Manaka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya
Liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya oyo likobanda na Sɛtɛ́mbɛ lizali na motó na likambo ete: “Tosá malako ya Nzambe mpe zalá na bomoi.” (Mas. 4:4) Liyangani yango likolimbwela biso mpo na nini kotosa mibeko ya Nzambe ezali likambo ya bozito te. Likomonisa biso mpe na makambo nini kokokisa mokano ya Nzambe epesaka elendiseli mpe bolamu ya solosolo, bakisa mpe elikya mpo na mikolo mizali koya.—Mat. 11:28-30; Yoa. 13:17.
Bato oyo balingi kozwa batisimo na liyangani yango, na boyokani na etinda ya Klisto, basengeli koyebisa mokɛngɛli-mokambi, ye akozwa bibongiseli oyo esengeli.—Mat. 28:19, 20.
Na boumeli ya masukulu-matongani, tokomona makambo mabongi na kosalelama oyo kati na yango tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bandeko na biso. (Yoa. 13:34, 35; 1 Yoa. 5:3) Tokotalela mpe toli ya kolendisa oyo euti na Nzembo 19 mpe 119. Atako ekomamaki esili koleka bankóto ya bambula, tokomona ete ezali na ntina mpo na biso lelo oyo.
Lisukulu mpo na bato nyonso oyo mokɛngɛli ya etúká akosala ezali na motó na likambo ete “Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye.” (Mos. 12:13) Na lisukulu na ye ya nsuka, mokɛngɛli ya zongazonga akomonisa epai na bilenge ete bakoki kozwa bolamu na bomoi na bango uta sikawa mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko na mikolo mizali koya. Mpo na kosukisa liyangani, mokɛngɛli ya etúká akotánga matomba mingi oyo tokoki kozwa na komitambwisáká engebene bolingo, oyo ezali bongo ‘mobeko ya mokonzi.’ (Yak. 2:8) Na bongo, tózanga na liyangani yango te!