“Nakoyeba yango ndenge nini soki moto alimbweli ngai ntina na yango te?”
1 Ntango Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu atunaki mokube Moetiopia soki azalaki kokanga ntina ya makambo oyo azalaki kotánga na kati ya Liloba ya Nzambe, mobali yango ayanolaki ete: “Nakoyeba yango ndenge nini soki moto alimbweli ngai ntina na yango te?” Na esengo nyonso, Filipo asalisaki ye ete ayeba nsango malamu ya Yesu, mpe yango esalaki ete moto wana azwa batisimo nokinoki. (Mis. 8:26-38, NW ) Filipo azalaki kotosa etinda ya Klisto ya ‘kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango mpe koteya bango.’—Mat. 28:19, 20.
2 Tosengeli kotosa etinda ya kozalisa bayekoli, ndenge Filipo asalaki. Kasi, mbala mingi bato oyo toyekolaka na bango Biblia bakolaka nokinoki te na elimo ndenge mokube Moetiopia asalaki. Moto yango, azalaki prozelite oyo ayebaki Makomami malamumalamu, abongisaki motema na ye mpe esengelaki na ye bobele kondima ete Yesu azalaki Masiya oyo asengelaki koya. Ezali mpasi soki bato oyo tozali koyekola na bango bayebi Biblia te, mpamba te bakosamaki na mateya ya mangomba ya lokuta, to bazali na mikakatano mingi oyo ezali kotungisa bango. Nini ekosalisa biso ete tólonga kosalisa bato oyo tozali koyekola na bango Biblia ete bámipesa mpe bázwa batisimo?
3 Yebá bamposa ya elimo ya moto oyo ozali koyekola na ye: Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Sɛtɛmbɛ 1998 elobelaki ntango boni tosengeli koyekola na bato, na mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi. Epesaki toli oyo: “Ezali likambo ya ntina koyeba lolenge boyekoli ezali kokende, engebene ezalela mpe makoki ya moyekoli. . . . Tosengeli te kopimela moyekoli boyebi ya sikisiki na kokendáká na ye mbangumbangu na boyekoli bobele mpo na kosilisa buku. Moyekoli nyonso azali na mposa ya moboko makasi mpo na kotonga kondima na ye ya sika kati na Liloba ya Nzambe.” Na yango, ezali likambo ya mayele ete tóyekola nokinoki te makambo oyo ezali na buku Boyebi na likanisi ya kosilisa buku yango mobimba na boumeli ya sanza motoba. Mpo na bato mosusu ekoki kosɛnga basanza mingi koleka sanza motoba mpo na kosalisa bango ete bákola tii bázwa batisimo. Ntango ozali kotambwisa boyekoli pɔsɔ na pɔsɔ, lekisá ngonga nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola na Liloba ya Nzambe mpe andima yango. Mpo na bato mosusu, ekoki kosɛnga pɔsɔ mibale to mpe pɔsɔ misato mobimba mpo na kosilisa mokapo moko ya buku Boyebi. Yango ekosala ete bózala na ntango mingi ya kotánga mpe kolimbola ebele ya mikapo oyo ezali na kati ya likambo oyo bozali koyekola.—Lom. 12:2.
4 Kasi, ezali boni soki na ntango bosilisi buku Boyebi, omoni ete moyekoli asengeli lisusu kokolisa boyebi na ye mpo na solo to soki omoni ete azali naino kokakatana mpo na kosalela mateya ya solo oyo ayekoli mpe azali kokakatana komipesa na Nzambe? (1 Kol. 14:20) Okosala lisusu nini mpo na kosalisa ye atambola na nzela oyo ezali komema na bomoi?—Mat. 7:14.
5 Kokisá bamposa ya elimo ya moto oyo ozali koyekola na ye: Soki emonani ete moto oyo ozali koyekola na ye azali kokola na elimo, ata soki azali kokola malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe azali kosepela na makambo oyo azali koyekola, okoki kolanda koyekola na ye Biblia na buku ya mibale nsima ya kosilisa mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi. Mpo na bato mosusu ekozala mpenza na ntina te koyekola buku ya mibale, kasi soki emonani ete ezali mpenza na ntina, landá koyekola na moto yango na buku Paix véritable, buku Tosangani esika moko mpo na kosambela, to buku Parole de Dieu. Basakoli mingi basalelaka babuku na bango moko soki yango ezali na lisangá te. Bokoki kosala komande bobele mpo na buku Parole de Dieu. Ata ndenge nini, esengeli koyekola liboso mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi. Ata soki moto oyo ozali koyekola na ye azwi batisimo liboso ete asilisa koyekola buku ya mibale osengeli ntango nyonso kokoma moto yango na kati ya lapolo na yo lokola moyekoli ya Biblia, kokoma bozongeli ya sika, mpe ngonga oyo ozali kolekisa mpo na koyekola na ye.
6 Yango elingi nde koloba ete baoyo bauti kozwa batisimo sika mpe bayekolaki kaka buku moko basengeli sikoyo koyekola buku mosusu ya mibale? Yango ezali mpenza bongo te. Kasi, ekoki kozala ete bamosusu balɛmbi to bazali kokola te na kati ya solo, mpe bakoki komiyoka ete bazali na mposa ya kozwa lisalisi mpo básalela mpenza mateya ya solo na bomoi na bango. Esengeli kosolola na mokɛngɛli na mosala ya kosakola liboso ya kobanda koyekola na basakoli oyo basilá kozwa batisimo. Nzokande, soki oyebi baoyo bayekolaki buku Boyebi kala mpe bakolaki te kino komipesa mpe kozwa batisimo, okoki kotala soki bakolinga kobandela boyekoli na bango ya Biblia.
7 Ezali elembo ya bolingo ya boklisto soki tozali kotyela moto mokomoko oyo tozali koyekola na ye likebi. Mokano na biso ezali ya kosalisa moyekoli ayeba solo ya Liloba ya Nzambe malamumalamu. Na nsima akoki komipesa mobimba na solo mpe komipesa na Yehova, akomonisa yango na kozwa batisimo ya mai, mpamba te ayebi malamu ekateli oyo azwi.—Nz. 40:8; Ef. 3:17-19.
8 Oyebi likambo oyo esalemaki ntango mokube Moetiopia azwaki batisimo? ‘Akendaki na nzela na ye na esengo,’ mpo ete akómaki moyekoli ya sika ya Yesu Klisto. (Mis. 8:39, 40) Tiká ete biso na bato oyo tozali kolakisa bango nzela ya solo tózwa esengo ya kosalela Yehova Nzambe—ezala lelo oyo mpe libela na libela!