Nsango ya Bokonzi mpo na kokabola kati na mokili mobimba na eleko ebongi mpenza
1 Na mwalomingo 23 Apríli, lisukúlu moko ya sipesiale ekopesama oyo motó ya likambo na yango ezali mpenza kobenda likebi: “Nsuka ya mangomba ya lokuta ebɛlɛmi.” Na nsuka ya likita ya mokolo wana Nsango ya Bokonzi ya nkasa minei oyo ezali kopusa na kokanisa ekokabolama. Yango ezali na makambo mazali koleka na mikolo na biso mpe ekolanda kokabolama na mokili mobimba na boumeli ya pɔ́sɔ misato oyo ekolanda, kobanda na 24 Apríli kino na 14 Maí.
2 Bipai binso awa na mabelé, bato bazali kati na mitungisi. Ata esika nini oyo bango bafandi, bato batondi na mikakatano. Nsango ya Bokonzi ezali na litomba mingi mpo na baoyo bazali komitungisa mpenza mpo na makambo oyo mazali koleka kati na mokili, mpamba te yango ezali kobenda likebi na bango likoló na Liloba ya Nzambe, liziba ya kokoka ya batoli mpo na moto. (Nz. 119:105) Tozali kozela na motema likoló mpo na kozwa na 23 Apríli Nsango ya Bokonzi yango. Na kozelaka mokolo yango ete ekoka, makambo ya kosala mazali mingi mpo na kolengela kampanye wana ya mosala ya kosakola ya pɔ́sɔ misato ekolanda.
3 Moto na moto alendisami ete asangana na yango: Nani akoki kosangana na kampanye wana? Na ntembe te, baoyo nyonso basili kokoma basakoli bazali na motema likoló mpo na kosala yango! Ezali boni mpo na baoyo bazali naino koyekola mpe bazali koyangana mbala na mbala na makita ya lisangá? Basusu bazali koyangana elongo na biso uta mwa ntango mpe bazali kokola malamu. Soki bayokanisi bomoi na bango na mitinda ya Biblia, bakokisi masengami mpo na kokoma basakoli ya Bokonzi? Motatoli oyo azali kotambwisa boyekoli asengeli kolobela likambo yango elongo na moyekoli mpe, soki moyekoli yango alingi kosakola, bankulutu mibale bakotalela elongo na ye makambo mazwami na lokasa 99 kati na búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. Yango esengeli kosalema nokinoki, mpo ete baoyo nyonso bakokisi masengami mpo na kokoma basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoka kosangana na molende mpenza na kampanye ya sipesiale. Tokolendisa bayekoli ya Biblia oyo bakoki naino te kozala basakoli ete bapesa Nsango ya Bokonzi yango epai ya baninga na bango mpe epai ya basangani ya libota na bango.—Talá Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1998, lokasa 17, paragrafe 8.
4 Mosala yango ezali mpasi te; moto nyonso akoki kosangana na yango. Na ntango ya boyekoli ya Biblia na pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, baboti bakoki kobongisa mwa bilakiseli mpo ete mosangani nyonso ya libota amibongisa malamu mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi kati na mosala ya kosakola ndako na ndako. Eleki mpenza malamu kosalela lisoló moko ya pɛtɛ. Nsima na ebandeli mokuse ya lisoló, lakisa Nsango ya Bokonzi epai ya molobani na yo mpe lendisa ye ete atánga yango. Soki amonisi ete asepeli, zwa noti mpo ete bokoka kokoba lisoló mokolo mosusu. (1 Kol. 3:6, 7) Fungola ya bolóngi ezali kati na lisoló ya pɛtɛɛ mpe libongisami malamu.
5 “Mosala mingi” ekozala na Apríli mpe Máí. Na yango, soki batrakte yango ekomeli biso te na dati oyo elakami, tokoki kokabola yango nokinoki uta ntango tokozwa yango. Na kozelaka tokoki kosalela oyo tozali na yango kati na libómbo ya lisangá.—1 Kol. 15:58.