Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/08 lok. 1
  • Tókanisa lisiko na botɔndi mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókanisa lisiko na botɔndi mpenza
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Tómonisa botɔndi na biso Ekaniseli ekosalema mokolo ya 17 Aprili
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tókabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na mokili mobimba!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 2/08 lok. 1

Tókanisa lisiko na botɔndi mpenza

1, 2. Wapi bantina oyo etindaka biso tókanisa lisiko na botɔndi mpenza?

1 Na mokili mobimba, baklisto bakoyangana na mokolo ya pɔsɔ 22 Marsi 2008 nsima ya kolala ya moi mpo na kokanisa liwa ya Yesu Klisto ndenge ye moko asɛngaki. (Luka 22:19; 1 Kol. 11:​23-26) Botɔndi mozindo oyo tozali na yango mpo na nyonso oyo esalemaki mokolo wana, eleki sikoyo mbula 1 975, nde etindaka biso tóyangana na Ekaniseli. Yesu asantisaki nkombo ya Tata na ye mpe apesaki eyano ya malamu mpenza na ntembe oyo Satana abimisaki, na ndenge atikalaki sembo na makambo nyonso ntango banyokolaki ye mpe babomaki ye na nzete.​—Yobo 1:11; Mas. 27:11.

2 Makila ya Yesu oyo esopanaki endimisaki kondimana ya sika, mpe esalaki ete bato ya kozanga kokoka bákóma bana ya Nzambe mpe bázwa elikya ya koyangela elongo na Klisto na Bokonzi na ye ya likoló. (Yil. 31:​31-34; Mko. 14:24) Lisusu, ndenge oyo Nzambe apesaki Mwana na ye ya bolingo lokola mbeka emonisaki ete alingaka mpenza bato, ndenge kaka Yesu ye moko alimbwelaki Nikodeme.​—Yoa. 3:16.

3. Bato oyo bakoyangana na Ekaniseli bakozwa matomba nini?

3 Bengisá bato na Ekaniseli: Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali elendisaki biso tósala liste ya bato oyo tokobengisa na Ekaniseli. Osili kobanda kobengisa bato oyo otyaki na liste na yo? Osili komibongisa mpo na kosangana mingi na kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli, oyo ekobanda na mokolo ya 1 Marsi? Bato oyo bakoyangana na Ekaniseli bakoyoka makanisi euti na Makomami, oyo ekosalisa bango bándima lisiko mpe nsukansuka bázwa bomoi ya seko.​—Lom. 10:17.

4. Mpo na nini tosengeli kokóma na esika ya Ekaniseli liboso ya ngonga?

4 Soki likoki ezali, biso nyonso tosengeli kosala makasi tókóma na esika ya Ekaniseli liboso ya ngonga mpo na koyamba bato oyo bakondima koya na molulu wana ya ntina mingi. Lokola bayangani bazalaka ebele na Ekaniseli, tosengeli kosala makasi tótya likebi mingi na bato ya sika mpe na baoyo bayanganaka na makita nyonso te.

5. Ndenge nini okoki kobongisa motema na yo mpo na molulu wana?

5 Bongisá motema na yo: Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2008 mpe Calendrier 2008 ezali na programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, oyo ebandi na mokolo ya 17 Marsi. Kotalela makambo ya ntina oyo esalemaki na mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé ekosalisa yo obongisa motema na yo mpo na Ekaniseli. (Ezl. 7:10) Soki ozali kobondela mpe komanyola masolo wana ya Biblia, okokóma na botɔndi mingi mpo na bolingo oyo Yehova mpe Mwana na ye bamonisaki na ndenge bapesaki lisiko.​—Nz. 143:5.

6. Matomba nini tokozwa soki tozali na botɔndi mingi mpo na lisiko?

6 Lokola Ekaniseli ekómi pene, tiká ete tómibongisa malamumalamu mpe tósalisa basusu na koyangana na molulu wana ya ntina mingi. Soki tozali kokanisa lisiko na botɔndi mpenza, tokokóma na boyokani ya malamu mpenza na Yehova mpe Mwana na ye. (2 Kol. 5:​14, 15) Yango mpe ekotinda biso tómipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya basusu.​—1 Yoa. 4:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto