Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/97 lok. 1
  • Lolenge nini tosengeli kotalela mabota na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini tosengeli kotalela mabota na biso?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kopesa litatoli epai ya bandeko na biso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Kabola mai ya solo epai na baboti na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge ya kosimba mitema ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 3/97 lok. 1

Lolenge nini tosengeli kotalela mabota na biso?

1 Mingi kati na biso tozali na mabota oyo mazali kati na solo te. Tolingaka mpenza ete bato yango oyo bazali bongo balingami na biso bátambola elongo na biso kati na nzela ya bomoi! Komibanzabanza na biso na ntina na bomoi na bango ya mikolo mizali koya ezalaka makasi soki ezali basangani ya ndako na biso. Yango esili mbala mosusu koleka bambula mingi uta tozali komeka kolendisa bango ete bálanda solo, kasi tosengeli te koloba ete likambo yango lizangi elikya.

2 Wana Yesu azalaki koteya, “bandeko na ye [bandimaki] ye te.” (Yoa. 7:5) Mokolo mosusu, basangani ya libota na ye bakanisaki ete mayele na ye ebebi. (Mko. 3:21) Nzokande, Yesu atalelaki bango te lokola babungi. Nsukansuka bandeko na ye bandimaki solo. (Mis. 1:14) Ndeko na ye ya mobali na nkombo Yakobo akómaki likonzí ya lisangá ya boklisto. (Gal. 1:18, 19; 2:9) Soki tolingi kozala na esengo ya komona basangani ya libota na biso kondima solo, tótika te koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi.

3 Tózala balendisi, kasi batungisi te: Bato oyo Yesu azalaki koteya bazalaki komiyoka ete balendisamaki, kasi bapusamaki na makasi te. (Mat. 11:28, 29) Azalaki kotondisa bango te na mateya oyo bakokaki kososola te. Soki tolingi kolendisa basangani ya libota na biso na mai ya solo, tómelisa bango na kɔpɔ, kasi na katini mobimba te! Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki ete: “Baoyo bazwaka matomba malamu koleka epai na basangani ya mabota na bango ezali baoyo balamwisaka likebi na bango na kopesáká bango litatoli mokemoke.” Na lolenge wana, mbala mosusu batɛmɛli bakoki kotuna mituna mpe nsukansuka, bakómaka na mposa ya solo.​—1 Pet. 2:2; talá mpe 1 Bakolinti 3:1, 2.

4 Baklisto mingi oyo babalá basili kopesa litatoli moko malamu na babalani na bango na kotikáká mokanda moko polele na lokasa oyo ekoki kobenda likebi na bango. Ndeko mwasi moko oyo azalaki kosala bongo azalaki kútu koyekola na bana na ye na lolenge ete mobali na ye ayokaka makambo bazalaki koloba, kopesáká bandimbola oyo ekokaki kozala na litomba mpo na ye. Mbala mosusu, azalaki koloba na ye ete: “Lelo, na boumeli ya boyekoli na ngai, nayekoli likambo boye to boye. Okanisi boni na ntina na yango?” Nsukansuka, mobali na ye andimaki solo.

5 Tózala na limemya, kasi motema lúkulúku te: Mosakoli moko ya mwasi alobi ete “ata basangani ya libota bazali na lotómo ya kokangama na makanisi na bango.” Na bongo tosengeli komonisa limemya na ntango bazali komonisa makanisi na bango to ntango baboi ete tóyebisa bango solo. (Mos. 3:7; 1 Pet. 3:15) Na komoniseláká bango motema molai, bolingo, na koyokáká bango malamu, tokoki kozala pene na kosimba mabaku ya kopesa litatoli malamu. Komonisa motema molai ekoki kobimisa matomba, lokola yango ekómelaki moklisto moko oyo, na boumeli ya mibu 20, ayikaki mpiko na minyoko mibimisamaki na mwasi na ye oyo azalaki na bindimeli lolenge moko na ye te. Lokola abandaki kobongwana, [mobali] alobaki ete: “Nazali na botɔ́ndi mpo na Yehova na lolenge asungi ngai ete nalóna ezaleli ya motema molai, mpamba te lelo oyo nazali komona matomba na yango: mwasi na ngai azali kotambola kati na nzela ya bomoi!”

6 Lolenge nini tosengeli kotalela mabota na biso? Ekoki kozala mbala mosusu ete, na lisalisi ya etamboli malamu na yo ya boklisto mpe na mabondeli na yo mpo na bango, “okolónga bango mpo na Yehova.”​—1 Pet. 3:1, 2, NW, maloba na nsé ya lokasa.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto