Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Novɛmbɛ

Loyembo 170

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tyelá Yehova motema mpo na kozwa makasi.”a Lobelá mpe na mokuse makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1999, nk. 18-19, par. 6-8.

Min. 22: “Tozwaka matomba na kotalela milende oyo tozali kosala.” Lisukulu mpe lisolo ya makambo oyo ezali na siplema. Ekosalema na nkulutu moko. Yokanisá lisolo yango na makambo ya lisangá na bino. Soki ngonga ezali, bokoki kotánga baparagrafe mpe bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te.

Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Novɛmbɛ

Loyembo 172

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “Boyekolaka na kati ya libota? “b Soki ngonga ezali, bótánga baparagrafe mosusu oyo ya ntina mpenza mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo maloba na yango etyami te. Bokoki kosɛnga na batata ya mabota, to na bayangani mosusu bálimbola ndenge basalelaka toli yango to ndenge bamonaka bato mosusu bazali kosalela toli yango. Mpo na kosukisa, lendisá mabota nyonso bálɛmba te koyekola mbala na mbala na kati ya libota.

Min. 22: “Kolisá makoki na yo ya kososola.”c Nkulutu moko azali kotambwisa na esengo mpenza bozongeli ya makambo oyo elobelamaki na liyangani ya mokolo moko oyo esalemaki na mobu ya mosala oyo euti koleka.

Loyembo 195 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Novɛmbɛ

Loyembo 177

Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ. Na lisalisi ya makanisi oyo ezali na etanda “Ndenge ya kolakisa bazulunalo,” bongisá malamu bilakiseli mibale​—moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ. Na nsima limbolá ndenge ya kozwa maloba oyo tokoki kosalela mpo na kolakisa buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo to moko ya babuku mosusu oyo tosengeli kolakisa na boumeli ya sanza ya Desɛmbɛ. Talá na Index des publications de la Société Watch Tower na nse ya motó ya likambo “Présentation” mpe motó ya likambo moke oyo etyami na katikati “Liste par publication.” Pesá ndakisa moko to bandakisa mibale.

Min. 15: “‘Nakozwa ntango wapi?’” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá mpe makambo ya ntina oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nk. 20-21, par. 9-10, na nse ya motó ya likambo “Ndenge oyo bato mosusu bazwaka ntango mpo na koyekola.” Sɛngá na bayangani báyebisa mayele oyo basalelaki mpo na kozwa ntango ya kosala makambo ya ntina mingi na kolongoláká makambo oyo ezali mpenza na ntina mingi te. Lobelá ntina oyo moto na moto asengeli komibombela ntango mpo na koyekola ye moko mpe koyekola na kati ya libota, koyangana na makita ya lisangá, ntango ya mosala ya kosakola, mpe ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo.

Min. 15: Bilenge bazali kokumisa Yehova. Lisolo elongo na bayangani. Masangá mingi ezali na bilenge oyo babimaka na mosala ya kosakola. Ebongi ete básalaka bongo, ata soki yango ezali kosɛnga bango bápesaka litatoli mingimingi epai ya mikóló. (Nz. 148:12, 13; Mat. 21:15, 16) Bilenge basepelaka mingi na mosala ya kosakola ntango baboti mpe basakoli mosusu bazali kotyela bango likebi, ntango bazali kolakisa bango ndenge ya kosakola mpe kolendisa bango. Sɛngá na bayangani bápesa makanisi na bango na oyo etali ndenge ya kolakisa bilenge kosakola ndako na ndako mpe ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki. Sɛngá na baboti báyebisa makambo oyo basili kosala mpo na kosalisa bana na bango báyeba ndenge ya kolakisa bazulunalo, ndenge ya kosalela Biblia ntango bazali kosolola na moto, mpe ndenge ya koloba liboso ya bato kozanga kokakatana. Monisá ntina ya kopesa bana longonya. Tuná mituna na elenge moko oyo azali mosakoli to bilenge mibale, mpe tiká bango báloba likambo oyo esepelisaka bango mingi na mosala ya kosakola mpe mpo na nini basepelaka na yango mingi.

Loyembo 198 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Desɛmbɛ

Loyembo 179

Min.  8: Mayebisi ya lisangá.

Min. 17: Makambo oyo ezali na buku Comment raisonnner. Lisolo elongo na bayangani. Talelá bandakisa oyo elandi oyo ezali komonisa ete makambo ndenge na ndenge oyo ezali na buku yango ezali mpenza na ntina mpo na kolimbola mateya ya Biblia: Ndimbola ya maloba, na ndakisa maloba lokola “Bokonzi [Royaume]” (lok. 335) to “elimo [esprit]” (nk. 135-136); bokokanisi ya mabongoli ndenge na ndenge, oyo ezali komonisa epai wapi mpe ndenge nini nkombo ya Nzambe esalelami na kati ya Biblia (nk. 195-196) to mpe bosolo na oyo etali lifelo (nk. 123-125); molɔngɔ ya makambo oyo ezali komonisa malamumalamu endimeli mokomoko oyo esalaka ete tókesana na bato ya mangomba mosusu (nk. 393-395) to oyo ezali kolakisa ndenge moto akoki koyeba lingomba ya solo (nk. 316-318); makambo ya kala, oyo ezali komonisa ndenge Noele ebandaki (nk. 162-164) to ndenge oyo baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki kokɔta na makambo ya politiki (nk. 267-269); bilembeteli ya siansi, oyo ezali komonisa ete bozalisi ezali likambo ya solo (nk. 73-74) to oyo ezali komonisa makambo mabe oyo ebimaka ntango moto azali komɛla bangi (marijuana) to makaya (nk. 114-116). Lendisá basakoli básalelaka ntango nyonso buku kitoko oyo na mosala ya kosakola.

Min. 20: “Mapamboli oyo eutaka na komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova.​—Eteni 1.”d Ntango bokokóma na paragrafe 3 tii 6, sɛngá na bandeko na kati ya lisangá báyebisa makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola ndako na ndako, ntango bazalaki kopesa litatoli na balabala, mpe ntango bazongelaki bato oyo basepelaki mpe ntango bazalaki koyekola Biblia na bato.

Loyembo 200 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto