Tólakisa nsango malamu, koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu
1 Tozali komonisa botɔ́ndi na biso ya mozindo mpo na elikya ya Bokonzi ya Nzambe na kosanganáká na motema mobimba na mosala ya boklisto. Esengeli na biso kosangana na yango na koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu. Mpo na nini? Basáli bazali mingi te, nsuka ya ebongiseli mabe ebelemi mpe bomoi ya bato ya teritware ezali na likámá. (Ezek. 3:19; Mat. 9:37, 38) Na bongo, mokumba oyo ya ntina ezali kosɛnga na biso ete tósala milende kati na mosala. Na lolenge nini tokoki komonisa ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu mpenza? Na kobongisáká bokɔti ya masoló malamu, na kolukáká na molende nyonso bato bipai nyonso oyo bango bazali, na kozwáká banɔ́ti ya sikisiki mpo na bosepeli nyonso bato bamonisi, na kosaláká nokinoki bozongeli ya sika mpo na kokólisa bosepeli yango mpe na komikundoláká ete, mpo ete bomoi ya bato ezali na likámá, tosengeli kotalela mosala na biso na bopɔtu te. Makanisi oyo malandi makoki kozala na litomba ntango tozali komibongisa mpo na kolakisa nsango malamu na Mársi, koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu. Tokolakisa búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
2 Mbala mosusu tokoki kobanda lisoló na kolobeláká na mokuse mikakatano oyo bazalani na biso bazali kokutana na yango na lolenge oyo:
◼ “Bato mingi bandimaka Nzambe, kasi bamitunaka lolenge ya bomoi nini abombeli biso mpo na mikolo mizali koya. Okanisi nini na ntina na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Oyebi ete Biblia ezali komonisa biso polele mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na oyo azali kosala ete akokokisa yango?” Tófungola búku Emoniseli: kokokana na yango na lokasa 301. Na paragrafe ya liboso tótánga Emoniseli 21:1, mpe ndimbola na yango na eteni ya mibale ya paragrafe 2. Tólakisa elilingi ya lokasa 302 oyo ezali komonisa ndimbola na yango mpo na mikolo mizali koya. Na paragrafe 6, tótánga Emoniseli 21:4. Soki moto yango amonisi bosepeli, tólakisa ye búku mpe tóyebisa ye ntalo na yango. Tóyokana mpo na ntango mosusu ebongi mpo na kokóba lisoló na nsima.
3 Tokoki kozongela lisoló na Emoniseli 21:1, 4 na lolenge oyo:
◼ “Ntango nayaki mbala eleki, tosololaki na ntina na elaka ya Nzambe ya kobongisa libota ya sika ya bato oyo bakofanda awa na mabelé. [Tóbenda lisusu likebi likoló na lokasa 302 ya mokanda Emoniseli: kokokana na yango.] Okosepela ete libota na yo lizwa matomba na bizalela motindo oyo? [Tótika moto yango ayanola.] Motuna mozali kotunama: Bilaka ya Nzambe bibongi kotyelama motema? Talá oyo ye moko azali koloba na ntina na yango.” Tótánga Emoniseli 21:5, 6a na paragrafe 8 ya lokasa 303. Tótuna motuna ya paragrafe 9, na lokasa 303, mpe tótánga eyano, bakisá mpe frazɛ ya nsuka ya paragrafe. Tóyebisa ye soki akosepela koyekola Biblia kozanga kofuta mosolo. Tókamata bibongiseli mpo na kozongela ye mpe kobanda boyekoli.
4 Mingi bazali komitungisa mpo na kobakisama ya mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango; na bongo na bokutani na biso ya liboso tokoki koloba boye:
◼ “Bato mingi bazali komitungisa mpo na mikakatano oyo mizali kokómela biso. [Tótánga mwa mikakatano mosusu.] Yango esili koumela bambula mingi oyo bato ya politiki bazali kopesa bilaka ya kosilisa mikakatano yango libela, mpe basusu bameki kosala bongo. Engebene yo, mpo na nini makambo mazali sé kobeba? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia ezali kopesa ndimbola oyo bato mingi batalelaka soko moke te. Mokanda ya Emoniseli ezali kolobela etumba moko oyo esalemaki na likoló. Talá lolenge esukaki, engebene Emoniseli 12:9.” Tótánga vɛrsɛ́ yango mpe tófungola búku Emoniseli: kokokana na yango na lokasa 182. Tósalela elilingi mpo na kolakisa lolenge oyo Satana azali komikɔtisa na makambo ya bato. Tólakisa ye búku. Tópesana elaka mpo na kozonga kolakisa ye lolenge Nzambe akosilisa mikakatano ya bato.
5 Soki tolakaki ete tokozonga kolobela lolenge Nzambe akosilisa mikakatano oyo mizali kotungisa bato sikawa, tokoki komeka koloba boye:
◼ “Nazongi kotala yo bobele mpo ete tókóba lisoló na biso litali lolenge oyo Nzambe akosilisa mikakatano ya bato. Mbala eleki, tomonaki kati na Biblia ete Satana azali kokosa bato na mabelé mobimba. Lokola azali ekelamo ya elimo oyo eleki bato na nguya, okanisi ete mwango mozali mpo na kolongola bopusi mabe na ye? [Tótika moto yango ayanola.] Talá oyo Biblia ezali koloba na ntina na yango.” Tótánga mpe tólimbola Emoniseli 20:1-3. Na lisalisi ya elilingi ya nkasa 4 mpe 5 ya búku Boyebi, tólakisa lolenge bomoi ekokóma ntango bopusi ya Satana ekosila. Tósɛnga na ye ete ayekola Biblia mpe tómeka kobanda yango mbala moko.
6 Bato mingi basepelaka na ezingelo. Na bongo tokoki kobanda lisoló na lolenge oyo:
◼ “Tozali komona ete bato mingi bazali komitungisa na ntina na kobeba ya mopepe, ya mai mpe ya bilei. Na mikili mosusu, lolenge oyo ezingelo ekómi ezali kútu kotya bomoi na likámá. Lokola Nzambe azali Mozalisi ya mabelé, engebene yo akosala nini? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia elobi ete bato basengeli kozongisa monɔkɔ epai na ye na lolenge oyo bazali kosalela mabelé. [Tótánga Emoniseli 11:18b.] Kanisá ete ozali kofanda na mokili oyo mobebisami ata moke te!” Tólobela polele elaka oyo Nzambe apesi na ntina na paladiso na Emoniseli 21:3, 4. Tólakisa elilingi ya lokasa 302 ya búku Emoniseli: kokokana na yango. Soki moto yango amonisi bosepeli malamu, tólakisa ye búku mpe tópesa ye elaka mpo na kozonga kotala ye.
7 Wana tozongi kotala moto oyo amonisaki bosepeli mpo na Paladiso awa na mabelé, tokoki koloba boye:
◼ “Mbala eleki, tondimaki ete esengeli mpenza Nzambe akamata makambo ya bato na mabɔkɔ mpo na kosilisa mokakatano ya kobebisama ya mabelé. Kasi motuna mozali kotunama: tosengeli kosala nini mpo na kofanda kati na mokili ya sika mpe ya boyengebene ya Nzambe?” Tótánga Yoane 17:3. Tóbyanga molobani na biso ete azwa matomba na boyekoli ya Biblia oyo ekosalema kozanga kofuta mosolo mpe yango ekopesa ye nzela ete azwa boyebi ya sikisiki.
8 Oyo nde libaku malamu mpo na biso ete tósalelama lokola basáli kati na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema lelo oyo, mpe tósangana na mosala ya kosakola oyo ezali kobikisa bomoi ya bato! Tóbongisama biso banso mpo na kolakisa nsango malamu, na lobanzo ete ntango ezali kokende mbangu mpe ‘koyebáká ete mosala na biso ezali mpamba te.’—1 Kol. 15:58.