Biyano na mituna na bino
◼ Ndenge nini tokoki kobongisa lolenge ya bakomantɛrɛ na biso na makita?
Tozalaka motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na koyangana na makita oyo masalemaka na lisangá pɔsɔ na pɔsɔ. Yango ezali kopesa biso likoki ya komonisa kondima na biso mpe kolendisa basusu na nzela ya bakomantɛrɛ na biso. (Mas. 20:15; Ebe. 10:23, 24) Tosengeli kotalela yango ete ezali libaku malamu mpe kosala makasi ete tópesaka bakomantɛrɛ mbala na mbala. Ndenge nini tokoki kobongisa lolenge ya biyano na biso?
Ya liboso, tómibongisaka. Ezali likambo ya ntina ete tótánga makambo liboso mpe tókanisa likoló na yango. Tósala makasi mpo na kosimba elimo kati na yango makanisi mamonisami. Ata soki lisolo yango esilá kolobelama na mikolo mileki, tóluka makambo ya sika to makambo oyo likoló na yango bazali mpenza kobenda likebi. Tóbatela kati na makanisi na biso motó na likambo ya lisoló oyo tozali koyekola. Ntango tozali kobongisa bakomantɛrɛ uta na mokanda moko oyo mozali kopesa boyekoli mozindo ya mokanda moko ya Biblia, na ndakisa buku Emoniseli: kokokana na yango, tómeka kosolola eloko oyo ekangisi mokapo moko ya Biblia mpe makambo oyo mazali zingazinga na yango. Soki tosaleli makanisi wana, likoki na biso ya kokanisa ekolendisama. Yango ekosalisa biso na kobongisa bakomantɛrɛ ya malamu mpe kozwa esengo mpo na komibongisa na biso.
Bakomantɛrɛ oyo eleki malamu ezalaka mikuse, oyo emonisami kozanga mindɔndɔ mpe oyo euti na mokanda oyo mozali koyekolama. Moto oyo akopesa eyano liboso asengeli koyanola mbala moko na motuna, kotikeláká basusu likoki ya kobakisa makanisi mosusu ya eyano. Tosengeli koboya kopesa bakomantɛrɛ milaimilai mpe ya makambo kilikili, oyo ezali kolya ngonga mingi mpe ezali te kopesa nzela na basusu ete báyanola. Na esika ete tótángaka bakomantɛrɛ na biso liloba moko na moko kati na mokanda, tosengeli nde kosalela maloba na biso moko. Bakomantɛrɛ mosusu ekoki kokɔtisa makanisi oyo mamonisami na mikapo mitángami. Tóyokamela na likebi nyonso oyo basusu bazali koloba mpo ete tózongela mpambampamba te makambo oyo masili kolobama.
Ezali malamu kotombola lobɔkɔ mbala na mbala, kasi na paragrafe nyonso te. Tozali kolendisa bilenge ete básangana na kopesa bakomantɛrɛ. Soki ozali kokakatana mpo na koyanola, okoki koyebisa motambwisi liboso boyekoli ebanda ete olingi kopesa komantɛrɛ na paragrafe boye to boye, mpe mbala mosusu akopesa yo libaku ya koloba.
Biso banso tosengeli kosala makasi ya kozala na mwa likambo ya koloba na ntango bayangani babyangami na koloba. Tóbosana te ete bolóngi ya makita na biso etaleli mingimingi mposa na biso ya kopesa bakomantɛrɛ mpe lolenge malamu ya bakomantɛrɛ yango.—Nz. 26:12.