozala malamu mpo na kosalela na masolo na biso.
2 Soki tozali kolakisa buku “Que ton royaume vienne!,” tokoki kobanda na maloba oyo:
◼ “Ekoki sikawa pene na mbula 2 000 uta baklisto bazali kobondela mpo ete Bokonzi ya Nzambe eya. Na makanisi na yo, Bokonzi yango ekosala nini mpo na bato? [Tótika ete moto yango ayanola. Tófungola buku na lokasa 25 mpe tómonisa etanda oyo elakisi bamoko na mapamboli oyo ekokokisama solo na nsé ya Bokonzi.] Buku oyo ezali kolobela makambo oyo Bokonzi ekosala, mpe ezali kolimbola lolenge yo mpe libota na yo bokoki kozwa mapamboli yango. Soki ozali na mposa ya kotánga yango, nakosepela kotikela yo ekzamplere moko.”
3 Soki tozali kolakisa buku “Le bonheur—Comment le trouver?” tokoki mbala mosusu koloba ete:
◼ “Lokola mikakatano mizali mingi kati na mokili oyo, ebele ya bato bazali komona mpasi mpo na kozwa bolamu. Okanisi ete likoki ezali ya kozala na esengo atako ezalela nini ya makambo ya sikawa? [Tótika ete moto yango ayanola. Tófungola buku na lokasa 40, mpe tólobela bamoko na mikakatano oyo mikoki kopesa biso mawa na motema.] Biblia ezali komonisa biso lolenge tokoki kolonga makambo wana mpe kozala na esengo ezangi nsuka kati na mokili ya sika oyo ekozala na kimya. [Tófungola buku na lokasa 191, mpe tótánga Yisaya 32:17, 18.] Biblia ezali kopesa batoli ya sikisiki oyo ekoki kosalisa biso na kozala na esengo mingi kati na bomoi. Buku oyo ezali komonisa bamoko na batoli yango mpe ezali kolimbola lolenge ya kosalela yango.”
4 Soki tozali kosalela buku “La paix et la sécurité véritable: comment est-ce possible?,” tokolinga mbala mosusu komeka maloba oyo mpo na kobanda lisolo:
◼ “Moto nyonso alingaka kozala na bomoi kati na mokili epai kuna kimya mpe kobatelama ya solosolo ekozala. Na mawa nyonso, tosilá naino te kozala na bomoi motindo wana. Na makanisi na yo, esengeli nini mpo ete kimya mpe kobatelama ya solosolo ekóma mpenza likambo ya solo? [Tótika ete moto yango ayanola.] Nzambe azali na nguya esengeli mpo na kotya kimya awa na mabele, mpe alaki ete akotya yango.” Tómonisa elilingi ya lokasa 98, mpe na nsima tótánga Mika 4:3, 4. Soki moto yango amonisi bosepeli, tólimbwela ye makambo mosusu matali elikya ya Bokonzi. Tólakisa ye buku, mpe tókamata bibongiseli mpo na kozongela ye.
5 Tokopona mbala mosusu kosalela mwa buku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?” Soki ezali bongo, tokoki koloba ete:
◼ “Bato mingi bazali komituna mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi mingi boye. Mpo ete azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpo na nini azali kosala eloko te mpo na kotya nsuka na bampasi oyo tozali na yango? Okanisi nini mpo na yango? [Tótika ete moto yango ayanola.] Biblia endimisi biso ete Nzambe asundolá biso te.” Tófungola mwa buku na lokasa 27, paragrafe 22, mpe tótánga Nzembo 37:11, 29. Tóbenda likebi likoló na elilingi kitoko oyo emonisi makambo oyo tokoki kozela na mikolo mizali koya. Soki moto yango andimi mwa buku, tósɛnga ye ete tózongela ye mpo na komonisa lolenge tokoki kosalela yango mpo na koyekola Biblia.
6 Mikanda na biso misili komema ebele na bato na kotalela Biblia na mozindo. Makambo oyo bayekolaki masili kopesa bango elikya mpo na mikolo mizali koya ya esengo. (Nz. 146:5) Tozali na libaku kitoko ya kosalisa bango.