Ozali koyika mpiko?
1 “Nazali na esengo eleki oyo te ete . . . bana na ngai bazali kotambola kati na makambo na solo.” (3 Yoa. 4) Ntango bana na ye na elimo bazalaki koyika mpiko, Yoane azalaki na esengo mingi. Tata na biso ya likoló asepelaka mingi komona bamilio ya bato oyo, ata ndɛlɛ, bakokóma bana na ye, “bazali kotambola kati na makambo na solo”!—Mas. 23:15, 16; 27:11.
2 Wana basaleli ya Yehova, bango nyonso lisangá, bazali koyika mpiko na mosala ya boklisto na molende nyonso, basusu kati na bango bazali kolɛmba mokemoke. Atako mbala mosusu bazalaki na molende mingi na ntango bayekolaki solo sika, nzokande ntango bambula ezali koleka, bakómi kosala bobele moke na mosala ya kozalisa bayekoli to mpe bazali kosala mosala yango ntango nyonso te.
3 Ezali solo ete baklisto mosusu balɛmbi, bazali kosala lisusu mingi te mpo nzoto na bango ezali lisusu kolɔngɔnɔ te mpe bakómi mibange. Kasi, ebongi ete tópesa bango longonya mpo na ndenge bazali koyika mpiko. Bazali kosala oyo bakoki. Kasi moto na moto oyo amipesi na Nzambe asengeli komituna boye: ‘Nazali kotya likebi mingi na makambo na ngai moko yango wana matomba ya Bokonzi ekómi kozwa bobele esika moke na bomoi na ngai? Nasili kokóma “mɔ́tɔ te mpe mpiɔ te”? to nazali ntango nyonso kosala “makasi” ’? (Emon. 3:15, 16; Luka 13:24) Tiká ete biso nyonso tótya na mabondeli, makambo oyo tozali kosala mpe tósala lisusu milende soki yango esengeli, mpe tóbosana te ete Yehova alaki ete “nkembo mpe lokumu mpe kimya ekoya na moto na moto oyo akosalaka malamu.”—Lom. 2:10.
4 Ndenge ya koyika mpiko: Nini esalisaki Yesu ayika mpiko? Paulo alobi ete: “Mpo na esengo etyami liboso na ye, [akangaki motema na mpasi oyo ayokaki na nzete, NW ], atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.” (Ebe. 12:1-3) Esengo oyo ezalaki liboso ya Yesu elekaki mosika minyoko ya ntango mokuse oyo akutanaki na yango. Soki tozali ntango nyonso kokanisa esengo oyo ezali liboso na biso yango ekosalisa biso mpe tóyika mpiko. (Emon. 21:4, 7; 22:12) Soki totii motema epai ya Yehova mpo na kozwa makasi na nzela ya boyekoli ya biso moko, koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita, mpe na nzela ya mabondeli, tokozala na likoki ya kolendendela na mosala oyo apesi biso.
5 Yehova asepelaka ntango basaleli na ye ya sembo bazali koyika mpiko. Na yango, tiká tóbakisa lisusu esengo na ye, tótambola ntango nyonso “kati na makambo na solo.”