Tólakisa nsango malamu na elikya nyonso
1 Moko na moko kati na biso alingaka kozwa esengo mpe bosepeli kati na oyo azali kosala, na ndakisa na mosala motali kozalisa bayekoli. Mayoki wana ya bosepeli mautaka wapi? Libosoliboso mpo ete tozali na elikya wana tozali komipesa—mpe esengeli mpenza bongo—na kosalisa bazalani na biso. (Mas. 11:25) Lolenge na biso ya kolakisa nsango malamu esengeli komonisa ete tozali kondima mpenza makambo tozali koloba. Soki tokoloba na motema na biso mobimba, boye bosembo na biso mpe endimiseli na biso moko ekomonana polele. (Luka 6:45) Na kobongisáká makambo oyo tokoloba, tokomiyoka mpenza malamu ntango tokosolola na bato ya teritware na biso. Ekozala mpenza bongo na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ, ntango tokolakisa búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Makanisi malandi makosalisa biso na kolakisa nsango malamu na elikya nyonso.
2 Ntango tozali kolakisa búku “Création,” tokoki koloba na boyei na biso ya liboso ete:
◼ “Wana ezali biso kosolola elongo na baninga na yo ya kartyé, tomoni ete bamoko bazali kotya elikya na bango epai na Nzambe, nzokande basusu bazali kokakatana mwa moke mpo na kondimela ye. Okanisi boni mpo na yango? [Tóyoka eyano.] Talá likanisi oyo Biblia epesi na ntina na likambo yango. [Tótánga Baloma 1:20.] Tokoki komona bilembeteli ya ‘nguya ya seko mpe ya Bonzambe’ ya Nzambe na kotaláká biloko oyo azalisaki.” Tótánga kati na búku Création paragrafe ya nsuka ya lokasa 48 mpe tóbenda likebi likoló na biloko ndenge na ndenge oyo bizali kati na selile. To mpe tósalela paragrafe 18 na lokasa 147 mpo na komonisa lolenge nini nzeté, na kotalela motindo na yango ya kokamwisa oyo ezali kotambwisa mai kati na yango, ezali mpenza mosala ya Mozalisi. Tólakisa moto yango búku soki akondima kotánga yango. Soki akamati yango, tóyebisa ye likabo moke oyo asengeli kopesa mpe tólimbwela ye mpo na nini tozali kosɛnga likabo yango.
3 Ntango tozongi kotala baoyo tosololaki na bango ete Mozalisi azali, tokoki kosepela koloba boye:
◼ “Na mbala eleki, tolobelaki makambo oyo mamonisi ete Nzambe azali, elingi koloba biloko ya kokamwa oyo azalisaki. Okakatanaka mpo na kondima ete Ye oyo azalisaki mɔlɔ́ngɔ́ akoki mpenza komibanzabanza mpo na bomoi na biso na mikolo mizali koya? [Tótika ete moto yango ayanola.] Omoni ete Mozalisi ayebi bomoi ya moto mpo na mikolo mizali koya.” Tótánga Yisaya 46:9, 10. Na kotalela bosepeli oyo molobani na biso azali komonisa, tósalela bililingi mpe maloba oyo mazali pembeni na yango na mokapo 19, kati na búku Création, mpo na kolobela makambo kitoko oyo Nzambe alaki. Na nsima, tótánga paragrafe 1 ya mokapo 20 mpe tósɛnga ye boyekoli ya Biblia. Soki moto yango andimi, tóbanda boyekoli na búku Boyebi.
4 Tokoki komeka lolenge oyo mosusu ntango tozali kolakisa búku “Création”:
◼ “Wana ezali ngai kosolola na bato ya kartyé, namoni ete mingi kati na bango bazali na mposa makasi ya kofanda na libateli nyonso kati na mokili moko ya kimya. Na likanisi na yo, mpo na nini bato balóngi te na kokokisa makambo motindo wana? [Tóyoka eyano.] Bakonzi mosusu ya politiki mbala mosusu balobaka solo mpe basalaka malamu, kasi talá toli ya mayele oyo euti na Biblia.” Tótánga Nzembo 146:3, 4, mpe na nsima tótuna ete: “Ezali nde na moto oyo akoki kokokisa bamposa ya bato?” Tótánga vɛrsɛ́ 5 mpe 6. Tómonisa elilingi oyo ezali na lokasa 251 ya búku Création, mpe tóbenda likebi likoló na bolamu oyo ekozwama na boyangeli ya Nzambe. Tólakisa ye búku mpe tóyebisa ye likabo moke lisɛngami mpo na yango.
5 Soki mbala ya liboso tosololaki na ntina na boyangeli ya Nzambe, tokoki komeka koloba boye na ntango ya bozongeli ya sika:
◼ “Ntango nalekaki esili koleka mwa mikolo, tosololaki na ntina na kozanga makoki oyo moto azali na yango mpo na kotya kimya ya solosolo awa na mabelé. Soki obosani te, ozali komikundola ete tolobelaki ntina oyo Biblia ezali kopesa mpo na kozanga kolónga yango. [Tótánga lisusu Nzembo 146:3.] Omoni mpo na nini Nzambe azali kosɛnga na biso ete tótya elikya te epai na bato? [Tótika ete moto yango ayanola.] Nakanisi, okondima ete elikya mpenza mpo na kosilisama ya mikakatano nyonso esengeli kotyama epai na Nzambe. Nzembo 146:10 elimbweli biso mpo na nini tokoki kozala na elikya. [Tótánga vɛrsɛ́ yango.] Soki tolingi kozala bayangelami ya Bokonzi ya Nzambe, nini tosengeli kosala?” Tófungola búku Création na lokasa 250, tótánga paragrafe 13 mpe tólobela mingi Yoane 17:3. Tósɛnga na molobani na biso ete tómonisa ye lolenge bamilió ya bato bazwaki boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko na nzela ya boyekoli ya Biblia. Soki apesi nzela, tólakisa ye búku Boyebi mpe tóbanda boyekoli.
6 Wana tozali kosakola na bamagazini, tokoki kolakisa búku “Création” na lisalisi ya maloba mokuse oyo mpo na kobanda lisoló:
◼ “Lelo tozali kosala mosala moko ya ntina epai na bakomɛlɛsá. Biso banso totungisami mingi na ntina na bokóli ya mobulu mpe ya makambo mabe kati na etúká na biso. Okanisi nde ete ezali na moto moko oyo akoki kotya nsuka na mokakatano wana? [Tóyoka eyano.] Nzambe nde ayebi lolenge ya kosilisa yango.” Tófungola búku Création na lokasa 196, na nsima tótánga mpe tólimbola Masese 2:21, 22 oyo etángami na paragrafe 19. Tómonisa ye motó na likambo ya mokapo 16 mpe tólakisa ye búku yango.
7 Ntango tozongeli komɛlɛsá moko oyo totikelaki búku “Création,” tokoki koloba ete:
◼ “Ntango nalekaki na mbala ya liboso, nabɛtaki nsɛtɛ likoló na likambo oyo ete bobele Nzambe nde akoki mpenza kosilisa mpo na libela mikakatano na ntina na mabe mpe mobulu. Engebene elaka na ye, tokoki kolikya na motema moko ete kimya awa na mabelé ekozala likambo ya solo. Talá liponi oyo etyami liboso na biso.” Tótánga na lokasa 250, paragrafe 11 ya búku Création oyo elobeli Nzembo 37:37, 38. Tólimbola elilingi oyo ezali na lokasa 251 mpe tótánga fraze ya liboso ya paragrafe 14. Tósɛnga epai na molobani na biso ete tóyekolaka Biblia elongo na ye kozanga ete afuta mbongo, na esika na ye ya mosala to na ndako na ye, engebene mposa na ye.
8 Lokola tozali “basalani na Nzambe elongo,” tozali mpenza na bantina ya kozala na elikya wana tozali kosakola nsango malamu. (1 Kol. 3:9) Tokozwa mapamboli mingi epai na Yehova soki tobateli ntango nyonso elimo wana.