Monisá ete osepelaka na bato—Na komibongisáká
1 Komibongisa malamu liboso ya kobima na mosala ya kosakola esalisaka biso tómonisa basusu ete tosepelaka na bango. Na ndenge nini? Soki tomibongisi malamu, tokomitungisa mingi te ntango tozali koloba, mpe yango ekosala ete tótya likebi nyonso epai ya moto oyo tozali kosolola na ye. Lisusu, yango esalisaka biso tólongola kobanga mpe etindaka biso tóloba na motema mobimba. Kasi, ndenge nini tokoki kobongisa maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi mpenza?
2 Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi: Poná lolenge moko ya kobanda lisolo na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006, oyo eyokani na bato ya esika bofandi, mpe talelá ndenge oyo okoki koloba yango na maloba na yo moko. Yokanisá yango na bato ya teritware na bino. Na ndakisa, soki mbala mingi okutanaka na bato ya lingomba moko boye to ekólo moko boye, kanisá makambo oyo ekoki kosala ete básepela na lisolo na yo. Soki masolo na yo ezali kotala bato oyo ozali kosolola na bango, okomonisa ete ozali mpenza kosepela na bango.—1 Kol. 9:22.
3 Ntango obandi kosalela maloba yango ya kobanda lisolo, luká kokómisa yango lisusu malamu koleka. Lokola maloba ya ebandeli ezalaka na ntina mingi, tyaká likebi na biyano oyo bato bazali kopesa yo na ebandeli ya lisolo. Likambo oyo ozali koloba ezali kosepelisa bango? Bato bazali koyanola na mituna oyo ozali kotuna bango? Soki te, bongisá maloba yango lisusu tii ekokóma malamu mpenza.
4 Makambo oyo ekosalisa yo obosana te: Bato mingi bazalaka na mokakatano ya koyeba lisusu maloba ya kobanda lisolo oyo babongisaki ntango bakómi liboso ya porte ya moto. Soki ekómelaka yo mpe bongo, osilá komekameka lisolo na yo na mongongo makasi elongo na moto mosusu? Yango ekoki kosalisa yo oyeba malamu makanisi na yango mpe oloba yango na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Yango mpe ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kosala na biyano ndenge na ndenge oyo bato bakoki kopesa.
5 Eloko mosusu oyo ekoki kosalisa yo obosana lisolo na yo te, ezali kokoma makanisi yango na papye mpe kobwaka liso na papye yango liboso ya kobɛta na porte. Basusu bamonaka ete kokoma mwa makanisi ndenge wana esalisaka bango bámiyoka malamu ntango bazali kosolola na bato mpe básolola na bango malamu. Soki tozali komibongisa malamu ndenge wana, tokoki komonisa basusu ete tosepelaka na bango mpe ndenge na biso ya koyebisa bango nsango malamu, ekokóma lisusu malamu mingi.