Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 11 Marsi
Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá na bino oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kobongisa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi mpe Lamuká! ya 22 Marsi. Na elakiseli mokomoko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi “Nasepelaka na yango te.”—Talá buku Comment raisonner, lokasa 16.
Min. 12: Biso baklisto tóbatela ezaleli na biso ya koboya kokɔta na makambo ya politiki. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki. Bolingo ya ekólo ekómi komonana mingi na biteyelo, na bisika ya mosala mpe na bakartye oyo tofandi. Bato mingi oyo bazali kolendisa likambo yango bazali kokanisa ete yango ezali nzela ya kosilisa mitungisi mpe mawa oyo ezali kobimisa mpasi oyo bato ya mboka na bango bazali komona. Atako makambo oyo tozali komona na mokili ezali mpe komonisa biso mpasi, biso toyebi ete ezali na likambo moko ya ntina mingi koleka nyonso wana. Likambo yango ezali nde boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe nsango ya Bokonzi ezali kobɔndisa biso. Ntango tozali koyebisa bato mosusu na mayele mpenza ntina oyo tokɔtaka te na makambo oyo elendisaka bolingo ya ekólo, tosengeli mpe kobɔndisa bango na elikya oyo tozwi na kati ya Liloba ya Nzambe. Mwa buku Les Témoins de Jéhovah et l’instruction, na nkasa 20-24, na nse ya motó ya likambo moke “Le salut au drapeau,” elimboli ntina oyo tosanganaka te na milulu oyo elendisaka bolingo ya ekólo. Lobelá makanisi ya ntina oyo epesami na nkasa yango mpe lendisá baboti bátalela lisusu malamumalamu makanisi yango elongo na bana na bango. Lobelá likambo oyo ndeko moko akutanaki na yango, oyo ezali na lokasa 20 ya mwa buku yango. Monisá polele ete tosengeli kosambela kaka Yehova, atako tosengeli kotosa bakonzi ya Leta.
Min. 20: “Tózala bazwi na misala ya malamu.”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lendisá basakoli nyonso bábima mingi na mosala ya kosakola mpo na kobongisa Ekaniseli oyo ekosalema na mokolo ya 28 Marsi. Lobelá ndenge nini nkasa ya kobenga bato ekoki kokabolama na lolenge oyo ebongi mpenza. Sɛngá basakoli báyebisa ndenge basalaki mpo na kobenga bandeko na bango, bato oyo bafandaka pene na bango, bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo bamonisaki mposa, mpo báyangana na Ekaniseli ya mbula oyo euti koleka mpe esengo nini yango ememelaki bango. Lendisá basakoli nyonso oyo bazali na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili ete bázwa formilɛrɛ na nsima ya makita.
Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Marsi
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli.” Lendisá bandeko nyonso bálanda programɛ ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli oyo ebongisami banda na mokolo ya 23 tii ya 28 Marsi, ndenge emonisami na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2002.
Min. 15: “Tozali na bomoko mpe na esengo elongo na Yehova na Mwana na ye.” Lisukulu moko ya kolendisa oyo euti na Makomami, ekosalema na nkulutu moko. Lendisá mosakoli moko moko asala lisusu milende mpenza kobanda sikoyo tii mokolo ya 28 Marsi mpo na kobenga bato ebele báyangana elongo na biso na Ekaniseli.
Min. 20: Litomba nini tozwaka na botángi ya Annuaire? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Liboso, tángá mpe lobelá makanisi ya ntina oyo ezali na “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.” Na nsima, tuná bayangani bálobela makambo oyo ezali na Annuaire 2001 mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, oyo bamonaki mpenza ete elendisaki mpe ekómisaki kondima na bango makasi. Lendisá bandeko nyonso bátánga Annuaire 2002 mobimba ntango bakozwa yango mpe básalela yango mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bámesana na ebongiseli ya Yehova.
Loyembo 45 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Marsi
Min. 14: Mayebisi ya lisangá. Monisá ete ntango eleki naino te mpo na kotondisa formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili. Salelá makanisi oyo epesami na lokasa 8 mpe sɛngá nkulutu moko asala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe elenge moko asala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Aprili. Nsima ya elakiseli mokomoko, bendá likebi na bisika oyo esalemi malamu.
Min. 15: Mposa ya lisangá.
Min. 16: Tósalela buku Comment raisonner mpo na kolendisa bato. Lisolo elongo na bayangani. Moto nyonso azalaka na mposa bálendisa ye na bolingo nyonso. Yango wana, biso nyonso tosengeli kozala na “maloba ya kobɔndisa” basusu, ezala bato oyo bazali konyokwama oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. (1 Tes. 5:14, NW) Na lisalisi ya buku Comment raisonner, sɛngá bayangani báyebisa mikapo nini ya Biblia bakoki kosalela mpo na kolendisa moto oyo azali kokutana na moko ya mikakatano oyo elobelami na nkasa 119 kino 122. Lendisá mokomoko na bango ete amekaka kolendisa moto nyonso oyo azali na mposa ete bálendisa ye.—Gal. 6:10.
Loyembo 131 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 1 Aprili
Min. 7: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo ya mosala ya kosakola mpo na sanza ya Marsi.
Min. 18: “ ‘Makabo na motindo na mibali’ babatelaka etonga ya Nzambe na molende.” Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, na lisolo oyo ezali na siplemá. Lobelá mikapo ya Biblia oyo epesami. Monisá ete soki bankulutu bazali kokende kotala baoyo batiká kosakola mpe kosalisa baoyo bazali lisusu nzoto makasi te, ete básala oyo bakoki kosala, yango ekoki kobimisa mbuma ya malamu. Lokola babateli ya mpate bazalaka na bolingo, bamonisaka ete bayebi malamu milende nyonso oyo bampate basalaka mpo na kozala ntango nyonso makasi na mosala ya Yehova.
Min. 20: “Tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola.”b Ntango bokokóma na paragrafe 5, tuná bandeko bápesa makanisi mpo na komonisa ndenge bokoki kosala mpo mosala ya kosakola ebota mpenza mbuma mingi na teritware ya lisangá na bino. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kopusana pene na moto moko mpo na kopesa ye litatoli ya mokuse. Lendisá basakoli báluka mabaku ya kopesa litatoli na pɔsɔ oyo.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.