Tómonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bazalani na biso na kosaláká bozongeli ya sika
1 Tozali komonisa mposa na biso ya kopesa epai ya bazalani na biso libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi na kolukáká na ndako na ndako bato oyo bazali komonisa bosepeli mpo na yango. Na bongo, tosengeli kosɛnzɛla na kozongela bato oyo totikelaki bango mikanda na sanza ya Yuni, mpamba te yango ezali lolenge malamu ya komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bazalani na biso.
2 Soki totikaki buku “Que ton royaume vienne!,” tokoki kozongela lisolo na motindo boye:
◼ “Mbala eleki ntango tokutanaki, tosololaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo yango ekosala mpo na biso. Mosika te, Bokonzi yango ekobongola mabele ete makóma paladiso. Lokola tosilá naino kofanda kati na paladiso te, ekoki kozala mpasi na kokanisa lolenge yango ezali. Talá lolenge yango ekoki kozala. [Tómonisa elilingi oyo ezali na nkasa 4 mpe 5.] Ezali paladiso oyo nde esakolami kati na Biblia.” Tótánga Nzembo 72:7. Soki moto yango azali komonisa bosepeli, tófungola buku na lokasa 175, na paragrafe 3 mpe 4, mpe tólobela makasi oyo tosengeli kosala soki tolingi kozala na bomoi kati na Paladiso oyo ezali koya.
3 Talá lolenge tokoki kosala soki totikaki buku “Bonheur”:
◼ “Biso banso tolingaka kozala na esengo. Basusu bazali na mayoki ete likoki ezali te ya kozala na esengo ya solosolo kati na mokili ya lelo. Okanisi nini mpo na yango? [Tótika ete moto yango ayanola.] Elobamaka ete esengo ezali ezalela ya elimo. Soki elimo na biso etondi na esengo mpo na bazalani, na limemya epai na Nzambe mpe na elikya ya sikisiki mpo na mikolo mizali koya, tokoki mpenza kozala na esengo atako mikakatano nini tozali na yango.” Tótanga Nzembo 119:1, 2. Tólimbola ete boyekoli ya Biblia ezali kolakisa biso lolenge ya kolinga bazalani na biso, ya komonisa limemya epai ya Nzambe mpe ya kozwa elikya ya kobɔndisa mpo na mikolo mizali koya.
4 Soki totikaki buku “La paix et la sécurité véritable: comment est-ce possible?,” tokoki koloba na mokuse ete:
◼ “Bayangeli ya mokili bazali sikawa na likoki te ya kopesa kimya mpe kobatelama epai na bato. Bobele Yehova Nzambe nde azali na likoki ya kopesa yango. Biblia elimbweli biso oyo tosengeli kosala. [Tósolola likoló na makanisi ya paragrafe 1 mpe 2 ya lokasa 175, na nsima tótánga Yisaya 26:4.] Nakosepela kolakisa yo lolenge buku ekoki kosalisa yo.”
5 Epai na moto totikelaki ye mwa buku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?,” tokoki koloba ete:
◼ “Mbala eleki, natikelaki yo ekzamplere moko ya mwa buku oyo ebimisi motuna moko ya ntina mingi: ‘Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?’ Nsima ya kotánga yango, okómi na bosukisi nini? [Tótika ete moto yango ayanola.] Olendisamaki mpenza na botángi ya mikapo oyo mizali kolobela mokili ya sika oyo ekokóma paladiso, epai kuna tokozala na kimya. [Tómonisa elilingi ya lokasa 2 mpe 3, mpe tólobela makambo ya kosimba motema matali mokili wana ya sika.] Nandimisami ete yo mpe baoyo olingaka, bokosepela kozala kati na mokili motindo wana. Talá oyo paragrafe 16 na lokasa 31, elobi na ntina na yango.” Tótánga paragrafe yango, mpe tóbɛta nsɛtɛ na likambo oyo ete koluka Yehova elimboli koyekola makambo na ye mpe yango esalemaka na koyekoláká Liloba na ye, Biblia.
6 Yehova azali ndakisa ya kokoka ya Mobateli oyo ayebi kotya likebi, oyo azali kobatela bampate na ye. (Ezek. 34:11-14) Milende na biso ya sembo mpo na komekola ye na likambo oyo ezali komonisa bolingo na biso mpe ezali kopesa bolamu epai na bazalani na biso.