“Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” —Liyangani ya etúka 1996
1 Kati na bato 265 750 oyo bayanganaki na liyangani ya etúka “Basanzoli na esengo” na 1995 na teritware na biso, mingi kati na bango ezali baoyo bamonisi botɔ́ndi na bango mpo na makanisi ya kopesa nguya na elimo. Mitema na biso mitondaki na esengo mpo na bayekoli 4 318 oyo bazwaki batisimo mpo na kopesa bomoi na bango epai na Nzambe. Tosepelaki ndenge tozwaki mikanda mibale ya sika: Batatoli ya Yehova mpe kelasi mpe Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Lokola tozwaki matomba na manáka ya kolendisa na mobu moleki, yango esengeli kopusa biso na kosala milende mpo na koyangana na mayangani ya etúka “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” mpo na mobu 1996. Biso banso tokolinga mpenza kobyanga baoyo nyonso bayekolaka Biblia elongo na biso. Mpo na mokomoko na biso oyo tolingi kokóba kosalela Yehova na esengo na mikolo oyo ya nsuka, mayangani yango makozala liziba ya bilendiseli mpe ya nguya na elimo.
2 Tómilengela malamu liboso mpo na koyangana na mikolo misato wana ya elambo kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli kino libondeli ya nsuka. Ntango tokozwa bibongiseli mpo na kokenda na liyangani, tómonisá bolingo na kokanisáká baoyo bazali na mposa ya lisungi, mingi mpenza baoyo bazali kosepela na solo uta kala mingi te mpo ete bázala wana na manáka mobimba. Ekozala malamu mingi kotalela malako oyo mazwami na libakema oyo elongo na bato oyo bayekolaka Biblia elongo na biso bakisá mpe baoyo bazali kokana kokenda na liyangani. (Gal. 6:6, 10) Na Mwamitano, liyangani likobanda na mizíki na 9 h 30 mpe likosuka pene na 16 h 30. Mwapɔ́sɔ, likobanda na 9 h 30 mpe likosuka na loyembo mpe libondeli pene na 16 h 30. Manáka ya Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ makobanda na 9 h 30 mpe liyangani likosuka pene na 16 h 00. Malako oyo malandi makosalisa biso na bomilengeli na biso.
3 Bisika ya kolala bizalaka mbala mingi epai na bandeko. Tosengeli komonisa botɔ́ndi epai na bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bandimaka koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te ete baoyo bayambami basɛnga ete báfandisa bango ntango molai liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesami bobele NA NTANGO YA liyangani. Baoyo bayambami basengeli komemya biloko ya bankolo-ndako, kobebisa eloko moko te, kokenda te na bisika oyo bapesameli ndingisa te, mpe kosɛnzɛla ete bana na bango básala mpe lolenge moko. Soki bankolo-ndako bazwi mwa mokakatano na likambo moko, basengeli nokinoki koyebisa yango na departemá ya bapaya, oyo ekozala na esengo ya komemela bango lisungi na yango.
4 Basakoli mosusu, bakisá mpe bana na bango, bazali na bamposa na bango mpenza; na bongo, esengeli na biso ete tómonisa likebi mpo na yango. Lisangá na mobimba na yango, mpe bankutulu epai mosusu, basengeli kosɛnzɛla na kotalela bato wana kasi te kopesa mokumba na bango na departemá ya kolalisa bapaya mpo na liyangani. Bankulutu to basangani mosusu ya lisangá oyo bayebi likambo yango basengeli komonisa bolingo malamu na komemeláká bango lisungi libongi. Yango esɛngaka mingi ete basakoli bamibanzabanza mpo na bamposa ya basaleli ya ntango nyonso, mibangé, bibɔ́sɔ́nɔ́, mpe bongo na bongo. Na ndakisa, tokoki kosunga bango na komemáká bango na liyangani to kosalisa bango na lolenge ekeseni.—Yak. 2:15-17; 1 Yoane 3:17, 18.
Baoyo bakoyangana na liyangani mosusu
5 Mingimingi, liyangani oyo obyangami mpo na koyangana na yango ezalaka oyo ezali pene na esika ofandi. Bibongiseli bikamatami mpo na motángo ya bisika ya kofanda, mikanda, bilei, bisika ya kolala, mpe bongo na bongo, na kotaleláká etinda oyo ete basakoli mingi bakoyangana na liyangani oyo babyangami na yango. Nzokande, mpo na ntina moko malamu, soki olingi koyangana na liyangani mosusu, ozali mpenza na bonsomi ya kosala yango.
Kosalana elongo ezali na ntina
6 Botamboli malamu mpe bolóngi ya departemá ya kolalisa bapaya etalelaka kosalana na bomoko ya mokomoko na biso. (Eb. 13:17) Yango wana, tosɛngi na bandeko nyonso ete bósala na bomoko elongo na departemá ya bapaya oyo etyami na la Société mpo na liyangani. Kosaláká bongo, tokosilisa mwa mikakatano misusu oyo tokoki kokutana na yango.
[Etanda na lokasa 6]
MAYANGANI YA ETÚKA 1996
DATI BISIKA ZONGAZONGA OYO EBYANGAMI
05-07 Yulí Kinshasa (F) KIN-4, KIN-7, KIN-10
12-14 Yulí Kinshasa (LI-1) KIN-1, KIN-3, KIN-8, KIN-12, KIN-13
Kananga KA-1, KA-14, KA-18, KA-19, KA-28, KA-30
Bujumbura/Uvira KI-8, BU-1, BU-2, BU-3
Malemba-Nkulu S-8, S-9, S-10, S-14, S-16
19-21 Yulí Kinshasa (LI-2) KIN-2, KIN-5, KIN-6, KIN-9, KIN-11
Bukavu KI-1, KI-11, KI-12
Ilebo KA-10, KA-15, KA-21, KA-29
Mbuji-Mayi KA-2, KA-5, KA-13, KA-16, KA-17, KA-20, KA-25
Butembo KI-5, KI-7, KI-9, KI-10
26-28 Yulí Bunia HZ-4, HZ-12
Matadi BZ-1, BZ-2, BZ-5, BZ-8
Kasongo-Lunda B-7, B-13, B-17
Mbandaka E-2, E-7, E-16, E-17, E-23, E-24
Goma KI-2, KI-6
Mwene-Ditu KA-3, KA-8, KA-9, KA-24
02-04 Augústo Brazzaville CO-1, CO-4, CO-5, eteni CO-7, eteni CO-8
Lubumbashi S-1, S-2, S-13, S-17, S-20
Bandundu B-1, B-10
Gemena E-1, E-14, E-18
Isiro HZ-2, HZ-6, HZ-13, HZ-17, HZ-18
Mbanza-Ngungu BZ-3, BZ-4, BZ-6, BZ-7
09-11 Augústo Kenge B-3, B-9, B-21
Pointe-Noire CO-2, CO-6, eteni CO-8
Kolwezi S-3, eteni S-5, eteni S-15
Nioki B-4, B-6, B-14, B-15
Gbadolite E-5, E-9, E-19
Kisangani HZ-1, HZ-5, HZ-7, eteni HZ-9, HZ-10, HZ-14, eteni HZ-16
16-18 Augústo Sandoa eteni S-5, S-21
Kongolo KI-4, eteni S-18
Kikwit B-2, B-5, B-8, B-16, B-19, B-20, B-22
Buta HZ-8, HZ-11
Lisala E-8, E-11, E-21
23-25 Augústo Ouesso CO-3, eteni CO-7
Bumba E-4, E-12, E-15, E-20, E-22, HZ-3, HZ-15
Moba S-11, S-12, eteni S-18, S-19
Boende E-3, E-6, E-10, E-13, E-25, E-26
30 Augústo
- 01 Sɛtɛ́mbɛ Kamina S-4, S-6, S-7, eteni S-15
Tshikapa KA-6, KA-22, KA-23
Kindu KI-3, eteni HZ-9, eteni HZ-16
Lodja KA-4, KA-7, KA-11, KA-12, KA-26, KA-27
27-29 Sɛtɛ́mbɛ Mukedi B-11, B-12, B-18, B-23
7 Wana tozali komilengela mpo na koyangana na mayangani ya etúka “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” na 1996, elongo na bandeko basi mpe bandeko mibali, tokoki mpe kokanisa na lisungi ya biloko mpe ya mosolo oyo tokoki komema mpo na ebongiseli ya elambo oyo ya elimo! Lokola Bayisalaele mpe baklisto ya liboso, tókenda mabɔkɔ mpamba te.—Det. 16:16, 17; 2 Kol. 8:12.