“Liloba ya esakweli ya Nzambe”—Liyangani ya etúká mpo na 1999
1 Ntango bana ya Yisalaele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Mose alɔmbaki bango bápesa motuya na mitinda ya Yehova. Ayebisaki bango ete: “Mpo ete ezali na bino likambo moke te, kasi ezali bomoi na bino.” (Det. 32:45-47) Tosengeli komonisa botɔndi epai na Yehova na ndenge azali kotalela bomoi na biso na motuya mpe azali kokoba kotambwisa biso na nzela ya Liloba na ye oyo ezali na motuya monene, boye te? Na yango, tozali kozela na mposa makasi mikolo misato ya liyangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe” mpe makambo oyo Yehova asili kobomba mpo na biso.
2 Na mbula oyo, mayangani ya etúká ebongisami malamu na bingumba 59 ya République démocratique du Congo. Mayangani ekosalema na Kiluba, na Lifalanse, na Lingala, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili, na Tshiluba, mpe na Uruund. Na Kinshasa bakosala mpe na langue des signes mpo na bato oyo bayokaka te.
3 Na ntembe te bosili kozwa bibongiseli mpo na koyangana mokolo nyonso ya liyangani yango mpamba te bondimi ete ezali Yehova nde abéngi bino kuna. Bómindimisa ete azali komona milende oyo basaleli na ye bazali kosala mpo na koyangana, mpe akozanga te kopambola milende yango. (Ebe. 6:10) Soki tokoyangana mikolo nyonso ya liyangani banda na loyembo ya liboso kino na libondeli ya nsuka, tokomonisa epai na Yehova ete liloba na ye ezali na motuya mpo na biso. (Det. 4:10) Tokomonisa mpe ete tozali kopesa motuya na mosala makasi oyo bandeko na biso mingi bazali kosala mpo na kobongisa liyangani.
4 Mpo ete bankóto ya basaleli ya Yehova báyangana na bisika nyonso oyo mayangani ebongisami, esengeli ete makambo nyonso ebongisama liboso mpe misala etambola malamu. Koyebáká ete bibongiseli mpo na mayangani bisili kosalema na bolingo nyonso mpo na biso, yango ezali kopusa biso tópesa mabɔkɔ, mpo “makambo yango nyonso masalema na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.” (1 Kol. 14:40) Makanisi mpe makundoli oyo elandi ekosalisa yo ete omibongisa malamu liboso ya kokende na liyangani mpo na kozwa matomba na bilei ya elimo mpe kosepela kozala elongo na bandeko na biso baklisto.
Liboso ya liyangani
5 Bato oyo bayekolaka Biblia elongo na yo mpe baoyo bazali kosepela na solo bazali na mposa ya lisungi mpo na komibongisa mpo na koyangana na liyangani? Makambo oyo bakomona mpe oyo bakoyoka kuna ekoki kopusa bango ete bákóma basambeli ya Yehova. (1 Kol. 14:25) Bankulutu basengeli koyeba moto nyonso oyo azali na mposa ya lisungi mpo na esika ya kolala to mpo na kofuta tike, mingimingi, bandeko ya lisangá baoyo bakómi mibange, mpe basengeli na bolingo nyonso kosala ete bamposa na bango ekokisama.—Gal. 6:10.
6 Osili kozwa bibongiseli mpo na esika okolala? Soki okani kofanda epai ya bandeko na boumeli ya eleko oyo liyangani ekosalema, osili kotondisa lokasa ya lisɛngi mpo na esika ya kolala? Soki ozali na bana, oyebisi motango ya bana oyo bakozala na yo elongo? Mokomeli ya lisangá asengeli kotinda noki lokasa nyonso ya lisɛngi oyo endimami na bankulutu ya lisangá na adresi epai liyangani ekosalema. Ezali na ntina ete bandeko oyo bakopesa bisika ya kolala báyeba yango liboso mpo bámibongisa malamu mpo na yango.—1 Kol. 14:40.
7 Lokola departema mpo na mwa lisungi ya nkisi ezali bobele mpo na lisungi ya nokinoki, tozali kosɛnga na yo ete omema aspirine na yo, bankisi na yo ya mpota, nkisi ya kopɔtɔ biloko na libumu (digestion) mpe biloko mosusu ya ntina soki omoni ete okozala na mposa na yango. Soki yo moko to ndeko na yo moko azali na bokɔnɔ oyo eumeli, lokola bokɔnɔ ya motema, diabète, to bokɔnɔ ya kokangama, bosengeli komema bankisi oyo bokosengela na yango na liyangani, moto moko ya libota to moninga moko oyo ayebi mokakatano na ye asengeli kozala ntango nyonso pene na ye mpo na kosalisa ye soki mposa emonani.
8 Wana ozali kokende na liyangani mpe ntango ozali kozonga, mbala mosusu okozala na mabuku mingi ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Okomibongisa mpo na koteya solo epai na bato mosusu? Biso nyonso, na bana, tokoki kokabola batrakte epai na bato oyo tokokutana na bango. Tokozala na likoki ya kokabola bazulunalo, mwa babuku, to mikanda mosusu epai ya bato oyo bakosepela. Omibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu epai na bato oyo tokutanaka na bango te na mosala ya kosakola. Soki tolati makarɔ na biso, yango ekopesa biso libaku ya kopesa litatoli ntango tozali kokende na liyangani mpe ntango tozali kozonga.
Na boumeli ya liyangani
9 Bato bakobanda kokɔta na bisika ya mayangani na ngonga ya 8:00. Okoki kokanga bisika bobele mpo na bato ya libota na yo mpenza mpe mpo na moto mosusu oyo boyaki na ye elongo. Bisika mosusu ezali bobele mpo na bandeko oyo bakómi mibange, mpe bisika bikobongisama mpo na bandeko oyo bazali bibɔsɔnɔ mpe baoyo bafandaka na kiti ya andikapɛ. Tosengeli komibanzabanza mpo na bango mpe komonisela bango boboto. Mokolo na mokolo soki liyangani esili osengeli komindimisa ete obosani eloko na yo moko te na esika oyo ofandaki.
10 Okozwa batisimo na liyangani ya etúká? Mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ bisika bikobongisama mpo na bato oyo bakozwa batisimo, bandeko oyo bapesaka bisika ya kofanda bakosalisa yo mpo na komona esika yango. Ekozala malamu ete ozala na esika yango liboso ete manaka ebanda. Memá Biblia na yo, buku na yo mpo na loyembo, esume na yo, mpe elamba na yo ya kosukolela oyo ebongi mpenza. Bilamba oyo bakomakoma makambo ezali malamu te mpo na molulu yango. Bankulutu oyo bakotalela mituna mizwami kati na buku Lisanga elongo na bakandida ya batisimo bakomindimisa ete mokomoko na bango azali kokanga ntina malamu na likambo yango. Lokola batisimo ezali elembo ya komipesa ya moto ye moko epai na Yehova, ekozala malamu te bakandida básimbana na mabɔkɔ moko na mosusu na ntango ya kozindisama na mai.
11 Likoki ya kosalela kamera, bikangeli ya fɔtɔ mpe manyetofone na liyangani ezali. Nzokande, esengeli te kotya nkaka na bilekelo to kopekisa bayangani mosusu komona to kopɛngola likebi ya bayangani mosusu. Esengeli te kotyama na nsinga ya lotiliki to na myango ya bikoliseli lolaka ya liyangani.
12 Mpo na kozala na ntango mingi mpe koyeisa makambo pɛpɛlɛ, la Société asɛngaki biso ete tómema bilei na biso moko mpo na mokolo nyonso ya liyangani. Bandeko mingi oyo balandaki toli yango bamonaki ete ebongiseli yango epesaki bango nzela ya kofanda esika moko na mabota na bango na ntango ya bopemi mpe kolya bilei oyo bamemaki bango moko. Balobaki ete yango epesaki bango likoki ya kopema malamu mpe kozwa ntango ya kosolola mingi na bandeko. Yango ezali kosɛnga kobongisa mwa eloko ya kolya mpe ya komɛla mpe kobomba yango malamu na mwa bikwokolo ya ngalasi oyo bikoki kokɔta na nse ya efandelo na yo. Tozali kosɛnga na moto nyonso kati na liyangani ete alanda malako oyo. Na mayangani oyo euti koleka, bakambi ya bisika oyo mayangani esalemaki mpe basali ya barestora na bisika yango bamonaki ete bandeko bazalaki kokende kosomba biloko na barestora ya zingazinga. Bato mosusu oyo batekaka biloko na bandako epai tosalaka liyangani bazali kosɛnga ete bápesa bango nzela bátɛka biloko epai na bato bayei na liyangani. Soki bapesaki bango nzela bato mingi ya mokili bakosangana na biso na esika ya liyangani. Lisusu milɔngɔ ya milaimilai mpe kolekaleka ya bato ekoki kotya mobulu na esika ya liyangani, mpe na bongo kobebisa esengo ya bayangani. Na yango, tozali kosɛnga na moto nyonso ete amema mwa eloko na ye ya kolya mpe ya komɛla mokolo nyonso ya liyangani. Bato oyo bazali kosepela na solo oyo bayei na liyangani elongo na yo basengeli mpe komema bilei na bango. Milangi to biloko esalami na talatala mpe masanga ya makasi esengeli te koya na yango na esika ya liyangani.
13 Okosepela kopesa lisungi na yo mpo na kopɛtola esika yango mokolo na mokolo nsima ya liyangani? To okoki kosepela kosala na departema moko ya liyangani? Soki osepeli kopesa lisungi na yo, tolɔmbi yo ete oya kopesa nkombo na yo na departema ya basali ya bolingo malamu. Bana oyo bakokisi naino mibu 16 te bakoki kosala elongo na baboti na bango to na mokóló moko. Solo, moto nyonso akoki kotya bopɛto na esika ya liyangani na kolongoláká bosɔtɔ mpe kotya yango na bisika bibongisami.
14 Tozwaki malako mabongi mpo na lolenge na biso ya kobongisa nsuki mpe molato na biso na liyangani. Na ndakisa: Tozali kokuta malako yango na basiplema ya Mosala na biso ya Bokonzi, na bandakisa mpe bililingi oyo ezali na mikanda na biso, mpe mingi mpenza oyo Yehova azali koteya biso na Biblia. (Lom. 12:2; 1 Tim. 2:9, 10) Bato bayebi biso malamu mpe bayebi ntina oyo toyangani na engumba na bango. Na yango, lolenge na biso ya kobongisa nsuki mpe na elateli na biso ezali na nguya makasi ya kopesa litatoli yango moko. Batatoli ya Yehova mingi bapesaka ndakisa malamu na likambo yango. Na bantango mosusu, tomonaka elimo ya mokili oyo na lolenge ya kobongisa nsuki mpe elateli ya bato oyo bazali koya na liyangani. Molato oyo ezali kolakisa biteni mosusu ya nzoto ekoki komonisa soki moto yango azali moto ya elimo to te. Molato oyo ezali na mindɔndɔ te, ezali pɛto, oyo elongobani yango nde esepelisaka bato mingi. Batata ya mabota basengeli kotalela malamu bilamba oyo bato ya libota na bango bazali kolata na liyangani. Yango etaleli mpe ntango tozali na libándá ya esika ya liyangani. Kolata makarɔ ntango tozali kokende na liyangani mpe ntango touti na liyangani ezali mpe elembo oyo ezali komonisa ete tozali libota ya Yehova mpe basaleli na ye ya pɛto.—Talá Malako 8:38.
15 Salomo mokonzi ya mayele amonaki na lisalisi ya Nzambe ete “ebebe ezwami na motema na mwana” mpe “mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.” (Mas. 22:15; 29:15) Na boumeli ya liyangani, bilenge Batatoli oyo bakɛngɛlamaki malamu te bazalaki kotya mobulu mpe kosala ete bandeko bálanda manaka malamu te. Na boumeli ya mayangani oyo elekaki, bilenge mosusu bakendaki kofanda na bisika ya likoló ya liyangani mpe bazalaki kotya talatala na moi mpe kotalisa yango epai bayangani bazalaki. Kongenga ya talatala yango na moi ekoki kobebisa miso ya basusu, ata na mosika. Emonani ete bilenge yango bazwaki litomba moko te na manaka oyo ebongisamaki mpo na bango. Lokola baboti bakozongisa monɔkɔ epai na Yehova mpo na etamboli ya bana na bango, tata na mama basengeli komindimisa ete bana na bango bazali komitambwisa mpe koyoka malako ya Yehova bobele soki bana yango bafandi esika moko na bango. Bandeko oyo bazali koyamba bato bakosɛnga na moto nyonso oyo azali kosala makɛlɛlɛ ete afanda nyɛɛ, bakokundwela ye na boboto mpenza ntina ya kolanda mateya.
16 Lokola tobéngaka bato nyonso na mayangani na biso, ezali malamu tókɛngɛla bana na biso malamu mpe biloko na biso. Bana na biso bazali likabo ya motuya liuti na Yehova. Kasi toyebi ete mokili emonisaka elimo ya makaneli oyo euti na Satana. Na yango, ezali malamu koyeba ntango nyonso epai bana na yo bazali. Lisusu biloko lokola kamera, potomoni, mpe biloko mosusu ya motuya bisengeli te kotikala yango moko na kiti. Sɛnzɛlá ete voiture na yo ekangama malamu, mpe biloko na yo bisengeli kotyama na coffre ya voiture to osengeli kozala na yango elongo na yo. Yango ekolongola likama ya kosala ete moto mosusu ayiba na voiture na yo.
17 Ezali kolendisa na komona bandeko kokoma makanisi ya ntina na boumeli ya liyangani. Kokoma banɔti ya mokuse ekosalisa yo ete otya likebi na makambo oyo ezali kolobama mpe ekokundwela yo makanisi ya ntina. Kozongela makanisi ya ntina kati na libota to elongo na baninga ekosalisa yo ete omanyola makambo ya ntina oyo elobamaki kati na liyangani mpo ete obosana yango te.
18 Basaleli ya Yehova bazalaka ntango nyonso na esengo ya kopesa makabo mpo na matomba ya Teokrasi. (Ex. 36:5-7; 2 Nta. 31:10; Lom. 15:26, 27) Makabo na yo oyo epesami na motema malamu mpo na kosimba mosala na mokili mobimba ekosalelama mpo na kofutela bisika nyonso oyo mayangani masalemaki na mokili mobimba.
19 Ndenge yango emonisami na Amosa 3:7, Yehova alobaki ete “akosala likambo te bobele ete ayebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” Lokola azali ‘molimboli ya sɛkɛlɛ,’ Yehova asilaki kokomisa kati na Biblia bankama ya bisakweli oyo esili kokokisama na bosolo nyonso mpe na mobimba na yango. (Dan. 2:28, 47, NW) Bilaka minene esengeli naino kokokisama. Liyangani ya etúká 1999, “Liloba ya esakweli ya Nzambe” ekolendisa kondima na yo na bilaka ya Nzambe. Yoká malamu oyo Liloba ya Yehova ezali koloba mpo na yo. Salelá makambo oyo okomona mpe okoyoka—na mosala ya kosakola, na lisangá, mpe na bomoi na yo. Tozali kosambela Yehova apambola bibongiseli oyo ozali kosala mpo na koyangana mokolo nyonso na elambo oyo ya elimo!
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Omibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso; mokolo ya mitano, mokolo ya pɔsɔ, mpe mokolo ya lomingo.