Mayangani—Ntango ya kosepela!
1 Mayangani ya Batatoli ya Yehova ezalaka mabaku ya kosepela mingi. Esali sikoyo mbula koleka monkama, mayangani yango epesaki nzela ete lisangá ya Yehova ekola. Na ebandeli tozalaki mingi te, kasi na boumeli ya ntango tomoni ndenge Yehova asopi mapamboli na ye likoló ya mosala na biso na mokili mobimba. Na Liyangani ya liboso oyo esalemaki na ntango na biso, na Chicago, na États-Unis, na mobu 1893, kati na bato 360 oyo bayanganaki, bato 70 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi epai ya Yehova. Na mayangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki na mbula eleki, kati na bato 9 454 055 oyo bayanganaki na mokili mobimba, bato 129 367 bazwaki batisimo. Yango ezali kopesa biso esengo mpenza!
2 Banda ntango ya kala mpenza, mayangani ya basaleli ya Nzambe ezalaka mabaku ya ntina mingi ya koyebisa mateya ya Yehova. Na ntango ya Ezela mpe Nehemia, bato balandaki botángi ya Mibeko, “longwa na ntɔngɔntɔngɔ kino midi.” (Neh. 8:2, 3) Na libaku wana, lokola bakangaki malamumalamu ntina ya Mibeko oyo batángelaki bango, ‘basepelaki mingi.” (Neh. 8:8, 12) Biso mpe tosepelaka na mayangani, mpamba te epesaka biso libaku malamu ya kozwa mateya ebongi mpe bilei ya elimo oyo euti epai ya Yehova na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” “na elaka na yango.” (Mat. 24:45) Lokola Yesu alobaki ete moto akobika “na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe,” mayangani ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso ya elimo.—Mat. 4:4.
3 Ebongi mpenza kosala milende nyonso mpo na koyangana: Biso nyonso tosengeli kozala na mokano ya kozala, banda ebandeli tii nsuka, na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe,” oyo ekosalema na mbula oyo. Tosengeli kozwa bibongiseli mpo na kokóma na ntɔngɔ mpenza mokolo nyonso ya liyangani mpe kolanda mateya kino ntango bato nyonso bakoloba “Amen!” na libondeli ya nsuka. Mpo na kokokisa yango, ekosɛnga mbala mosusu ete tobongola manaka na biso mwa moke. Ekoki kozala na mwa mikakatano mpo bapesa biso konje na mosala mpo tokoka kozala na liyangani. Tosengeli kozala na mokano makasi, tokanisa te ete makambo ekoleka malamu kaka yango moko. Soki tozali na mposa ya esika ya kolala to mbongo ya kofuta motuka, to mpe nyonso mibale, tosengeli kozwa bibongiseli libelalibela. Bibongiseli nyonso oyo tokozwa ekozala likambo moko oyo ebongi!
4 Mpo na basaleli ya Yehova, mapamboli oyo bazwaka ntango bakei na liyangani eleki mbongo na mosika. Talá ndakisa ya bato mosusu oyo bazalaki na mokano ya kokende na liyangani ya Batatoli ya Yehova ‘Mokano ya Nzambe’ oyo esalemaki na 1958, na engumba ya New York; liyangani yango esangisaki Batatoli oyo bautaki na mikili mingi. Ndeko moko akangaki misala na ye ya kotongela bato bandako na boumeli ya pɔsɔ mibale mpo akende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobongisa esika ya liyangani mpe ayangana nsima na yango. Na bisanga ya Vierges, ndeko moko atɛkaki mɛtrɛ kare nkama mitano ya mabele na ye mpo ete libota na ye mobimba ya bato motoba bakoka kokende na liyangani. Mobali moko na mwasi na ye batɛkaki bwato na bango ya motɛlɛ mpo bakende na liyangani elongo na bana na bango misato; mwana ya mokóló azalaki na mbula nsambo mpe mwana ya nsuka azalaki na sanza mibale mpamba. Bandeko misato ya libota moko oyo bafandaka na Californie bazalaki komibongisa mpo na kokende na liyangani, bayebisaki bango ete soki bakei ntango bakozonga bakolongwa na mosala. Kasi yango epekisaki bango te ete bakende na liyangani wana oyo bakoki kobosana yango te.
5 Yehova apambolaka milende na biso: Yehova amonaka mpe apambolaka milende oyo basaleli na ye basalaka. (Ebe. 6:10) Na ndakisa, na liyangani “Bokoli ya Teokrasi,” oyo esalemaki na 1950, bayangani bayokaki lisolo moko oyo etiká nsango, lisolo yango ezalaki na motó ya likambo “Ebongiseli ya sika.” Ndeko Frederick Franz abendaki likebi ya bayangani ntango atunaki motuna oyo: “Bino bayangani, bozali na esengo te ya koyeba ete kati na biso, ndenge toyangani na butu ya lelo na esika oyo, ezali na bato oyo bakozala bana ya mokonzi na mabele ya sika?” Nsima na mbula koleka 50, ndenge bayeisaki polele ndimbola ya Nzembo 45:16 ezali kaka kosepelisa biso.
6 Nsima ya koyangana na liyangani ya etúká ya mbula eleki, tata ya libota moko akomaki maloba oyo: “Bandeko, bokoki koyeba te ndenge oyo liyangani yango ebikisi bomoi ya bato. Ngai na libota na ngai tokendaki kofanda na engumba mosusu mpo na koluka mosala, nzokande tomilukelaki mpe likambo mosusu, elingi koloba ete nsukansuka, elimo na biso ekómaki kotɛngatɛnga. . . . Totikaki kosala makambo oyo esɛngami mpo na baklisto. Kutu, totikaki ata koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. . . . Liyangani yango epesaki biso lisusu makasi, mpe tomityeli lisusu mikano ya elimo mpe tozali komibongisa mpo na kokokisa yango.”
7 Yehova azali kopesa biso bilei ya elimo oyo tozali na yango mposa. Na mayangani na biso atandaka mesa ya elimo oyo ezali na bilei mingi. Ndenge oyo tozali kosepela na bilei wana ya elimo esengeli kotinda biso toloba ndenge Koloneli alobaki ntango ntoma Petelo akendaki kotala ye: “[Sikoyo] biso nyonso tozali liboso ya Nzambe mpo na koyoka makambo nyonso oyo Yehova alaki yo ete oloba. (Mis. 10:33, NW) Tiká ete tozwa mokano ya ‘kozala liboso ya Nzambe’ mikolo nyonso misato ya liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe,” oyo ekosalema na mbula oyo mpe tósepela!