Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/10 lok. 2
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tyá likebi na maloba ya bulɛɛ
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Tómitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 1/10 lok. 2

Biyano na mituna na bino

◼ Ndenge nini mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ mpo tólandaka makita na kimya? (Mib. 31:12)

Mpo na komonisa limemya makasi epai ya Yehova mpe mpo na makita ya lisangá, biso nyonso tolendisamaka ete tókómaka liboso ya ngonga mpe tóbongisa mitema na biso mpo na koteyama na Yehova. Ezali malamu tófandaka na bakiti ya liboso mpo tótika bakiti ya nsima mpo na baboti oyo bazali na bana ya mike mpe bandeko oyo bakómaka mbala mosusu nsima ya ngonga. Liboso makita ebanda, tosengeli kokanga batelefone na biso to kotya yango na vibreur mpo elongola likebi ya bandeko te. Makɛlɛlɛ mpe mobulu ekozala mingi te soki bayangani nyonso bazali na limemya oyo ebongi na esika ya losambo, banda ebandeli tii nsuka ya makita.​—Mos. 5:1; Flp. 2:4.

Ntango moto ya sika abandi koyangana na makita, ekozala malamu ndeko moko oyo ayebi ye afandaka pembeni na ye. Yango ezali na ntina, mingimingi soki moto yango azali na bana ya mike oyo basengeli mpe komesana kolanda mateya. Koyangana na makita ekoki kozala likambo ya sika mpo na libota yango. Soki ezali bongo, na ntembe te bakosepela mingi soki bafandisi bango na bakiti ya nsima, epai bakobenda mpenza likebi ya bato te ntango baboti balingi kobima na bana mwa moke libándá mpo na kobondela bango. (Mas. 22:6, 15) Ezali malamu te ete mabota oyo bazali na bana ya mike báfanda na eteni mosusu ya Ndako ya Bokonzi, epai bana bakoki kokanisa ete bakoki kosala makɛlɛlɛ ndenge balingi. Mbala mingi, ezalaka malamu moboti abima na mwana libándá mpo na kopesa ye disiplini to kokokisa mposa na ye, mpe na nsima azonga na ye na kati ya Ndako ya Bokonzi.

Bandeko oyo bapesaka bisika ya kofanda bazali na mokumba ya kobatela kimya oyo ebongi na ndako ya losambo. Bandeko yango basalisaka mabota mpe bandeko oyo bakoki koya na nsima ya ngonga mpo bázwa bisika malamu ya kofanda. Bandeko yango basɛnzɛlaka ete bázala na boboto mpe na bonkonde ntango bazali kosalisa bayangani mpo bázwa bisika malamu ya kofanda, kozanga ete bábungisa likebi ya bato mosusu. Basalelaka bososoli mpo na kopekisa likambo nyonso oyo ekoki kobungisa likebi ya bayangani. Soki mwana moko abandi kosala mobulu, bandeko yango bakoki kosɛnga ye na boboto epai ya moboti na ye.

Ntango tozali na makita mpo na kosambela Yehova, biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo kimya ezala, mpo tóyekola makambo etali Nzambe mpe mokano na ye ya kosala mokili ya sika epai kimya mpe bosembo ekozala.​—Ebr. 10:24, 25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto