Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/95 lok. 4
  • Tólona mposa mpo na búku Bomoi ya seko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólona mposa mpo na búku Bomoi ya seko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 3/95 lok. 4

Tólona mposa mpo na búku Bomoi ya seko

1 Na ntango tozali kokende kotala bango, tozali komona, mingimingi, ete bato bazwami kati na “mitungiseli ya makambo ya mokili oyo.” (Malako 4:19) Tosengeli kokutana na mokumba moko ya mpasi: kolamwisa mpo na bango na lisalisi ya lisoló moko oyo ezali kopusa na kokanisa. Na ebandeli, bato mingi bapesaka bobele motuya moke na nsango na biso. Na kolobelaká eloko moko oyo etaleli bomoi na bango, tokoki kolamwisa mpo na bango mpo na nsango ya Bokonzi. Mpo na kobanda masoló, mwango eleki malamu ezali oyo ya kopona makanisi kitoko ya búku Bomoi ya seko. Tokoki koloba nini?

2 Tokoki kobanda boye:

▪ “Soki ozalaki na makoki, mokakatano nini ya nsomo ya eleko na biso mbele okokaki kosilisa? [Tiká moto yango ayanola mpe, soki emonani malamu, ndima ete yango ezali mpe likanisi ya bato mingi.] Kino lelo oyo, bakonzi ya biyangeli bazali komeka kopesa bolóngi moke likoló na mikakatano oyo mizali mingi lelo mpe ya minene. Kasi ezali na Moto moko oyo azali na likoki mpe na bolingo ya kotya nsuka na bampasi nyonso oyo ezali kotungisa bato. Talá oyo elobami na Nzembo 145:16. [Tángá mokapo yango mpe monisá bililingi ya bankasa 11 kino 13.] Paragrafe 14 ya lokasa 14 emonisi makanisi oyo touti kolobela mpe ezali kosuka na motuna oyo: ‘kasi ntango nini?’” Tólimbola ete búku ekoyanola na motuna yango mpe topesa yango epai na moto soki asepeli.

3 To na ndakisa tokoki koloba:

▪ “Mbala mosusu osilá kooka liyoki ya kozanga eloko, oyo bato bazalaka na yango nsima na liwa ya molingami moko. Mbala mosusu oyokaki mawa mpe ozangaki elikya mpe na ntembe te, omanyolaki likoló na motuna oyo: [Tángá mituna ya paragrafe 1, lokasa 76.] Ekozala elendiseli na koyeba biyano na mituna oyo, boye te? Okolendisama mbala mosusu na koyeba ete Biblia ezali kopesa elikya ya solo mpo na baoyo basili kokufa. [Tángá Yoane 5:28, 29.] Búku oyo ezali kopesa biso likoki ya koyeba nini ezali ezalela ya bakufi mpe elikya nini mikolo mizali koya ezali kobombela biso.” Tólobela nokinoki mikapo 8 mpe 20. Soki emonani ete molobani azali na mwa bosepeli, tósenga ye ete tótalela búku.

4 Mbala mosusu tokozwa likoki ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Na yango, tokoki na ndakisa koloba na maloba na biso moko ete:

▪ “Na eleko na biso, mokili ezali kozinda kati na mikakatano, mpe na ntembe te yo mpe ozali na oyo ya yo mikakatano. Na mawa, ezali mpenza bato oyo bayebi na bango likambo moko te nde bazali konyokwama mingi. Okanisi ete Nzambe akotya nsuka mokolo mosusu na mikakatano nyonso wana? [Tiká ye ayanola.] Nalingi komonisa yo oyo Nzambe alaki kosala mpo na bolamu ya baoyo nyonso bazali kosalela ye. [Tángá Nzembo 37:40, mpe fungolá búku Bomoi ya seko na lokasa 99.] Búku oyo ezali kolimbola mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe lolenge nini akosukisa yango.”

5 Soki ozali elenge mosakoli, okoki kolakisa búku na kosalelaka bililingi ya bankásá 156 kino 158. Okoki naino liboso kotuna motuna oyo:

▪ “Osepeli kozala na bomoi kati na mokili lokola oyo? [Tiká ye ayanola.] Moko na moko ya bililingi kitoko oyo etongami likoló na elaka moko oyo epesami kati na Liloba ya Nzambe, Biblia. [Lakisá mikapo ya Biblia.] Búku oyo ekopesa yo nzela na koyeba makambo mingi koleka likoló na elaka oyo Nzambe apesaki ya kobongola mabelé mobimba paladiso. Ezali na makambo ya kopesa bomoi mpe ebongi ete topesa yango ntango.”​—Yoane 17:3.

6 Ntango tozali kolakisa búku, tóbosana te koyebisa na molobani na biso motuya ya likabo mpe kolimbola ntina oyo yango esengami.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto