Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/06 lok. 1
  • Luká mabaku ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká mabaku ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Tókumisaka Yehova mokolo na mokolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Sanzolá Yehova na kopesáká litatoli ya libaku malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Salelá mabaku oyo ozwi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 2/06 lok. 1

Luká mabaku ya kosakola

1 Lisangá ya boklisto esalemi na bato oyo bazali na bomoi ya ndenge na ndenge. Nzokande, eloko oyo esalaka ete tózala na bomoko ezali mokano oyo tozali na yango ya kokumisa Yehova. (Nz. 79:13) Soki mikakatano ya nzoto to mikakatano mosusu ezali kosala ete tókoka te koyebisa bato nsango malamu, ndenge nini tokoki kozwa mabaku ya kosakola?

2 Na misala oyo tosalaka mokolo na mokolo: Lokola Yesu azalaki kokutana na bato mokolo na mokolo, asalelaki mabaku yango mpo na kopesa litatoli. Asololaki na Matai ntango alekaki liboso ya biro moko ya kofutisa mpako, na Zakai ntango azalaki na mobembo mpe na mwasi moko Mosamalia wana azalaki kopema. (Mat. 9:9; Luka 19:1-5; Yoa. 4:6-10) Na misala oyo tosalaka mokolo na mokolo, biso mpe tokoki kopesa litatoli na masolo oyo tosololaka na bato. Soki tozali na Biblia mpe na batrakte to na mwa babuku, yango ekosalisa biso tókakatana te mpo na kolobela elikya na biso.​—1 Pet. 3:15.

3 Okosala nini soki maladi to bobange epekisi yo obimaka lisusu te kosakola ndako na ndako? Luká mabaku nyonso oyo okoki kosalela mpo na kopesa litatoli epai ya minganga oyo bazali kosalisa yo mpe epai ya bato nyonso oyo bazali koya kotala yo. (Mis. 28:30, 31) Soki mbala mingi maladi to mokambo mosusu epekisaka yo kotambola, osilá komeka kopesa litatoli na telefone to na mokanda? Ndeko mwasi moko azalaki mbala na mbala kokomela bandeko na ye oyo bazali Batatoli te mikanda. Azalaki kolobela mpe makambo ya kolendisa oyo ezali na Biblia mpe makambo oyo azalaki kokutana na yango ntango azalaki kopesa litatoli.

4 Na mosala to na kelasi: Mposa na biso ya kokumisa Yehova ekotinda biso mpe tóluka mabaku ya kolona mboto ya solo na esika ya mosala to na kelasi. Mwana moko ya mbula mwambe oyo azali mosakoli, ayebisaki baninga na ye ya kelasi makambo atángaki na Lamuká! na ntina na sanza. Ntango molakisi ayebaki epai oyo mosakoli yango azwaki makambo yango, andimaki bámemelaka ye banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Na esika ya mosala, soki totye buku Biblia eteyaka na esika oyo bato bakoki komona, yango ekoki kotinda bango bátuna biso mituna mpe ekopesa biso nzela ya kopesa bango litatoli.

5 Okoki kokanisa balolenge oyo okoki kozwa mabaku ya kosakola na mosala oyo osalaka mokolo na mokolo? Wana tozali kosala nyonso oyo tokoki, tiká ete mokolo na mokolo tósalaka makasi “tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli.”​—Ebe. 13:15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto