Tozali na bomoko mpe na esengo elongo na Yehova na Mwana na ye
Molulu oyo eleki ntina na mbula mobimba ekosalema na mokolo ya 28 Marsi
1 Ntango tokosala Elambo ya Mpokwa ya Nkolo nsima ya kolala ya moi na mokolo ya 28 Marsi 2002, tokomonisa ete tozali mpenza na bomoko mpe na esengo elongo na Yehova Nzambe na Yesu Klisto. Na mokolo wana ya ntina mingi, baklisto batikali bapakolami ‘bakosangana elongo’ na basangoli mosusu ya Bokonzi, na Tata mpe na Mwana na ye. (1 Yoa. 1:3, NW; Ef. 1:11, 12) Bamilio ya “bampate mosusu” bakokanisa mingi likoló ya libaku malamu oyo bazali na yango ya kozala na bomoko elongo na Yehova na Mwana na ye mpe ya kokokisa mosala ya Nzambe elongo na bango na bomoko ya mitema mpe ya makanisi.—Yoa. 10:16.
2 Tósala elongo mpe na boyokani ya malamu mpenza: Yehova na Yesu bazalaka ntango nyonso na bomoko mpe na esengo. Bazalaki elongo na boumeli ya ebele ya bambula liboso moto akelama. (Mika 5:2) Yango wana, bakómaki kolingana makasi. Lokola azali bwanya oyo balobeli yango lokola moto, mwana yango mobotami ya liboso alobaki boye liboso abotama lokola moto: “Mokolo na mokolo nakómaki ye oyo [Yehova] alingaki mingi, nazalaki na esengo ntango nyonso liboso na ye.” (Mas. 8:30, NW) Ntango molai oyo Mwana ya Nzambe alekisaki elongo na Liziba ya bolingo, eteyaki ye mpenza makambo mingi.—1 Yoa. 4:8.
3 Lokola Yehova amonaki ete esengelaki bato básikolama, aponaki Mwana mobotami-se-moko na ye, oyo alingaki bato mingi, mpo apesa mbeka oyo ekosikola bato, yango nde epesi biso elikya bobele moko oyo tozali na yango. (Mas. 8:31, NW) Lokola Yehova na Mwana na ye bazali na bomoko mpo na kokokisa mokano moko, bobele bongo biso mpe tozali komonisa bolingo makasi oyo esangisi biso na bango, esangisi mpe biso na biso, mpe tozali kosala mokano ya Nzambe na esengo.
4 Tómonisa botɔndi oyo euti na motema: Soki toyangani na Ekaniseli mpe soki tolandi lisukulu na likebi mpe na limemya, tokoki komonisa botɔndi ya solosolo oyo tozali na yango mpo na bolingo oyo Yehova amonisaki mpe mpo na mbeka oyo Mwana na ye apesaki mpo na biso. Lisukulu yango ekobenda likebi na biso mingimingi likoló ya ndakisa ya bolingo oyo Yesu apesaki, ndenge atikalaki sembo tii na liwa mpo akoka kopesa lisiko, ndenge azali koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama kuna na likoló, mpe mapamboli oyo Bokonzi yango ekomemela bato. Ekokundolela mpe biso ete tosengeli kolanda komonisa kondima mpe, lokola tozali “baninga ya mosala na kati ya solo,” ete tósala na molende makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova.—3 Yoa. 8, NW; Yak. 2:17.
5 Tósalisa bamosusu básangana na biso: Bankulutu basengeli kosala mpenza makasi mpo na kolendisa Batatoli nyonso oyo batiká kosakola, oyo bazali na teritware na bango, ete báyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. (Mat. 18:12, 13) Esengeli kosala liste ya baoyo nyonso bosengeli kokende kotala mpo ete bóbengisa bango nyonso, bóbosana ata moto te.
6 Toyebi bato mosusu oyo bakoki kondima koya na Ekaniseli? Tóbanda kosalisa bango bákanga ntina ya molulu yango. Tóbengisa bango na esengo mpenza mpe tómonisa bango ete bakoyambama malamu. Tiká ete tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kobengisa bato nyonso oyo toyekolaka na bango Biblia mpe bato mosusu oyo bamonisaka mposa, ezala mpe bandeko na biso mpe bato mosusu oyo toyebani na bango, ete báya na molulu oyo eleki ntina na mbula mobimba. Moto nyonso oyo azali koyekola “motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu” akoki kozwa matomba oyo lisiko epesaka. (Filp. 3:8, NW) Baoyo bazali kondima mbeka ya Klisto bakoki kozwa elikya ya solosolo ya bomoi ya seko.—Yoa. 3:16.
7 Tókanisa soki moke te ete Ekaniseli ekoki kosala eloko moko te na bomoi ya bato ya mitema sembo. Eleki sikoyo mbula mibale, na esanga ya Papouasie-Nouvelle-Guinée, bato 11 oyo bazalaki kosepela na mateya ya solo basalaki mobembo ya ngonga 17 na mwa masuwa ya moke na mai monene oyo ezalaki na mbonge makasi, mpo na koyangana na Ekaniseli. Mpo na nini? Balobaki ete: “Tozalaki na mposa tóyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto elongo na basambeli ya Yehova; esengelaki kaka tósala mobembo wana.” Kanisá molende oyo bato wana basalaki mpe botɔndi oyo bazali na yango ya kozala na bomoko mpe na esengo elongo na Yehova, na Mwana na ye mpe na bandeko baklisto!
8 Tósɛnga na bato nyonso oyo bamonisi mposa báyekola Biblia. Tólendisa bango báyanganaka na makita ya lisangá mpe báyebisaka bato mosusu mateya ya solo oyo bazali koyekola. Tósalisa bango ‘bátambola na kati ya pole’ mpe ‘básalela solo,’ elingi koloba bátosaka mitinda ya Biblia na bomoi na bango. (1 Yoa. 1:6, 7, NW) Tósalisa bango bákóma baninga mpenza ya Yehova mpe bálanda kopesa motuya mingi na libaku malamu oyo bazali na yango ya kosala mokano na ye na bomoko.
9 Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kozala na bomoko mpe esengo “na elimo kaka moko, na molimo kaka moko, wana tozali kobunda elongo mpo na kondima ya nsango malamu”! (Filp. 1:27, 28, NW) Tiká ete tózela na mitema mɔ́tɔmɔ́tɔ mokolo oyo tokokutana elongo na bandeko na Ekaniseli na mokolo ya 28 Marsi, mpe tózala ntango nyonso na botɔndi epai ya Yehova na Mwana na ye!—Luka 22:19, NW.