‘Tiká ete makambo na bino nyonso esalema na bolingo’
1 Moto moko oyo asalaka na biro ya ministre, azalaki na liyangani moko ya etúká mpe alobaki boye: “Ndenge na bino ya kobongisa makambo mpe ndenge bozali kosala na mobulu te ekamwisi biso mingi. Yango ezali kotinda bato básepela na bino mpe bápesa bino limemya.” Maloba ya longonya motindo wana mpo na etamboli na biso na miso ya bato nyonso elendisaka biso. Yango emonisi ete lokola lisangá, ‘tozali kosala ete makambo na biso nyonso esalema na bolingo.’ (1 Kol. 16:14) Kasi, ezali na makambo mosusu ya ntina oyo soki tobongisi yango te ekobebisa lokumu malamu oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango.
2 Tómipesa biso moko mpo na kolakisa bolingo na biso: Mpo liyangani esalema malamu, esengeli ete ebongisama malamu. Yango wana, tozali kosɛnga bino ete bómonisa elimo ya komipesa mpo na kosala elongo na komite ya liyangani oyo eponami na teritware na bino. Tozali kopesa longonya na baoyo nyonso bazali komipesa bango moko mpo na kotonga mpe kolongola bisika oyo badepartema ndenge na ndenge ya liyangani esalaka. Ya solo, misala ya kosala ezalaka mingi. Mbala mingi, esɛngaka ete tótya bopɛto na esika yango mobimba. Esɛngaka koluka bandeko mpo na kobatela biloko na biso. Ntango liyangani ezali kosalema esɛngaka ete bandeko mosusu bátya bopɛto na batwalɛti.
3 Balapolo oyo ezali kouta na bikisa mingi ezali komonisa ete bobele bandeko moke nde bamipesaka mpo na kosala misala ya kobongisa mayangani. Kati na baoyo bamipesaka, bamosusu basɛngaka ete Biro efuta bango mpe epesa bango biloko ya kolya. Bandeko mosusu basɛngaka mbongo mpo na mosala oyo basali to mpo na kopesa biloko na bango ya mosala. Bayebaka te ete mayangani mosantu oyo tosalaka ezali kopesa bango libaku malamu ya kopesa makabo ya bolingo malamu mpo losambo ya pɛto ya Yehova ekende liboso.—Nz. 110:3.
4 Na ntango ya kala, ntango basaleli ya Yehova bazalaki kotonga tempelo mpe bifelo ya Yelusaleme, ezalaki ntango moko ya esengo mpo na bango. Basaleli ya Nzambe bazalaki komona ete ezali ntango oyo basengeli komonisa botɔndi na bango epai ya Yehova. Basi na mibali bazalaki komema makabo moto na moto na kotalela makoki na ye mpe bazalaki komipesa bango moko mpo na kosala misala ndenge na ndenge.—Ezl. 2:64, 65,69; 3:1, 3.
5 Ndakisa na bango ekoki koteya biso makambo mingi. Bazalaki komipesa mobimba mpe na bolingi na bango moko mpo na kosala misala nyonso. Bazalaki mpenza na bomoi ya mpasi. Na mikolo ya Ezela, baoyo bamipesaki na mosala ya botongi bazalaki bango nyonso bato ya sika na engumba yango. Lokola bafandaki mingi na mboka mopaya esengelaki ntango mingi mpo bázwa bisika na bango ya kofanda mpe bábongisa mboka. Lisusu, banguna na bango baoyo bazalaki kolinga te ete losambo ya solo ezonga na Yelusaleme bazalaki konyokola bango. Bazalaki mpenza na bomoi moko ya mpasi. (Ezl. 4:1-5) Kasi balɛmbaki te. Atako bazalaki bato ya sika na engumba yango, basɛngaki te ete bápesa bango mbongo mpo bamipesaki mpo na kotonga tempelo. Kutu, basalaki mpenza mosala na “gɔigɔi” te mpe Yehova apambolaki bango.—Ezl. 4:22.
6 Kobongisa liyangani ezalaka ntango ya esengo. (Det. 16:15) Lisangá mokomoko, libota mokomoko ya baklisto, basengeli koyeba ete likambo yango etaleli mpe bango. Soki bankulutu bapesi ndakisa, bakoki kolendisa bandeko na lisangá. Ntango liyangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe” ekómaki pene ya kosalema, bankulutu ya lisangá moko ya ekólo na biso bayanganisaki bilenge nyonso ya lisangá na bango mpe balakisaki bango kasɛti video “Unis grâce à l’enseignement divin” (Mateya mauti na Nzambe esangisi biso), kasɛti video yango ezali komonisa ndenge oyo, na bisika nyonso na mokili, bilenge na mikóló bamipesaka mpo na kobongisa mayangani. Yango esalaki ete bilenge mingi ya lisangá na bango bámipesa mpo na kopɛtola libanda ya masano epai liyangani elingaki kosalema. Ata soki ezalela ya bomoi na biso ezali ndenge nini, tósala mosala mpe tópesa mabɔkɔ na esengo nyonso mpo mayangani na biso ya etúká oyo ebongisami mpo na mbula oyo esalema malamu.
7 Tósala boninga na boumeli ya ntango ya bopemi: Mpo na kozala na ntango mingi mpe koyeisa makambo pɛpɛlɛ, Biro esɛngaki biso ete tómema bilei na biso moko mpo na mikolo nyonso ya liyangani. Bandeko mingi balandaki toli yango mpe bamonaki ete epesaki bango nzela ya kofanda esika moko na mabota na bango na ntango ya bopemi mpe kolya bilei oyo bamemaki bango moko. Mingi balobaki ete yango epesaki bango likoki ya kopema malamu mpe kozwa ntango ya kosolola mingi na bandeko. Yango ezali kosɛnga kobongisa mwa eloko ya kolya mpe ya komela mpe kotya yango na mwa sakosi to na bikwokolo ya ngalasi oyo ekoki kokɔta na nse ya efandelo na yo. Tozali kosɛnga na moto nyonso ete alanda malako oyo. Na mayangani oyo euti koleka, emonanaki ete bandeko bazalaki kotika bisika na bango mpo na kokende kosomba biloko epai ya bato oyo batekaka zingazinga. Yango wana bato mingi oyo batekaka biloko bakɔtaki na esika ya liyangani mpo na koteka. Bato mosusu na kati ya bateki yango balingi ete bápesa bango nzela mpo bátekela bato oyo bayei na liyangani biloko. Soki bapesi bango ndingisa ya kosala bongo, bato mingi ya mokili bakosangana na biso na esika ya liyangani. Tokomona lisusu milɔngɔ milaimilai ya bato liboso ya barestora yango, yango ekobebisa esengo na mayangani na biso. Na yango, tozali kosɛnga na moto nyonso ete amema mwa eloko na ye ya kolya mpe ya komela mokolo nyonso ya liyangani. Bato oyo bazali kosepela na solo oyo bayei na liyangani elongo na yo basengeli mpe komema bilei na bango. Milangi to biloko oyo ekoki kopasuka mpe masanga ya makasi epekisami na esika ya liyangani.
8 Tozali kozela na motema likoló koyangana na liyangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe.” Osili komibongisa na makambo nyonso? Ozali kokana kosala lokola volotɛrɛ? Tiká ete etamboli na biso wana tozali na otɛlɛ mpe na esika ya liyangani emonisa ntango nyonso solo oyo ezali na kati ya mitema na biso mpe bolingo oyo tozali na yango mpo na Mozalisi na biso.