“Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998
1 Masese 10:29 ezali kokundwela biso ete “Nzela ya Yehova ezali esika makasi.” Na bongo, motó ya likambo ya mayangani ya etúká ya mbula oyo ebongi mpenza: “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”! Lolenge nini motó ya likambo oyo ekolobelama na boumeli ya mikolo misato ya liyangani? Biso nyonso tozali kozela na motema likoló makambo oyo babombeli biso. Makanisi ya ntina makomonisama.
2 Bamisionere, basali oyo bautaka na mikili ndenge na ndenge to bandeko mibali mpe basi oyo basalaka na mikili ya bopaya bakozala na mayangani ya mikili mingi. Tozali kozela komona ebele ya bato bauti na mikili mosusu koyangana kati na bingumba epai kuna mayangani ya mikili mingi ekosalema. Na boumeli ya liyangani balapolo ekopesama, oyo ekomonisa lolenge Yehova azali kopambola mosala kati na bateritware ndenge na ndenge.
3 Esengeli kosala nyonso mpo na kozala wana: Mingi kati na bandeko na biso ya Afrika bazali kokutana na komekama oyo euti na bitumba to na mobulu oyo ezali koningisa bitúká mosusu ya mokili wana. Mpo na bango, mayangani ya libota ya Yehova ezali na ntina mingi. Bamosusu basengeli kotambola na ntaka molai mpo na koyangana na liyangani, atako bongo, bazali kokanisa te ete bázanga ata liyangani moko. Na République démocratique du Congo (ex-Zaïre), ndeko mobali moko ya mibu 73 atambolaki na makolo na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 450 mpo na koyangana na liyangani moko. Nsima ya kotambola mikolo 16, makolo mavimbaki, kasi azalaki na esengo mingi ya kozala kuna. Nsima ya liyangani, lokola atondaki na esengo mpe azwaki makasi na elimo, azongaki epai na ye na makolo. Azali kosala bongo uta bambula mingi!
4 Na Mozambique, mokɛngɛli moko ya etúká mpe mwasi na ye basengelaki komata ngomba moko molai mpe kokatisa na makolo etando moko monene ya esobe mpo na koyangana na liyangani ya etúká. Mobembo wana ya kilomɛtɛlɛ 90, basalaki yango na boumeli ya ngonga 45. Bayangani nyonso balendisamaki mingi na ndakisa malamu na bango. Ebele ya mabota oyo bazalaki wana basalaki mpe milende motindo moko mpo na kozala na liyangani. Mokɛngɛli ya etúká ayebisaki ete bandeko, oyo moko kati na bango azalaki na mibu 60, batambolaki na makolo na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 200!
5 Tosili komibongisa malamumalamu mpo na koyangana na liyangani ya mbula oyo? Mbala mosusu, biso mpe tokotambola ntaka molai na makolo, mpe ekosengela na biso kosala milende mpe komipimela makambo mosusu mpo na kozala wana elongo na libota na biso. Tómibongisa mpo na kolanda manaka mobimba, uta ebandeli kino nsuka. Ebele ya bato oyo bazali koyekola Biblia bazali kokola kino kozwa batisimo. Na koyanganáká na liyangani, bakokoka kozwa ekateli malamu. Tosili kobyanga bato ya motema malamu mpe baoyo tozali koyekola na bango Biblia mpo na koyangana elongo na biso na liyangani?
6 Liyangani ya mikolo misato: Na mbula oyo, mayangani 59 makosalema na Burundi, na Congo-Brazzaville mpe na Congo-Kinshasa. Longola oyo ekosalema na Lifalanse, liyangani ekosalema na Kiluba, na Kirundi, na Lingala, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili, na Tshiluba mpe na Uruund. Liste ya bisika mpe ya badati epai mayangani yango makosalema etalelamaki lisusu mpe esembolamaki. Bokokuta yango na etanda oyo etyami na lokasa 5. Na ngonga oyo tozali koloba, oyebi na liyangani nini lisangá na bino ekozala.
7 Likambo ya ntina: Ezali na ntina mingi ete tóyangana na liyangani oyo lisangá na biso ebéngisami. Limemya na yo na bibongiseli oyo mpe kosalana na yo elongo ekopesa nzela ete makambo nyonso másalema malamu mpe kozanga mobulu.—1 Kol. 14:33, 40.
8 Na mokolo ya mitano, ya pɔsɔ mpe ya lomingo na ntɔngɔ, liyangani ekobanda na 9:30. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, liyangani ekosuka na ngonga ya 17, mpe mokolo ya lomingo, yango ekosuka na ngonga ya 16. Bikuke bikofungwama mokolo nyonso na ngonga ya 8. Bobele baoyo bazali na mosala ya kosala nde bakozwa ndingisa ya kokɔta liboso ya ngonga wana. Nzokande, moto moko te akokanga bisika liboso ya ngonga ya 8.
9 Ntango tozali kokende na liyangani to ntango touti kuna, tosengeli koluka mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Nsango ya Bokonzi ekoki kosepelisa bapompiste, bakomelesa, basali na nzela, basali na baotɛlɛ mpe basali na bar. Tómibongisa na kozaláká na batrakte, bazulunalo ya sika, mwa babuku to mikanda mosusu, mpo ete tózwa mabaku ya kopesa litatoli na bato, oyo mbala mosusu, ezalaka mpasi kokutana na bango mpo ete báyoka nsango malamu.—2 Tim. 3:17.
10 “Tótya likebi na lolenge oyo tozali koyoka”: Baoyo bayanganaka na mayangani bazali kosala malamu na kolanda toli oyo ezali na Luka 8:18. Mokomoko asengeli kozala na Biblia na ye, na buku na ye ya nzembo mpe na karnɛ mpo na kozwa banɔti. Tóyoka na likebi nyonso makanisi ya ntina ya lisolo mokomoko mpe tózwa banɔti ya mikuse. Moto na moto amituna lolenge nini akoki kosalela makambo oyo azali koyoka. Na mpokwa ya mokolo nyonso ya liyangani, liboso ya kokende kolala, mpo na nini te kotánga lisusu banɔti na biso mpe kotala mpo na koyeba soki tozali mpenza kolanda nzela ya Yehova oyo ezali nzela ya bomoi?—Mas. 4:10-13.
11 Esili komonana ete, na boumeli ya liyangani, basusu batikaka esika liyangani ezali kosalema mpe bakendaka kofanda na libándá epai mosusu, yango ezali kosala ete bázanga makambo mosusu mazali na manaka. Esili komonana ete basusu batambolaka epai na epai, nzokande basengelaki kofanda esika bazali mpe báyoka. Bituluku ya bilenge batikaki liyangani wana manaka ya nsima na midi ekómaki na katikati. Basaleli mosusu ya Yehova na ntango ya kala basalaki mabunga minene mpo bayokaki makundoli na ye na likebi te. Ya solo, tokosala malamu ete tópɛngola mabunga yango. (2 Mik. 17:13-15) “Moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kobongisa mateya ya kitoko oyo biso nyonso tozali na yango mposa. Yango wana ezali na ntina mingi ete ‘tótya likebi makasi koleka na makambo oyo tokoyoka’ na eteni mokomoko ya mikolo misato ya liyangani. Mokolo nyonso, eloko moko oyo etaleli mpenza biso ekomonisama, mingimingi makanisi oyo ekozala na bopusi ya malamu likoló ya bomoi tokozala na yango na mikolo mizali koya. Na kotyáká mpenza likebi mpe na kosaleláká malamu makambo oyo Yehova akopesa biso na elimo na mayangani oyo ezali koya, elikya na biso ekopikama makasi, yango ekopekisa biso ete “tókenda na libebi,” elingi koloba komitangola na nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi.—Mat. 24:45; Ebe. 2:1.
12 Molato oyo ezali kokumisa Yehova: Na mikolo ya mpasi oyo tozali kobika na yango, esengeli na biso kotya mpenza likebi ete tómitika te komemama na elimo ya mokili. (1 Kol. 2:12) Molato na biso mpe ekateli to etongeli na biso ya nsuki esengeli kozala ya bopɔlɔ mpe komonisa lokumu ya Nzambe oyo tozali kosambela. (1 Tim. 2:9, 10) Esengeli te bobele bilamba ya ntalo mingi mpo na “kokembisa mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe.” (Tito 2:10) Talá batoli kitoko ebongi oyo euti na Makomami oyo epesami na paragrafe 14 kino 18 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1997, na nkasa 17 mpe 18. Kotyola soko moke te nguya ya litatoli oyo tokoki kopesa na kozaláká na molato oyo ezali kokumisa Yehova.
13 Etamboli oyo ezali kosepelisa Yehova: Toyebi ete etamboli na biso ya boklisto ekoki kozala na bopusi likoló na makanisi oyo bazalani na biso bazalaka na yango na ntina na losambo ya solo. Yango wana tosengeli komitambwisa ntango nyonso na lolenge lobongi na nsango malamu mpe na lolenge oyo ezali kokumisa Yehova.—Filp. 1:27.
14 Na mbula eleki, liyangani moko ya etúká ebongisamaki mpo na mbala ya liboso na nɔ́rdi ya Angola. Na mokolo ya mibale ya liyangani, bakonzi mibale ya bapolisi batindamaki mpo na kotala soki mobulu ezalaki esika yango. Balekisaki mokolo mobimba na esika yango. Na nsuka ya mokolo yango, bamonisaki mayoki na bango mpo na makambo oyo bayokaki mpe mpo na etamboli malamu oyo bamonaki. Moko na bango alobaki ete: “Mpo na nini batindaki biso awa? Toyebi ete Batatoli ya Yehova bayanganaka kozanga mobulu.”
15 Mobali moko, mosangani ya lingomba moko ya politiki, na mboka moko ya Afrika akimaki na Mpoto, mpamba te basangani nyonso ya lingomba na ye ya politiki babomamaki. Lokola azalaki na mikakatano mingi, alɛmbaki nzoto mpenza. Na nsima, andimaki boyekoli ya Biblia. Ntango ayanganaki mpo na mbala ya liboso na liyangani ya etúká, akamwaki mingi na komona bato ya bikólo ndenge na ndenge koyangana kati na bomoko mpe na boyokani, yango endimisaki ye ete solo yango oyo. Na boumeli ya liyangani yango, azwaki ekateli ya kokata boyokani na ye na politiki. Na nsima ayaki kozwa batisimo mpe, lelo oyo, ye na bana na ye bazali kosalela Yehova.
16 Na mbula oyo, etamboli na biso ekozala na bopusi nini epai na bato oyo bakoyangana mbala mosusu na liyangani mpo na mbala ya liboso? Bakomona elimo na biso ya kosalana elongo oyo tokomonisa na kosaláká elongo na basali mosusu ya bolingo malamu? Bakokamwa na komonáká bopɛto ya bisika mpe na komonáká ete liboso ya kokende, biso na bana na biso tozali kolɔkɔta biloko ya bosɔtɔ oyo ekoki kozala na esika oyo tofandaki? Bakomona etamboli malamu na biso ntango tozali kolongwa na bisika tofandi mpo na kokende na liyangani? Bakomona ete biso baboti, tozali kobatela malamumalamu bana na biso ntango nyonso? Tómindimisa ete tozali kosala nyonso mpo na komonisa ezaleli malamu epai na baoyo bazali kotala biso.
17 Tózongisa mosolo oyo mobimisamaki mpo na liyangani: Na mokili ya lelo, tikɛ mpo na kokɔta kotala lisano ya ndembo kati na libándá ya masano to mpo na likambo moko ya monene kati na ndako moko ya makita, ezalaka ntalo mingi. Ezalaka bongo mpo na mosolo oyo esɛngamaka mpo na kozwa esika yango kati na bingumba. Mpo na mayangani, likanisi ya la Société ezalaka ntango nyonso oyo: “Kokɔta mpamba—Mabonza ezali te.” Nzokande, lolenge nini mosolo oyo ebimisamaki mpo na kozwa esika mpe mbongo mosusu oyo ebimisamaki mpo na misala ya liyangani ekozongisama? Ezali na lisalisi ya makabo ya bolingo malamu ya bayangani. Tomindimisi ete bokomonisa elimo ya bokabi motindo moko na oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bamonisaki, oyo bamekolaki Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto. (2 Kol. 8:7) Tósɛnzɛlaka ete tótya makabo nyonso na esika ya solosolo, ete etángama mpe esalelama na boyokani na ntina oyo yango epesamaki.
18 Bisika ya kofanda: Malako oyo masili kopesama na boumeli ya bambula mazali na ntina kino lelo: ESENGELI KOKANGA BISIKA YA KOFANDA BOBELE MPO NA LIBOTA NA YO MOKO MPE MPO NA BAOYO OYAKI NA BANGO ELONGO. Ezali likambo ya esengo na komona ete, bambula oyo euti koleka, bayangani mingi bazali kotosa etinda wana, yango ezali kokolisa mayoki matondi na bolingo oyo ezalaka na mayangani na biso. Na bisika mingi ya mayangani, ezali na bisika oyo ezalaka na mpasi te mpo na kokoma koleka bisika mosusu. Tómonisa limemya na kotikáká bisika oyo bibongi mpenza mpo na mibange mpe na bato mosusu oyo ezalela na bango esɛngi bongo. Tóbosana te ete ‘bolingo elukaka matomba na yango moko te.’—1 Kol. 13:4, 5; Filp. 2:4.
19 Masini ya fɔtɔ, kamera mpe manyetofone: Tokoki kosalela bamasini ya fɔtɔ mpe bamasini ya kokɔtisa maloba. Nzokande, tosengeli te kopɛngwisa likebi ya bayangani mosusu wana tozali kosalela yango. Tosengeli te kotambolatambola ntango liyangani ezali kosalema mpo na kokanga bafɔtɔ, mpo tokotungisa basusu, oyo bazali kosala makasi mpo na koyoka. Masini moko te, ezala ya lolenge nini, esengeli te kotyama na bansinga ya lotiliki to na bikoliseli-lolaka ya liyangani, to kotya nkaka na bisika ya koleka to kopekisa bayangani mosusu komona.
20 Mwa lisungi ya nkisi: Departema ya kopesa mwa lisungi ya nkisi ezali bobele mpo na lisungi ya nokinoki. Kobosana te komema aspirine na yo, bankisi na yo mpo na kopɔtɔ bilei na libumu, bankisi na yo ya mpota, bapɛngɛlɛ na yo ya bana mpe biloko mosusu ya lolenge wana oyo ezalaka na liyangani te. Baoyo nyonso bazalaka na mikakatano ya motema, oyo bakoki kokóma na mokakatano ebéngami choc insulinique to krise moko boye mpe bongo na bongo, bábosana te bankisi oyo esengeli mpo na yango. Mosangani moko ya libota na bango to ya lisangá na bango oyo ayebi maladi na bango asengeli kozala elongo na bango ntango nyonso mpo na kosalisa bango soki mposa emonani. Esili kokóma na mayangani ete bato oyo bazali na bamaladi oyo eumeli, batikali bango moko mpe na nsima krise ezwaki bango, yango ebimisaki mikakatano. Soki moto moko azali na mposa ya bankisi ya sikisiki mpe ete mosangani ata moko ya libota azali te mpo na kobatela ye, ekosengela ete bankulutu ya lisangá na ye báyeba likambo yango mpo bákamata bibongiseli bisengeli mpo na kosalisa ye. Bisika ya sipesiale bikolɛngɛlama te mpo na baoyo bakokaka molunge makasi te, malili mingi te mpe lokito ya mikro te.
21 Bilei: Moko na moko asengeli komema bilei na ye moko na esika ete atika liyangani na boumeli ya eleko mokuse ya bopemi ya midi mpo na kosomba mwa eloko libándá. Bilei ya pɛpɛlɛ, ya malamu mpe oyo ezali na mpasi te mpo na komema nde ebongi mpenza. Siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1996, na paragrafe 6 mpe 7, emonisi biloko oyo tokoki komema. Na esika oyo liyangani ekosalema tokokɔta te na milangi oyo mipasukaka soko mpe na masanga makasi. Bisika ya kobatela biloko ete esila malili te to bibombelo ya biloko ete esila mɔ́tɔ te esengeli mpenza kozala moke mpo ete ekoka kokɔta na nse ya esika oyo ofandi. Esili komonana ete bayangani bazali kolya na ntango manaka mazali kokoba, kasi kosala bongo ezali komonisa kozanga limemya.
22 Oyo nde esengo tozali na yango na kokanisa liyangani “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” oyo esili kobɛlɛma! Tosili kokamata bibongiseli mpo na koyangana na liyangani yango? Tiká ete tósala mobembo malamu mpe tózonga epai na biso wana toyeisami makasi mpenza, kozaláká na ekateli ya kolanda mosala kitoko na biso mpo na Yehova mpe kolanda ntango nyonso nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi, mpo na bolamu na biso ya seko!
[Etanda na lokasa 6]
Liyangani—Makambo Oyo Bosengeli Kobosana Te
▪Batisimo: Bakandida ya batisimo bakofanda na bisika oyo bibongisami mpo na bango liboso ete manaka ya mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ ebanda. Kandida mokomoko akomema elamba na ye ya kosukolela oyo ebongi mpenza mpe esume na ye. Na mikolo mileki, bamoko balataki bilamba bibongi te mpe oyo ezali kokitisa lokumu ya molulu. Bankulutu oyo bakotalela mituna mizwami kati na buku Lisanga elongo na bakandida ya batisimo bakomindimisa ete mokomoko na bango azali kokanga ntina malamu na likambo yango. Batisimo ezali elembo ya komipesa, ezali likambo ya moto ye moko na Yehova. Epesami nzela te na kopesa “batisimo ya etuluku” ya bakandida mibale to koleka oyo bakosimbana na mabɔkɔ moko na mosusu to bakosimbana na mabɔkɔ na ntango ya kozindisama na mai.
▪Makaro: Bólata makaro ya 1998 ntango nyonso, ezala na esika ya liyangani to mpe na nzela na ntango ya koya na liyangani to na ntango ya kozonga na ndako. Yango epesaka mbala mingi nzela na kopesa litatoli ya malamu. Bokozwa makaro mpe bityeli na yango na nzela ya lisangá na bino, mpamba te ekozala na liyangani te. Kozela te mwa mikolo pene na liyangani mpo na kosɛnga makaro mpo na yo mpe libota na yo. Kobosana te komema kalati na yo “Instructions médicales — Pas de sang.”
▪Bisika ya kolala: Tozali kosɛnga na bino banso ete bósalana elongo na kosaleláká BOBELE liste ya bisika ya kolala oyo epesami na Biro ya liyangani. Mbala mingi tofandaka epai ya bandeko na biso. Tosengeli komonisa botɔndi epai na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kopesa biso esika ya kolala. Lisusu, ekozala malamu te ete baoyo bayambami boye bábebisa boyambi yango na kosɛngáká ete báfandisa bango ntango molai liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesami bobele na NTANGO ya liyangani. Baoyo bayambami basengeli kotosa biloko ya bandeko oyo bayambi bango, bábebisa eloko moko te, bákende te na bisika oyo bapesi bango nzela te, mpe básɛnzɛla ete bana na bango básala mpe bongo. Soki bandeko oyo bayambami bakutani na mokakatano moko na likambo litali esika ya kolala, basengeli nokinoki koyebisa yango na biro oyo etalelaka bisika ya kolala, biro oyo ekopesa bango lisungi na likambo yango. Atako tozali kobika na ‘ntango ya mpasi mpe ya mikakatano mpo na koyikela yango mpiko,’ tomindimisi ete bandeko mingi bakosepela kopesa bandeko na bango esika ya kolala, ndenge yango esalemaki na Kinshasa to na bisika mosusu, ntango bandeko na biso bakimaki bitumba. Ezali likambo ya mawa na koyoka ete na bisika mingi bandeko basepelaka te koyamba bandeko oyo bayei na liyangani. Tokopesa nzela te ete mikakatano ya ntango oyo elɛmbisa bolingo oyo tozali na yango bamoko mpo na bamosusu na komipekisáká kozala bayambi-bapaya soki likoki ezali ya kosala bongo.—2 Tim. 3:1; Ebe. 13:1, 2; Yoa. 13:35.
▪Departema ya basali ya bolingo malamu: Okoki kopesa mwa ntango na boumeli ya liyangani mpo na kopesa mabɔkɔ na moko ya misala? Tokoki kozala na ntina mingi mpe kozwa bosepeli mingi soki tozali kosalela bandeko na biso, ata bobele mpo na mwa bangonga. Soki okoki kopesa lisungi na yo, omimonisa na departema ya basali ya bolingo malamu na liyangani. Bana oyo bazali na mbula na nse ya 16 bakoki mpe kopesa mabɔkɔ na bango na lolenge ya malamu mpenza na kosaláká na nse ya litamwisi ya batata na bango, ya bamama na bango to ya mikóló mosusu.
▪Tózala pene mpo na koyamba bapaya: Mingi kati na bandeko oyo bayanganaka na mayangani ya etúká oyo masalemaka na teritware na biso bakendaka na bisika oyo ezalaka mpenza mwa mosika na bandako na bango. Bazalaka mpenza na mposa ya esika mpo na kopema na butu mpo ete na ntɔngɔ bázala na makasi mpo na kolanda manaka. Lokola ezali bongo, tokoki te kosalana elongo na Biro oyo etalelaka bisika ya kolala na koyebisáká bango ete tozali na esika mpo tóyamba bandeko oyo bakoya na liyangani, baoyo bakozala na mposa ya esika ya kolala? Yango ekozala libaku moko malamu mpo na komonisa ezaleli na biso ya koyamba bapaya, yango ekolendisa bikanganeli na biso ya bondeko mpe ekobakisa masanzoli na biso mpo na Yehova.—1 Pet. 4:9; Ebe. 13:1, 2.
▪Tózala na likanisi malamu likoló na elimo ya komipesa na ntango tozali kolɛngɛla mayangani na biso: Kobongisa liyangani ya etúká esɛngaka makasi mingi mpe ntango mingi. Soki basali ya bolingo malamu bazali mingi mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge, boye kilo ekozala mingi te. Kasi, nani babéngi mosali ya bolingo malamu? Engebene diksionɛrɛ Le nouveau petit Robert, mosali ya bolingo malamu ezali moto oyo amipesi ye moko na mosala. Yango emonisi ete mosali ya bolingo malamu asengeli kokanisa te ete akozwa lifuti mpo na misala oyo azali kosala. Ntembe ezali te ete mwa bibongiseli ya moke ekoki kokamatama, engebene makoki na biso moko, mpo na kozwela basali ya bolingo malamu oyo bazali kosala mosala makasi biloko ya kolya ata mbala moko na mokolo mpo ete makambo nyonso mátambola malamu na ebandeli ya liyangani. Yango ekotikala ebongiseli na mboka na biso oyo kati na yango masangá makopesamela libaku ya kopesa makabo ezala ya mbongo to ya biloko. Tosengeli te kozela ete la Société asala eloko moko na likambo yango.—Nz. 110:3.
▪Tózwa litomba na nyonso oyo esɛngami na biso: Makambo nini masɛngami na biso? Ezali ntango mpe milende oyo tozali kosala mpo na kozala na liyangani. Ekozala likambo ya mayele te komilɛngɛla malamumalamu mpo na koyangana na liyangani ya etúká mpe kozonga mokolo ya lomingo na mpokwa wana ozangi eteni monene ya manaka. Soki tozali bato oyo bakɔmeli na elimo, tokozanga ata eloko moko te kati na makambo oyo Yehova asili kobongisela biso. (1 Kol. 2:9, 10) Mokolo nyonso ya liyangani, tosengeli kosala makasi tófanda liboso ete manaka ebanda. Ata soki tozali kopesana masolo moko ya kitoko elongo na baninga na biso, ntango mokambi akoyebisa ebandeli ya manaka, ekozala likambo ya komonisa limemya epai na bayangani mpe bandeko na biso na kotikáká kosolola mpe kokende nokinoki kofanda na bisika na biso.
▪Makebisi: Bómindimisa ntango nyonso ete bizipelo ya vuatire na bino bikangami na fungola mpe kotika ata eloko moko te ezala ya ndenge nini oyo ekoki kobenda likebi ya bato. Miyibi mpe bato ya mabɔkɔ milai babendamaka na mayangani minene. Ekozala mpe likambo ya mayele te kotika eloko moko ya motuya na esika na yo ya kofanda. Likoki ezali te ya komindimisa ete baoyo nyonso bafandi zingazinga na yo bazali baklisto. Mpo na nini kotya moto na komekama? Tozwaki mpe balapolo oyo ezali komonisa ete bato oyo bayebani te balukaki kobenda bana libándá. KOTIKA BANA MOSIKA NA YO TE.
[Etanda na lokasa 5]
Liyangani ya etúká 1998
14-16 Augústo 1998
BANDUNDU (LI): BD-1; BD-10
BUMBA (LI): EQ-4; EQ-12; EQ-15; EQ-20; EQ-22; OR-3; eteni OR-10; OR-15
BUNIA (SW): OR-4; OR-12
KIKWIT (F, MK): BD-2; eteni BD-19; BD-24; eteni BD-22
KINSHASA (F): KN-4; KN-7; KN-10
MANONO (KU): Eteni KT-10; KT-14; eteni KT-16
MATADI (LI): BC-1; BC-5
MBANDAKA (LI): EQ-2; EQ-7; EQ-16; EQ-17; EQ-23
MBUJI-MAYI (F, SH): KA-2; KA-8; KA-16; KA-17; KA-20; eteni KA-25
SANDOA (DR): Eteni KT-5; KT-21
TSHIKAPA (F, SH): KA-6; KA-22; KA-23; KA-31
21-23 Augústo 1998
BRAZZAVILLE (F, LI): CO-1; CO-5; eteni CO-3; eteni CO-7; eteni CO-8
BULUNGU (MK): BD-5; eteni BD-19; BD-20
GOMA (F, SW): KI-2; KI-6; KI-14
IDIOFA (MK): BD-8; BD-16
ISIRO (LI): OR-2; eteni OR-17; OR-18
KANANGA (F, SH): KA-1; KA-9; KA-14; KA-18; KA-19; KA-28; KA-30
KIMPESE (LI): BC-2; eteni BC-3; BC-4; eteni BC-6; BC-7; BC-8
KINDU (SW): KI-3; eteni KI-4; KI-13; eteni OR-5; OR-16
KINSHASA (LI 1): KN-1; KN-3; KN-8; KN-12; KN-13; eteni BC-3
KISANGANI (F): Eteni OR-1; eteni OR-7; eteni OR-8; eteni OR-10; eteni OR-14
LISALA (LI): EQ-8; EQ-11; EQ-18; EQ-21
LODJA (OT): KA-4; KA-11; KA-12; eteni KA-26; KA-27; eteni KA-32
LUBUMBASHI (F, SW): Eteni KT-1; KT-2; KT-13
MULONGO (KU): Eteni KT-8; eteni KT-10; eteni KT-16
POPOKABAKA (LI): Eteni BC-6; BD-7; eteni BD-13; eteni BD-21
28-30 Augústo 1998
BOENDE (LI): EQ-3; EQ-6; eteni EQ-13; EQ-24
BUKAVU (F, SW): KI-1; KI-11; KI-12
BUTEMBO (SW): KI-7; KI-9
DUNGU (LI): OR-6; OR-13; eteni OR-17
GBADOLITE (LI): EQ-5; EQ-9; EQ-19
KABINDA (F, SH): KA-5; KA-13; eteni KA-32
KALEMIE (SW): Eteni KT-12; KT-18; eteni KT-19
KENGE (MK): BD-3; BD-9; eteni BD-21
KINKONDJA (KU): Eteni KT-8; KT-9; eteni KT-10; eteni KT-16
KINSHASA (LI 2): KN-2; KN-5; KN-6;
KN-9; KN-11
KISANGANI (LI, SW): Eteni OR-1; eteni OR-5; eteni OR-7; OR-9; eteni OR-14
KONGOLO (SW): Eteni KI-4; KT-22
LIKASI (F, SW): Eteni KT-1; KT-17; KT-20; KT-23
NIOKI (LI): BD-4; BD-6; BD-14; BD-15
POINTE-NOIRE (F, MK-Cgo): CO-2; CO-6; eteni CO-8
UVIRA (SW): KI-8; eteni BU-1
4-6 Sɛtɛ́mbɛ 1998
BENI (SW): KI-5; KI-10
BOKUNGU (LI): EQ-10; eteni EQ-13
BUJUMBURA (RU): Eteni BU-1; BU-2; BU-3
GEMENA (LI): EQ-1; EQ-14
ILEBO (F, SH): KA-10; KA-15; KA-29
KAMINA (SW, KU): Eteni KT-4; eteni KT-6; KT-7; KT-15
KIRUNGU/MOBA (SW): Eteni KT-12; eteni KT-19
KOLE (OT): KA-7; KA-21; eteni KA-26
KOLWEZI (F, SW): Eteni KT-1; KT-3; eteni KT-5
MUKEDI (MK): BD-18; BD-23
OUESSO (F): Eteni CO-3; eteni CO-7
TEMBO (LI): BD-17; eteni BD-13
11-13 Sɛtɛ́mbɛ 1998
BUTA (LI): Eteni OR-8; OR-11
GUNGU (MK): BD-11; BD-12; eteni BD-22
KABONGO (KU): Eteni KT-4; eteni KT-6; KT-24
MWENE DITU (F, SH): KA-3; KA-24; eteni KA-25
PEPA (SW): KT-11; KT-25