Salelá mabaku oyo ozwi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi!
1. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi?
1 Mokonzi Davidi atikaki te ete makambo ya mabe elɛmbisa ye nzoto. Na ndakisa, Davidi azalaki na mposa ya kotongela Yehova ndako. Ntango Yehova ayebisaki ye ete akotonga yango te, Davidi abongolaki mikano na ye mpe asalisaki Salomo na kosangisa bisaleli mpo na kotonga tempelo. (1 Bak. 8:17-19; 1 Nt. 29:3-9) Na esika ya kotingama kaka na oyo akokaki kosala te, Davidi atyaki nde likebi na oyo akokaki kosala. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Davidi wana tozali koluka mabaku ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi?
2. Ndenge nini mokomoko na biso asengeli komitalela?
2 Salá oyo okoki kosala: Bandeko mingi bakómisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bákóma babongisi-nzela basungi to ya sanza na sanza. (Mat. 6:22) Yo mpe okoki kosala lokola bango? Soki otaleli malamumalamu makambo ya bomoi na yo mpe obondeli, okoki komona ete “porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala” efungwami liboso na yo. Soki bongo, salelá libaku yango!—1 Ko. 16:8, 9.
3. Wapi mabaku ya kopesa litatoli oyo tokoki kosalela, ata soki makambo ya bomoi na biso epesi biso nzela te ya kokóma mobongisi-nzela?
3 Bongo soki makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela te ya kokóma mobongisi-nzela? Kolekisa te mabaku mosusu oyo okoki kozala na yango. Na ndakisa, soki mosala na yo ya mosuni epesaka yo libaku ya kokutana na bato oyo bazali Batatoli te, mpo na nini te kosalela libaku yango mpo na kopesa bango litatoli? To soki ozali kobɛla, okoki nde kosalela mabaku oyo ozali na yango ya kopesa litatoli epai ya bato oyo bazali kosalisa yo? Kobosana te ete ezali na ebongiseli moko mpo na mibange mpe bato oyo bazali na maladi makasi: bakoki kopesa lapolo ya miniti 15 to koleka. Ntango ozali kotondisa lokasa ya lapolo na yo ya mosala ya kosakola, kobosana te kokɔtisa ngonga oyo osakolaki na libaku malamu, mokanda nyonso oyo okabolaki ná trakte mpe lokasa ya libyangi ya Ekaniseli to ya liyangani ya etúká. Mbala mosusu okokamwa na komona ete ntango oyo ozwaki na mabaku wana ya mikemike ekoki kobimisa bangonga ebele!
4. Ekateli na yo ezali nini?
4 Ezala makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, tiká tósalela libaku nyonso oyo tozwi mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na yango, tokozala na esengo ya koyeba ete tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na Bokonzi.—Mrk. 14:8; Luka 21:2-4.