Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 13: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko.
Min. 22: “Tózongela bato oyo basepelaki na Nsango ya Bokonzi No. 36.” Paragrafe 1-5 ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá bibongiseli oyo ezwami na lisangá na bino mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi na bateritware epai bokaboli yango naino te. Lobelá makanisi oyo epesami na paragrafe 7 mpe 8, mpo na ndenge ya kozongela bato mpe salá elakiseli mpo na mokomoko na yango. Monisá ntina ya kokende kotala bato nyonso oyo basepelaki mpe kosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia elongo na bango. Mpo na kosukisa bólobela makambo oyo ezali na paragrafe 9 mpe bótalela mikapo nyonso oyo ezali na paragrafe yango.
Loyembo 63 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: Makambo oyo basakoli bakutanaki na yango ntango bazalaki kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Yebisá ndenge oyo basakoli basali milende mpo na kokabola yango na teritware na bino mobimba. Ezali na moto moko na kati ya lisangá na bino oyo abandi kobima na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso? Yebisá makambo ya malamu oyo bato oyo botikelaki bango lokasa ya Nsango ya Bokonzi balobaki. Ezali na basakoli mosusu oyo babandaki koyekola Biblia na bato? Soki bazali, sɛngá bango bálimbola ndenge basalaki to básala elakiseli oyo ekozongela ndenge basalaki mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yebisá basakoli nyonso ete bázongela bato oyo basepelaki mpo na kosalisa bango bálona mposa makasi mpo na solo.
Min. 20: “Kotika kosakola te!” Lisukulu mpe mituna-lisolo. Ezali na bato mosusu oyo basanganaki na ebongiseli ya Yehova mpe bazali kokoba na mosala ya kosakola bomoi na bango mobimba. Bazali na makanisi ya malamu, mpe yango ememeli bango esengo ya kosala mosala yango. (Talá buku Boyebi, lok. 179 par. 20, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1992 lok. 21-22, par. 14-15.) Sɛngá na ndeko moko oyo azali mosakoli ya molende kobanda kala, ayebisa ntina oyo azali ntango nyonso kokoba kati na mosala ya kosakola.
Loyembo 141 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ. Tokolakisa buku Boyebi na sanza ya Desɛmbɛ mpe Traduction du monde nouveau. Limbolá ndenge oyo Batatoli ya Yehova basalaki mosala makasi mpo na kobimisa Biblia na minɔkɔ mingi.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1997, lok. 11-12.
Min. 20: Salelá malamu buku Comment raisonner. Ekosalema na mituna mpe biyano, bótalela makambo oyo ezali na lokasa 7 mpe 8. Monisá ndenge buku yango ebongisami mpo na kosalisa biso tómibongisa malamu mpo na kozwa matomba mingi na mosala ya kosakola. Monisá ndenge oyo tokoki kosalela buku yango ntango tozali kopesa litatoli na telefone. Monisá ndenge ya kozwa makanisi ebongi mpo na kopesa eyano na motuna moko. Lendisá basakoli nyonso ete bámesana na buku yango, ezalaka ntango nyonso na sakosi na bango ya mosala ya kosakola, mpe básalelaka yango ntango nyonso na mosala ya kosakola.
Min. 15: Nakoki kosala nini mpo ete nazala moombo ya televizyo te? Nkulutu moko azali kosolola na elenge mobali moko oyo alekisaka ntango mingi na kotala televizyo. Liboso, ndeko mobali atii ntembe ete yango ekoki kobebisa moto te. Alobi ete ezali bobele lolenge moko ya kominanola mpe ezali kosala ye mabe moko te. Nkulutu alobeli makambo ya ntina oyo ezali na mokapo 36 ya Buku Mituna oyo bilenge batunaka. Alimboli ete kolekisa ntango mingi mpo na kotala televizyo ebebisaka ngonga ya ntina oyo tokoki kosalela yango mpo na boyekoli na biso moko, kobima na mosala ya kosakola, to kopesa mabɔkɔ na bamposa mosusu ya lisangá. Elenge mobali amonisi botɔndi mpo na toli yango mpe alobi ete mpo na litomba na ye ya elimo, akobongola lolenge na ye ya kotala televizyo.
Loyembo 175 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “ ‘Liloba oyo elobami na ntango malamu.’ ” Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli. Basakoli mingi bamonaka ete bakokaka mpenza te kobanda lisolo, bakanisaka ete basengeli kozala na makoki mingi mpo bakoka kosolola na bato malamu, nzokande ezali bongo te. Limbolá ndenge oyo biso nyonso, ezala bato oyo babandi kosakola sika to bilenge oyo bazali basakoli, tokoki kobanda lisolo soki tosali milende oyo ekoki. Talá makanisi oyo epesami, monisá ndenge ya pɛpɛlɛ mpo na kosalela yango, mpe sɛngá na basakoli mibale básala elakiseli na yango. Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Mai 1998, lok. 8, mpo na kozwa makanisi mosusu oyo tokoki kosalela mpo na kolakisa buku Boyebi. Lendisá basakoli nyonso ete bázala na makanisi ya malamu mpo ete bákoka kozala na esengo mingi na mosala na bango ya kosakola.
Loyembo 218 mpe libondeli ya nsuka.