Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/97 lok. 2
  • Ekaniseli: Molulu moko ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekaniseli: Molulu moko ya ntina mingi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 3/97 lok. 2

Ekaniseli: Molulu moko ya ntina mingi

1 Mwalomingo 23 Mársi, nsima ya kolala ya moi, tokokundola liwa ya Klisto. (Luka 22:19) Na ntembe te, molulu yango mozali na ntina mingi koleka! Na kotikaláká sembo epai na Yehova kino liwa, Yesu alakisaki ete moto akoki kotikala mpenza sembo epai na Nzambe ata liboso ya ezalela moko ya mpasi, komonisáká bongo bosembo ya boyangeli ya Yehova. (Ebe. 5:8) Lisusu, na liwa na ye Klisto apesaki mbeka ya bomoto ya kokoka ebongi mpo na kosikola bato, kopesáká likoki epai na baoyo bakomonisa kondima ete bázala na bomoi ya seko. (Yoa. 3:16) Na koyanganáká na molulu ya Ekaniseli, tozali komonisa botɔ́ndi na biso ya mozindo mpo na bolingo ya Yehova mpe mpo na mbeka ya Yesu oyo apesaki mpo na biso.

2 Tolendisami biso nyonso ete tólanda manáka ya botángi ya Biblia oyo mabongisami kobanda mwa 18 kino 23 Mársi, mazwami na Calendrier des Témoins de Jéhovah 1997. Epai mosusu, lisoló elongo na libota ya mikapo 112-116 ya búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo ekosalisa biso ete tómanyola malamu likoló na pɔ́sɔ eleki ntina kati na Lisoló ya bato.

3 Tokoki kosangana lisusu mingi koleka na mosala na biso ya kosakola na eleko ya Ekaniseli, boye te? Na Mársi, basakoli mingi bakozwa mpenza matomba na wikende mitano mpo na kozala babongisi-nzela basungi. Mpo na nini yo te? Biso banso tokoki kosala oyo ekoki na biso mpo na kolakisa epai na bato ntina ya kosangana na Ekaniseli. Lokola yango ekosalema na Mwalomingo, ekozala mpasi te mpo na bato mingi ete báyangana na yango. Tóbyanga baoyo nyonso bayekolaka Biblia bakisá mpe bato mosusu ya motema malamu. Tósolola na bango makambo oyo malobelami na búku Boyebi, na lokasa 127, paragrafe 18, oyo matali elambo oyo esengeli kosalema mbula na mbula.

4 Tómonisa motuya na molulu yango, oyo eleki ntina na 1997, na koyebáká mpenza oyo liwa ya Yesu elimboli mpo na biso. Tózala wana na mpokwa yango ya 23 Mársi mokolo oyo baklisto ya solo na mokili mobimba bakosala molulu ya Ekaniseli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto