Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/97 nk. 2-7
  • Makita ya mosala mpo na Mársi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Mársi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 3 Mársi
  • Pɔ́sɔ ebandi na 10 Mársi
  • Pɔ́sɔ ebandi na 17 Mársi
  • Pɔ́sɔ ebandi na 24 Mársi
  • Pɔ́sɔ ebandi na 31 Mársi
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 3/97 nk. 2-7

Makita ya mosala mpo na Mársi

Pɔ́sɔ ebandi na 3 Mársi

Loyembo 27

10 mn: Mayebisi ya lisangá mpe mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Nsango ya Teokrasi.

15 mn: “Tósangana na mosala oyo mokozongelama soko moke te.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na kotalela ntango oyo epesami, pesá mwa makanisi mauti na búku Prédicateurs nk. 714-715, “Rester aux aguets: comment?” (Bósɛnzɛlaka ntango nyonso: Lolenge nini?)

20 mn: “Tólakisa nsango malamu, koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu.” (par. 1-5) Nsima ya kolobela na mokuse par. 1, motambwisi akosolola par. 2-5 elongo na basakoli mibale to misato. Bakotalela makanisi ya ntina ya bandakisa oyo epesami mpe bakolimbola mpo na nini maloba yango ya bokɔti na lisoló, to mpe mosusu ya lolenge wana, makoki kobota mbuma malamu kati na teritware. Basakoli bakomonisa bandakisa yango moko nsima na mosusu. Motambwisi akopesa bango longonya, akopesa bango batoli mpo na kobongisa malamu lolenge na bango ya kosala mpe akokundwela bango ntina ya kolobela makabo ya bolingo malamu. Na nsima, akotuna na bayangani ndenge nini tokoki kokokisa mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Pesá makanisi ya sikisiki na lolenge ya kobanda boyekoli na lisalisi ya búku Boyebi.

Loyembo 34 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 10 Mársi

Loyembo 29

5 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

10 mn: “Tólakisa nsango malamu, koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu.” (par. 6-8) Bongisá elakiseli moko na par. 6-7. Lobelá ntina ya kozonga kotala baoyo bamonisaki bosepeli.

30 mn: “Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000.” Ekosalema na mituna mpe biyano na mokɛngɛli na mosala. Lobelá etánda ya lok. 3. Talelá manáka oyo mapesami na lok. 6. Mosakoli mokomoko oyo azwa batisimo asengeli komitalela ye moko mpe kati na libondeli soko likoki ezali mpo na ye ya kozala mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko to koleka. Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokólisa mosala na bango ya kosakola na komityeláká sanza na sanza mokano ya bangonga.

Loyembo 43 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 17 Mársi

Loyembo 30

10 mn: Mayebisi. Bimisá makanisi ya ntina mauti na bazulunalo ya sika oyo ekoki kosalelama na mosala ya kosakola na boumeli ya pɔ́sɔ.

13 mn: “Ekaniseli: Molulu moko ya ntina mingi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisá bandeko basi mpe mibali ete básala sanza ya Mársi (oyo esili koleka katikati) sanza moko ya sipesiale na kozaláká babongisi-nzela basungi mpe, soki likoki ezali, kosala yango lisusu na sanza ya Apríli mpe ya Máí. Lobelá kosalelama ya nkasa ya libyangi na Ekaniseli.

22 mn: Tóbanda boyekoli ya Biblia epai na bato. Na basanza oyo euti koleka, bankóto ya mikanda ekabolamaki. Yango ezali mwango moko ya kobanda boyekoli ya Biblia na bato mingi. Talelá oyo esalemaki kati na lisangá mpo na oyo etali kokabolama ya babúku mpe mikanda mosusu. Lendisá basakoli ete bázonga kotala baoyo nyonso bamonisaki bosepeli. Sɛngá na basakoli ete bálobela milende oyo basengelaki kosala moto na moto mpo na kobanda boyekoli ya Biblia epai na bato. Bɛ́tá nsɛtɛ́ ete mokumba na biso ya liboso ezali ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Tokoki kosala yango malamu soki tozali kosala milende ya kosalela makanisi oyo mazwami na libakema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996.

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 24 Mársi

Loyembo 32

18 mn: Mayebisi. Tángá bankombo nyonso ya babongisi-nzela basungi mpo na Apríli mpe Máí. Yebisá ete ntango ezali naino mpo na kotondisa lokasa ya lisɛngi. Lendisá mokomoko ete asangana mpenza na mosala ya kosakola na Mwapɔ́sɔ 30 Mársi. Yebisá bibongiseli mosusu ya lisangá oyo bikamatami mpo na oyo etali makita mpo na mosala ya kosakola. Talelá malamumalamu Biyano na mituna na bino.

12 mn: “Lolenge nini tosengeli kotalela mabota na biso?” Lisoló kati na mwasi mpe mobali oyo bazali babalani. Bakozwa bikateli na lolenge oyo bakoki koyebisa nsango malamu epai na basangani ya libota na bango oyo bazali Batatoli te.​​​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1990, lok. 25-27.

15 mn: Mokanda oyo tokolakisa na Apríli: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Lobelá na mokuse makambo oyo mazali kopesa nzela na kokwea ya mabota kati na mokili. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1992, lok. 4-7.) Talelá makambo mazwami na búku na lok. 3. Lendisá bayangani ete bápona mikapo oyo bakoki kosalela mpo na kolakisa búku. Bendá likebi likoló na etánda oyo ebongi na koteya oyo ezwami na nsuka ya mokapo mokomoko. Elakiseli likoló na lolenge ya kolakisa búku ekosalema na mosakoli moko ya makoki. Yebisá na mokomoko ete abosana te kozala na mikanda mpo na wikende oyo.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 31 Mársi

Lisangá ekobongisa manáka na yango moko engebene bamposa na yango mpe bakolobela mosala ya babongisi-nzela basungi, oyo mokokóba kino sanza ya Máí.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto