“Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?”
1 Motuna oyo ezali na makanisi ya bato mingi na mokili mobimba. Atako bato basali makambo mingi na bikeke oyo eleki, kasi bato mingi balongoli motema, mpamba te makambo oyo etungisaka bato banda kalakala esili te. (Yobo 14:1; Nz. 90:10) Epai wapi bato bakoki kozwa lisungi?
2 Na boumeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ mpe ya Novɛmbɛ, tokozala na libaku malamu ya kosalisa bazalani na biso bázwa eyano na motuna yango. Ndenge nini? Tokokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Ezali na motó ya likambo “Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?” Na pɔsɔ mibale ya liboso ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mpe kobanda na mokolo ya yambo mwa 16 Ɔkɔtɔbɛ kino na mokolo ya mitano mwa 17 Novɛmbɛ, tokomipesa mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Na boumeli ya kampanye yango, tokomipesa mpenza mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36 na mikolo ya mosala. Na mikolo ya pɔsɔ mpe mikolo ya lomingo, tokokabola yango elongo na bazulunalo ya sika.
3 Okosala mpenza mosala yango? Bankulutu, basaleli na misala, mpe babongisi-nzela basengeli kopesa ndakisa mpo na kosala kampanye yango, mpamba te bango nde bazali bato ya liboso kati na mosala yango. Basakoli mingi bamitalelaki lisusu malamu mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza moko to sanza nyonso mibale oyo tokokabola Nsango ya Bokonzi No 36. Basakoli mosusu bazwi mokano ya kosala ngonga mingi koleka ndenge bazalaki kosala liboso na mosala ya kosakola.
4 Batambwisi ya Boyekoli ya Mokanda bakoki kosalisa mpe kolendisa moto mokomoko ya etuluku na bango mpo básala mingi na mosala yango ya kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Ntango mosusu, ezali na basakoli mosusu oyo basakolaka lisusu te. Bankulutu basengeli kokende kotala bango mpo na koyeba oyo basengeli kosala mpo na kosalisa bango. Ntango mosusu bibongiseli ekozwama mpo ete na boumeli ya sanza yango mibale, mosakoli moko oyo akɔmeli na mosala ya kosakola abima na moto mokomoko oyo asakolaka lisusu te. Mbala mosusu lolenge ya pɛpɛlɛ ya kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36 nde ekosalisa basakoli yango ete bázongela lisusu kosakola.
5 Yango ekozala mpe libaku malamu mpo na bato oyo bazali koyekola Biblia, baoyo bakómi mosika na boyekoli na bango na buku Boyebi mpe bakokisi masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te, ete bábanda kobima na mosala ya kosakola. Ata mpe bana bakoki kosala mosala wana ya esengo.
6 Ntina ya koloba mingimingi ezali te. Okoki koloba boye:
◼ “Nazali na esengo ya kopesa ntango na ngai mpo na kokabola nsango oyo ya ntina mingi epai ya libota mokomoko oyo bafandaka na [tángá nkombo ya engumba to ya kartye yango]. Oyo ya yo yango oyo. Nasɛngi yo otánga yango.” Ekozala malamu ete ómema sakosi te ntango ozali kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36.
7 Makita ya mosala ya kosakola oyo ebongisami malamu: Bankulutu basengeli kokeba ete ebongiseli ya kopesa litatoli ezala malamu mpe eyokana na mposa ya basakoli. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli mpenza kobongisa bateritware mingi mpo basakoli básakola mingi ndako na ndako mpe na bisika ya mombongo, mpo ete moto nyonso asala mingi na mosala yango. Soki likoki ezali, makita mpo na mosala ya kosakola esengeli kozala mokolo na mokolo, na bawikende mpe na mpokwa nyonso. Bokoki kozwa bibongiseli yango ya kosakola na mpokwa mpo bana-kelasi mpe bato oyo basalaka, mpe bato mosusu bákoka mpe kosakola na mikolo ya mosala.
8 Soki na bandako mosusu okuti bato te, okosala nini?: Mokano na biso ezali ya kosolola na bato mingi soki likoki ezali. Soki moto moko te azali na ndako ntango okei kotala bango, osengeli kokoma nimero ya ndako yango mpe kozonga lisusu na ngonga mosusu. Soki kino na pɔsɔ ya nsuka ya kampanye okutani kaka na bato yango te, okoki kotikela bango lokasa ya Nsango ya Bokonzi No. 36 na esika moko oyo baleki nzela bakomona yango te. Bankulutu bakoki kosɛnga na bandeko bátika Nsango ya Bokonzi No. 36 na bisika oyo bakuti bato te na mbala ya liboso na bamboka ya mosika to na bisika oyo teritware eleki monene mpo na kosala yango nyonso na boumeli ya kampanye.
9 Tósala mingi! Masangá esengeli kosala makasi mpo na kosilisa teritware na bango liboso ete kampanye esila na mokolo ya 17 Novɛmbɛ. Soki teritware na bino eleki monene, basakoli mosusu bakoki kokende bango moko na bisika oyo ezali na likama te mpe ezali malamu. Ebongiseli oyo ekopesa likoki ya kokutana na bato mingi oyo bazali na motema malamu. Kobosana te ete osengeli kokoma nkombo na baadrɛsi ya bato nyonso oyo basepeli.
10 Bankulutu basengeli koyeba liboso soki basakoli bakozala na mposa ya motango boni ya bazulunalo mpe kosala komande na yango. Ezali na ntina te ete bósala komande mpo na Nsango ya Bokonzi No. 36, mpo yango ekotindama mingi na lisangá mokomoko. Babongisi-nzela minene, babongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe babongisi-nzela basungi, mokomoko akozwa nkasa 200 mpo na kokabola, mosakoli mokomoko akozwa nkasa 50. Na yango, omibongisi malamumalamu mpo na kosala mingi mosala yango oyo ekosalema kaka na boumeli ya sanza mibale? Ezali mpenza libaku malamu tóyebisa bazalani na biso makambo oyo Nzambe alaki mpo na mikolo oyo ezali koya, boye te?