Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/97 lok. 8
  • Tókabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 mingi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • “Mbula nkóto ya sika​—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Kampanye ya monene Ekosalema kobanda mokolo ya 16 Ɔkɔtɔbɛ tii ya 12 Novɛmbɛ!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Kobanda mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ tii 16 Novɛmbɛ, tokosala kampanye monene ya kokabola trakte!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Nsango ya Bokonzi No. 38 ekokabolama na sanza ya zomi na moko!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 11/97 lok. 8

Tókabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 mingi

1 Na boumeli ya sanza ya Novɛ́mbɛ mpe Desɛ́mbɛ, biso banso tokozala mpenza na mosala mingi. Na boumeli ya mikolo mwambe ya ebandeli ya sanza ya Novɛ́mbɛ, tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mpe, kobanda Mwalomingo 9 Novɛ́mbɛ kino Mwalomingo 14 Desɛ́mbɛ, tokosangana na kampanye oyo ekosalema na mokili mobimba, ya kokabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35. Tokozala na libaku malamu ya koyebisa nsango moko ya ntina epai na bato nyonso ya teritware na biso. Nsango yango ezali koyanola na motuna oyo: “Bato bakoyeba kolinga bazalani na bango mokolo mosusu?” Na boumeli ya kampanye sipesiale yango, tokokabola trakte Nsango ya Bokonzi na mikolo ya mosala kati na pɔ́sɔ; na wikende, tokokabola yango elongo na banimero ya sika ya bazulunalo oyo tozali na yango.

2 Nani akoki kosangana na kampanye yango? Lokola bameseni kosala yango, bankulutu bakozala bato ya liboso ya kosangana na mosala yango. Mosakoli mokomoko akosepela kokabola trakte Nsango ya Bokonzi, mpe na ntembe te basakoli mingi bakosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza moko to sanza nyonso mibale oyo kampanye ekosalema. Basakoli mosusu bakolinga kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, koleka ndenge bameseni kosala.

3 Tozali nde koyekola na moto moko oyo asili kopusana na boyekoli ya búku Boyebi mpe etikali moke ete akokisa masɛngami mpo na kobima na mosala ya kosakola? Ntango mosusu akoki kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te liboso ya ebandeli ya kampanye mpo ete akoka kosangana na yango. Mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi, tozali na mposa bobele ya maloba ya pɛtɛɛ mpo na kobanda lisoló. Na ndakisa, okoki koloba: “Nsango oyo ezali mpenza na ntina mingi na boye ete ezali kokabolama na mokili mobimba na nkotá 169 na sanza oyo. Nakosepela kotikela yo yango.” Ata bana mike bakoki komipesa na mosala yango ya kosepelisa mpenza.

4 Batambwisi ya boyekoli ya mokanda bakolendisa basangani nyonso ya etuluku na bango ete básangana mpenza na kokabolama ya Nsango ya Bokonzi No. 35. Ntango mosusu ezali na basakoli oyo batiká kosakola, oyo bakoki kozongela kosakola soki bazwi bilendiseli ya sikisiki. Liboso ya ebandeli ya kampanye, bankulutu bakokende kotala mokomoko na basakoli yango mpo na koyeba lolenge ya kosunga bango mpo ete bábima elongo na basakoli ya makoki kati na lolenge yango ya mosala ya kosakola.

5 Ntango nini tokokutana mpo na likita ya mosala ya kosakola? Kampanye oyo esɛngi ete makita ya mosala ya kosakola mabongisama na ntango ebongi. Mbala nyonso oyo likoki ekomonana, makita ya mosala ya kosakola masengeli kobongisama mokolo na mokolo, na wikende mpe na mpokwa. Makita yango masengeli kosalema na ngonga oyo ekopesa likoki na basakoli mpe na babongisi-nzela ete básala mingi kati na mosala ya kosakola. Makita ya mosala ya kosakola makoki mpe kobongisama na mpokwa mpo na banakelasi, bato ya misala mpe basusu. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akobongisa bateritware mingi mpo na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe kati na bisika ya mombongo, na ntina ete mosakoli mokomoko akoka kosangana na molende na mosala yango. Na bisika oyo basakoli bazali mingi, ekozala likambo libongi te ete basakoli bátondana mpo na kosakola na teritware moko.

6 Nini tokoki kosala mpo na bato oyo tokuti na bandako te? Mposa na biso ezali ete tokutana na bato mingi mpenza mpo ete tóyebisa bango ntina oyo basengeli kotánga trakte Nsango ya Bokonzi No. 35. Soki tokuti moto te na ndako moko, tózwa adresi mpe tózonga na ntango mosusu na boumeli ya mokolo yango. Soki nsima ya kosala milende mingi, tokutani na bato yango te wana tokómi na pɔ́sɔ ya nsuka ya kampanye na biso, tokoki kotika ekzamplɛrɛ moko ya Nsango ya Bokonzi na nsé ya ekuke, kokebáká ete emonana te epai na bato oyo bazali koleka na balabála. Na bakartyé ya bato nyonso, tózala pene mpo na kopesa Nsango ya Bokonzi epai na bato oyo bazali kotambola na balabála. Soki tozali kosakola na bamboka ya mike mpe ete teritware ezali monene koleka na boye ete tokozala na likoki te mpo na kotala yango mobimba na boumeli ya kampanye, tokoki kotika ekzamplɛrɛ moko ya Nsango ya Bokonzi na ndako mokomoko oyo tokuti moto te, na mbala ya liboso ntango tokei kosakola.

7 Mokano na biso ezali nini? Masangá masengeli kosala makasi mpo na kokabola, na teritware na bango mobimba, trakte Nsango ya Bokonzi oyo bazwaki, liboso ete kampanye esila na mwa 14 Desɛ́mbɛ. Soki teritware ya lisangá moko ezali monene mpe ete ezali likámá te kosakola moto ye moko na esika ya kozala mibale, ntango mosusu ekozala malamu kosala bongo. Yango ekosalisa biso ete tóyebisa nsango malamu na bato mingi mpenza, bato oyo babongi na yango. (Mat. 10:11) Ntango mosusu ekozala malamu ete tómɛma mwa trakte na mabɔkɔ mpe Biblia kati na libenga na biso to na sáki ya moke, na esika ya kosalela sakosi. Tózwa malamumalamu nɔ́ti ya bosepeli oyo tokutani na yango.

8 Tozali pene mpo na kobanda? Bankulutu bakotalela libosoliboso motángo ya bazulunalo ya kobakisa, oyo lisangá ekozala na yango mposa mpe bakosala komande na yango. Ezali na ntina te ya kosala komande ya Nsango ya Bokonzi mpo ete yango ekotindama na mbala moko na lisangá mokomoko. Babongisi-nzela minene, babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela basungi bakozwa moto na moto trakte 250 mpo na kokabola, nzokande basakoli bakozwa moto na moto trakte 50. Tokozala na mosala mingi. Tozali nde kozela na motema likoló ete tósangana na mosala yango oyo ezali kosepelisa mpenza? Ntembe ezali te! Na bongo, tókabola nsango ya Biblia oyo ezwami na trakte Nsango ya Bokonzi mingi mpenza!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto