Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/02 nk. 3-4
  • ‘Tózala bazwi na misala ya malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tózala bazwi na misala ya malamu’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Tózala bato ya molende na oyo ezali malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • “Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 3/02 nk. 3-4

‘Tózala bazwi na misala ya malamu’

1 Na bambula ya nsuka ya mosala na ye ya molende, ntoma Paulo asalaki mingi mpenza elongo na Timote mpe Tito. Akomelaki bango nyonso mibale maloba ya kolendisa oyo ezali ndenge moko. Alobaki na Tito ete “baoyo bandimi Nzambe” basengeli ‘kotyaka makanisi na bango na kosala misala ya malamu.’ (Tito 3:​8, NW) Alobaki na Timote ete baoyo batyaka elikya na bango epai ya Nzambe basengeli ‘kozala bazwi na misala ya malamu.’ (1 Tim. 6:​17, 18, NW) Yango ezali toli ya malamu mpenza mpo na biso nyonso! Kasi nini ekotinda biso tósala misala ya malamu na bomoi na biso? Mpe misala nini ya malamu biso tokoki mpenza kosala na mikolo oyo ezali koya?

2 Mposa ya kokóma bazwi na misala ya malamu eutaka na kondima mpe na bolingo oyo tolingaka Yehova; eutaka mpe na elikya malamu oyo apesi biso. (1 Tim. 6:19; Tito 2:11) Mingimingi na eleko oyo ya mobu, bakundwelaka biso ete Yehova atindaki Mwana na ye Yesu awa na mabele mpo ete asilisa lokuta nyonso oyo bapakolaki na nkombo ya Tata na ye mpe afungola nzela ya bomoi ya seko mpo na bato nyonso oyo babongi kozwa yango. (Mat. 20:28; Yoa. 3:16) Bakomonisa likambo yango polele mpenza na ntango Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekosalema na mokolo ya 28 Marsi. Mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na elikya ya bomoi ya seko oyo tozali na yango, tozali mpenza na mposa ya kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo ‘tózala bazwi na misala ya malamu,’ boye te? Ya solo, ezali mpenza bongo! Kasi, misala nini tokoki kosala?

3 Misala ya malamu oyo tokoki kosala na sanza ya Marsi mpe na basanza oyo ekolanda: Na ntembe te, tokoyangana na Ekaniseli​​—⁠molulu oyo eleki ntina kati na makambo nyonso oyo esalemaka na mbula mpo na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. (Luka 22:​19, NW) Kasi mposa na biso ezali ete bato mingi mpenza báyoka esengo oyo biso tokoyoka na libaku wana. Talá lapolo ya mosala na Annuaire 2002, mpe okomona ete na mbula oyo euti koleka, na bamboka mingi na mokili mobimba, bato oyo bayanganaki na Ekaniseli balekaki basakoli mbala misato, minei, mitano to koleka. Ya solo, esɛngaki ete basakoli nyonso na kati ya lisangá básala milende mingi mpo na kokabola nkasa ya kobenga bato na Ekaniseli na teritware na bango mobimba. Yango wana, tolingi ete kobanda sikoyo tii mokolo ya 28 Marsi, tólekisaka ntango mingi mpenza na kobenga bato na Ekaniseli mpo tósalisa mpe bango báyeba makambo etali elikya ya lobiko.

4 Ndenge nini tokoki kosalela na mayele mabaku ya malamu oyo emonani na bomoi na biso mpo ete ‘tózala bazwi na misala ya malamu’? Tokoki kosalela yango na mayele soki tokobi kosakola nsango malamu na molende mpenza, soki ‘tozali na molende mpo na misala ya malamu.’ (Tito 2:​14, NW; Mat. 24:14) Soki ozwaki likoki te ya kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, okoki te kosala yango na sanza ya Aprili to ya Mai, to mpe bansanza nyonso mibale? Soki ozali mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, okoki kokoba na mosala yango?

5 Bandeko mosusu oyo basalaka, bamonaka ete bakoki kosakola pene na ngonga mobimba na nzela ya kokende mosala: bapesaka litatoli na balabala to batalaka bato ya mombongo oyo babandaka mosala na bango ntɔngɔntɔngɔ. Basusu basalelaka ndambo ya ntango na bango ya kopema na midi mpo na kopesa litatoli. Basusu bazwaka likoki ya koyekola Biblia na moninga moko ya mosala na ntango wana. Bandeko basi mingi oyo bazali bamama ya mabota babongisaka ntango mpo na kobima na mosala ya kosakola na ntango bana na bango bazali na kelasi. Mikolo mosusu balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kosala misala ya ndako; na bongo, bazalaka na ntango mingi na moi mpo na mosala ya kosakola mpe ya koteya.​​—⁠Ef. 5:​15, 16.

6 Ata soki ozali na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi te, ntango mosusu okoki kosala programɛ mpo osakola mingi koleka ndenge osakolaka liboso, osala nyonso oyo ekoki na yo mpo na ‘kosala makambo ya malamu, kozala mozwi na misala ya malamu, kozala na lobɔkɔ pɛtɛɛ, kozala moto oyo ayebi kokabela’ basusu mateya ya solo.​​—⁠1 Tim. 6:​18, NW.

7 Tóbosana te mosala malamu ya kokómisa bato bayekoli: Mbula na mbula, bato oyo bamonisaka mposa ya koyoka mateya na biso bayaka na Ekaniseli. Likoki ezali mpo ete bandeko mosusu ya lisangá bálandela bato oyo bayanganaki elongo na biso kasi babandi naino koyekola te? Bakoki kozongela bango na mokano ya kosalisa bango bákola na elimo? Ekoki kozala ete kati na bato yango oyo bayanganaki na Ekaniseli basusu bazali bandeko ya Batatoli. Ekoki kozala ete basusu bazali bato oyo bazalaki koyekola kala mpe bazali na mposa se ya mwa bilendiseli mpo bázongela koyekola mpe bákóma koyangana na makita mbala na mbala. Kanisá esengo oyo tokozala na yango ntango tokomona ete bakómi kosalela Yehova na molende elongo na biso!

8 Soki tosakoli mingi na sanza ya Marsi mpe na basanza oyo ekolanda, na ntembe te tokokutana na ebele ya bato oyo bakomonisa mposa, baoyo mpe tokoki kozongela bango. Liboso ya kotika bango, tóbimisa motuna moko. Na nsima, tóyebisa bango ete tokoyanola na motuna yango na mbala ya nsima. Ntango tosali bongo, tobongisi nzela mpo na bozongeli ya sika. Ekozala mpenza malamu soki tozongeli bango noki. Soki tozwaki te likoki ya kofungola boyekoli na mbala ya liboso oyo tosololaki na bango, tokosala makasi mpo tófungola yango na mbala ya nsima oyo tokozongela bango, soki likoki ekozala.

9 Ntango tozali kopesa litatoli na balabala, tosengeli kosala makasi mpo na koluka kobanda masolo elongo na bato. Na ntango oyo bazalaki kopesa litatoli na balabala, basakoli mingi bakutanaki na bato oyo bamonisaki mposa ya koyoka mateya na biso; bato yango bandimaki kopesa bankombo na bango, baadresi na bango, mpe banimero na bango ya telefone. Soki moto oyo osololi na ye afandaka na teritware na bino te, pesá nkombo na ye mpe adresi na ye epai ya mokomeli ya lisangá; ye akotinda yango na lisangá oyo ezali na teritware oyo moto yango afandaka. Soki mokomeli azali na likoki ya kosala bongo te, akotinda yango na biro ya filiale, bango bakotalela likambo yango. Na ndenge wana, tokokolisa mposa oyo moto amonisaki.

10 Soki moto apesi kaka nimero ya telefone kasi apesi adresi te, bengá ye na telefone mpo na kosala bozongeli ya sika. Bongisá liboso makambo oyo olingi kosolola na ye. Zalá na buku Comment raisonner pembeni na yo mpo okoka kosalela yango nokinoki. Bandeko mosusu bazali kozwa matomba malamu ntango bazali koyekola na bato na nzela ya telefone; kati na bato yango ezali mpe na baoyo ezalaki mpasi mpo ete bandeko yango bákuta bango na ndako. Na ntango ndeko mwasi moko azalaki kosakola ndako na ndako, abandaki kosɛnga na basi oyo bamonisaki mposa banimero na bango ya telefone; nsukansuka, abandaki koyekola Biblia na basi mibale.

11 Tósala elongo na bankulutu mpo na kosalisa baoyo batiká kosakola: Bankulutu balingaka mpenza komonisa baoyo batiká kosakola ete bamibanzabanzaka mpo na bango mpe balingaka bango. Mingi kati na bato ya ndenge wana basili bango moko kozongela koyangana na makita ya lisangá. Bayebi ete, mpo bázwa libateli ya elimo oyo elobelami na Nzembo 91, basengeli koluka kokangama makasi na ebongiseli ya Yehova. Bamosusu kati na bango bazali sikoyo na mposa ya kozongela lisusu kobima na mosala ya kosakola. Soki bato mosusu oyo batiká kosakola bayangani na Ekaniseli na sanza oyo, ntango mosusu bakoki kondima koyekola lisusu Biblia. Soki bandimi, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo ete bandeko báyekola na baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Soki baponi yo osalisa moto ya ndenge wana, yebá ete lisangá ekosepela mingi na lisungi na yo.​​—⁠Lom. 15:​1, 2.

12 Tólanda “kosala misala ya malamu”: Bandeko mingi oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko to basanza mingi bamonaki ete mosala na bango ya kosakola ebakisamaki na basanza oyo elandaki. Bakutanaki na bato oyo bamonisaki mposa mpe bamonaki ete esengelaki kozongela bango. Yango etindaki bandeko yango bábakisa milende mpe bákóma kobima mingi na mosala ya kosakola mpo na kotala lisusu bato oyo bamonisaki mposa. Bamosusu babandaki koyekola na bato Biblia mpe yango esalisaki bango básakola mingi.

13 Esengo oyo bandeko mosusu bazwaki mpo bamipesaki mpenza na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, etindaki bango bátalela lisusu makambo nini mpenza esengeli kozala na ntina mingi na bomoi na bango. Yango wana, bamosusu bandimaki kokitisa ntango oyo balekisaka na misala na bango ya mosuni mpo bátikala babongisi-nzela basungi sanza na sanza. Bamosusu kutu bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Batyaki elikya na bango nyonso epai ya Nzambe, kasi batyaki yango te na biloko oyo mokili epesaka. Bamonaki ete ‘kozala lobɔkɔ pɛtɛɛ, kozala bato oyo bayebi kokaba,’ esalaki ete Yehova apambola bango mingi mpe elendisaki elikya na bango ya kozala na “bomoi ya solosolo.” (1 Tim. 6:​18, 19, NW) Ya solo, soki basakoli mingi basɛngi mosala ya mobongisi-nzela, lisangá mobimba ezwaka matomba. Babongisi-nzela bazalaka na mposa ya kolobela makambo oyo bakutanaka na yango na mosala ya kosakola mpe kobenga basakoli mosusu ete bábimaka elongo na bango na mosala; yango esalaka ete elimo ya lisangá ezala makasi mpenza.

14 Tiká ete biso nyonso tósakola mingi na boumeli ya eleko ya Ekaniseli oyo mpe na basanza oyo ekolanda mpo ‘tózala bazwi na misala ya malamu.’ Tiká ete tómonisa botɔndi na biso mpo na oyo Yehova asali na ndenge apesi biso elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabele ya sika epai boyengebene ekozala.​​—⁠2 Pet. 3:⁠13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto