Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Aprili
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 3/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Marsi

Loyembo 131

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 6 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya Marsi nzela moko na lokasa ya libyangi ya Ekaniseli.

Min. 20: Bantina ya koyanganaka na makita. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2007, nkasa 11-13. Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwi na ndenge bayanganaka na makita mpe mikakatano oyo balongaki mpo báyanganaka na makita nyonso.

Min. 15: “Biso nyonso tozali na eloko ya kopesa Yehova.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Loyembo 8

Pɔsɔ ebandi na 17 Marsi

Loyembo 144

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá bayangani bámema Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi mpe bámibongisa mpo na kolobela ndenge malamu ya kolakisa yango na teritware ya lisangá na bino. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Ekosalema na nkulutu moko. Tángá lisolo yango mobimba mpe tuná mituna.

Min. 20: “Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakoyangana na Ekaniseli?”b Ntango bokotalela paragrafe 5, salá elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola Biblia na moto oyo ayanganaki na Ekaniseli mpo na mbala ya liboso.

Loyembo 214

Pɔsɔ ebandi na 24 Marsi

Loyembo 111

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo ya sika. Lisolo elongo na bayangani. Nsima ya kolobela na mokuse Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili, tuná bayangani masolo nini ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bango bámonisa ndenge oyo bakani kolakisa masolo oyo baponi. Tokoki kotuna motuna nini mpo na kobanda lisolo? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango tokoki kotánga? Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili.

Min. 20: Tozali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2005, nkasa 18-19, paragrafe 10-14. Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo nsango ya Bokonzi ebɔndisaki bango mpe epesaki bango elikya, na mbala ya liboso oyo bayokaki yango.

Loyembo 29

Pɔsɔ ebandi na 31 Marsi

Loyembo 37

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi.

Min. 20: Salelá malamu Annuaire 2008. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi,” oyo ezali na siplema, na nkasa 3-4. Sɛngá bandeko mibale to misato bálobela likambo moko oyo elendisaki bango ntango batángaki Annuaire yango. Bongisá mpo mosakoli moko to basakoli mibale bálobela programɛ na bango ya kotánga Annuaire. Mpo na kosukisa, sɛngá bayangani nyonso bátánga Annuaire mobimba. Soki Annuaire 2008 ezali te, bósalela Annuaire 2007.

Min. 15: “Tólendisanaka ntango tobimi na mosala ya kosakola.”c

Loyembo 122

Pɔsɔ ebandi na 7 Aprili

Loyembo 186

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 20: Okobatisama mokolo nini? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2006, nkasa 29-30, paragrafe 14-17. Sololá mpe na mokuse na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bazwaki batisimo ntango bazalaki bilenge. Nini etindaki bango bázwa ekateli wana ya ntina mingi atako bazalaki bilenge? Ndenge nini batisimo esalisaki bango bákola na elimo mpe ndenge nini bokoli yango ebatelaki bango?

Min. 15: Omeká kobanda koyekola na moto Biblia na mbala ya liboso oyo bokutani na ye? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002, lokasa 6. Sɛngá bayangani bálobela makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa mpe ndenge oyo bakoki koyokanisa yango na bamposa ya bato mpo na kobanda koyekola na bango Biblia na buku Biblia eteyaka. Na nsima, salá elakiseli moko to bilakiseli mibale. Sɛngá bayangani bámeka kosalela ata lolenge moko ya kobanda lisolo na pɔsɔ oyo ekolanda mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na buku Biblia eteyaka, na mbala ya liboso oyo bakutani na bango.

Loyembo 225

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto