Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 9/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ

Pɔsɔ ebandi na 6 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 190

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Mai mpo na ekólo mobimba mpe mpo na lisangá na bino.

Min. 17: “Ozali kosala na mokano?” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá mpe makambo oyo ezali na buku Lisanga lokasa 90 kino 91. Lendisá bandeko nyonso bázala na molende na mosala ya kosakola mpe bápesaka litatoli ya mozindo.

Min. 18: “Baboti​—Bópesa bana na bino ndakisa malamu.” Ekosalema na nkulutu moko, maloba ya ebandeli esengeli kozala mokuse. Na nsima akosolola na bandeko mibale oyo bazali na mabota. Bakomonisa mposa na bango ya kobatela bana na bango na bizaleli ya mabe oyo bamonaka na eteyelo, na televizyo, mpe epai ya bandeko na bango mosusu oyo bazali Batatoli te mpe epai ya bato mosusu. Bandeko bakolobela bizaleli oyo emonisaka kozanga limemya, elobeli mpe molato ya bato na mokili, mpe lolenge ya kominanola oyo ezali malamu te. Nsima ya kopesana makanisi mpo na komonisa ndakisa malamu, bakolobela lolenge oyo bakoki kosala mpo na kokolisa esengo mpo na boyekoli ya libota, na makita ya lisangá, mpe na mosala ya kosakola.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzeli ya 1 Yuli 1999 nk. 7-22, mpe Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ 1991 na lokasa 8 kino 9 (na Lifalanse).

Loyembo 101 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 13 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 171

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na biso na mbula eleki? Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Lobelá makambo ya ntina kati na lapolo ya lisangá mpo na mobu ya mosala 1999. Pesá bandeko longonya mpo na mosala malamu oyo basalaki na mbula eleki. Monisá bisika oyo bandeko basengeli kobongisa. Bendá likebi na milende oyo bandeko basalaki mpo na koyangana na makita mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia. Lobelá makambo oyo bandeko bakoki komityela lokola mikano mpo na mobu ya sika.

Min. 20: “Ndenge nini okoki kosolola na moto ya Lingomba ya Bahindu?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Monisá ntina ya koluka likambo moko oyo ekopesa nzela ya kosolola na moto ya Lingomba ya Bahindu. Lobelá mpe makambo oyo ekobenda likebi ya moto ya Lingomba ya Bahindu. Monisá ndenge nini tokoki kosalela makanisi oyo epesami mpo na kopesa litatoli epai ya bato na mangomba mosusu. Bongisá malamu elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kopesa litatoli epai ya moto ya Lingomba ya Bahindu. Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na Lingomba ya Bahindu, talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 1998, buku Comment raisonner na lokasa 22; mpe buku L’humanité à la recherche de Dieu, na mokapo 5.

Loyembo 140 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 193

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 18: Tósalela malamu buku Créateur. Lisukulu mpe bilakiseli. Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Aprili 1999 elimbolaki ete tokoki kolakisa buku Créateur ntango nyonso oyo tokutani na bato oyo (1) bandimaka Nzambe te to (2) bandimaka Nzambe kasi bayebi te soki azali nani to bayebi bizaleli mpe mikano na ye te. Tokoki kosalela mituna mpe masolo mosusu oyo ekoki kobenda likebi ezali na lokasa ya nsuka ya buku yango mpo na kopesa bato mposa ya kotánga buku yango. To tokoki kosalela makambo oyo ezali na lokasa 152 ya buku yango. Mosakoli akoki kotuna boye: “Epai wapi tokoki kozwa toli oyo eleki malamu mpo na kosilisa mikakatano makasi oyo ekoki kokómela biso?” Akoki kolakisa moto yango ndenge bato mosusu ya lokumu bakumisaki Lisolo ya Yesu likoló ya Ngomba, kosɛnga apona moko na makambo nsambo mamonisami oyo ezali kosepelisa ye mingi, mpe na nsima akoki kotánga mwa mikapo oyo ezali na lokasa yango. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela makanisi yango mpo na kokabola buku Créateur epai ya bato. Okomonisa ntalo ya mokanda na elakiseli yango. Lendisá bandeko nyonso bámemaka buku yango na mosala ya kosakola, bázala pene ya kolakisa yango epai ya bato ntango nyonso.

Loyembo 175 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 141

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá basakoli nyonso bápesa lapolo ya sanza ya Sɛtɛmbɛ. Lendisá bandeko nyonso bámibongisa mpo na kokabola bazulunalo mingi na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lobelá mwa makanisi oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Novɛmbɛ 1996 na lokasa 8, oyo elobeli lolenge ya kobongisa bilakiseli. Monisá bazulunalo ya sika mpe lobelá mwa makambo mosusu oyo ezali na kati mpe salá elakiseli moko to bilakiseli mibale. Monisá ndenge ya kolobela ntalo ya zulunalo epai ya moto oyo asepeli kozwa yango.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.

Min. 15: “Losambo ya solo ezali kokende liboso na Mpoto ya Ɛsti.” Nkulutu moko akosala lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá baeksperiansi ya bokoli na bamboka yango ndenge oyo ezali na ba Annuaires ya sika.

Loyembo 87 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto