Kampanye ya monene Ekosalema kobanda mokolo ya 16 Ɔkɔtɔbɛ tii ya 12 Novɛmbɛ!
1 “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!” Wana nde motó ya likambo ya Nsango ya Bokonzi No. 37, oyo tokokabola na mokili mobimba kobanda na sanza oyo ezali koya. Banda mokolo ya 1 tii ya 15 ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, tokokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Nzokande, kobanda mokolo ya mosala moko 16 Ɔkɔtɔbɛ kino mokolo ya lomingo 12 Novɛmbɛ, tokosangana na kampanye ya kokabola Nsango ya Bokonzi No. 37. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na eleko ya kampanye, tokokabola Nsango ya Bokonzi ná bazulunalo oyo tokolakisa na sanza wana.
2 Baoyo bakoki kosangana na kampanye yango: Bandeko nyonso oyo basakolaka nsango malamu sanza na sanza bakosepela kosangana mingi na kampanye yango. Bamosusu bakomona malamu básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ozali na bana to bato oyo oyekolaka na bango Biblia, oyo bazali kokola na elimo? Salisá bango bákutana na bankulutu mpo básolola na bango mpo na koyeba soki bakokisi masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Bankulutu basengeli koluka kokutana na basakoli oyo batiká kosakola mpo na kolendisa bango básangana na kampanye yango, ntango mosusu ekosɛnga bápesa bango basakoli ya milende mpo bábimaka na bango.
3 Biro ekotindela masangá nyonso Nsango ya Bokonzi No. 37 mingi, mpo mosakoli mokomoko mpe mobongisi-nzela mokomoko azwa yango 50 to koleka. Bato mosusu oyo basepelaka na solo kasi bakómi naino basakoli te, bakoki kozwa yango 5 mpo bápesa bandeko mpe baninga na bango. Basakoli nyonso mpe babongisi-nzela nyonso basengeli kokoma motángo ya Nsango ya Bokonzi No. 37 oyo bakokabola mpe kotya motángo yango na nsima ya lokasa ya lapolo, ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ mpe ya Novɛmbɛ. Mpe na nsuka ya sanza mokomoko, mokomeli ya lisangá akosangisa mitángo yango nyonso mpe akotinda yango na biro ya filiale. Nsango ya Bokonzi oyo ekotikala nsima ya kampanye, tokokabola yango na lolenge nyonso ya mosala ya kosakola.
4 Okoloba nini: Sololá na bato na mokuse mpo ozwa nzela ya kokabola yango na bato mingi. Okoki koloba boye: “Tozali kokabola nsango oyo ya ntina mingi na mokili mobimba mpo esalisa bato nyonso. Ya yo yango oyo; ezali ya ofele. Nasɛngi yo otánga yango.” Mbala mosusu, ekozala malamu te tómema sakosi oyo ekomonisa mbala moko ete tozali na mosala ya kosakola, ntango tozali kokabola yango ndako na ndako. Kobosana te kokoma nkombo ya bato nyonso oyo basepeli.
5 Ndenge ya kokabola yango na teritware na bino mobimba: Na esika ya kokabola Nsango ya Bokonzi na balabala, bósala nde makasi ya kokabola yango ndako na ndako mpe na bisika ya mombongo ya teritware na bino. Komá nimero ya bandako nyonso oyo okutaki bato te, mpe meká kozongela bato yango na ngonga mosusu to mokolo mosusu ya pɔsɔ wana. Kobanda mokolo ya mosala moko 6 Novɛmbɛ, tokobanda kotika Nsango ya Bokonzi na bandako oyo tokuti moto te. Nzokande, soki lisangá ezali na teritware ya monene oyo ekosila te na mikolo oyo etyami mpo na kampanye, bankulutu bakotala soki ekozala malamu kobanda kotika Nsango ya Bokonzi na bandako oyo bokuti bato te banda mokolo ya liboso ya kampanye.
6 Kobomama ya “Babilone Monene” ezali koya na lombangu mpenza. Bato basengeli kobima kati na ye liboso ete abebisama nyɛɛ. (Emon. 14:8; 18:8) Zwá bibongiseli banda sikoyo mpo osangana na kampanye oyo ekosalema na mokili mobimba mpo na koyebisa bato ete nsuka ya mangomba ya lokuta ekomi pene!