Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/08 lok. 6
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Tóbosana te baoyo bafandi na bandako ya mibange
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Bazali bango moko kasi tobosani bango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Okokufa!”
    Lamuká!—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 4/08 lok. 6

Biyano na mituna na bino

◼ Ezali malamu ete Motatoli ya Yehova amisalisa na lopitalo moko to afanda na ndako moko ya mibange oyo etambwisami na lingomba moko boye?

Mangomba mingi ezalaka na balopitalo mpe bandako ya mibange oyo esalisaka bato mpo na mwa ntango moke to ntango molai. Mbala mingi, bisika yango esalemi te mpo na kotombola Babilone Monene. (Emon. 18:​2, 4) Ekoki kozala ete na ebandeli, basalaki bisika yango kaka mpo ekɔtisaka mbongo na lingomba. Lelo oyo, balopitalo yango mosusu ezali ya lingomba kaka na nkombo, kasi mosusu ezali mpe na bakonzi ya lingomba yango oyo basalaka kuna.

Motatoli ya Yehova mokomoko nde asengeli kozwa ekateli ya koboya to kondima komisalisa na lopitalo moko to kofanda na ndako moko ya mibange oyo ekoki kozala na boyokani na lingomba moko boye. Lisosoli ya Motatoli moko ekoki kotinda ye andima komisalisa na bisika ya ndenge wana, nzokande lisosoli ya mosusu ekoki kopekisa ye. (1 Tim. 1:⁠5) Ezali na mwa makambo oyo ekoki kotinda moto azwa ekateli wana, mpe ezali malamu tótalela yango.

Na ndakisa, ekoki kozala ete na esika ofandi, lopitalo to ndako mosusu ya mibange ezali te longola kaka oyo ezali na nkombo ya lingomba moko. To soki mosusu ezali, esalisaka malamu te koleka oyo wana ya lingomba. Ekoki mpe kozala ete kaka oyo ya lingomba nde ezali na bisaleli oyo ebongi mpo na kosalisa maladi na yo, to kuna nde monganga na yo azali na ndingisa ya kosalisa yo to kosala yo lipaso. Lisusu, ekoki kozala ete kuna nde bakondima kosalisa yo kozanga kosalela makila, nzokande na balopitalo mosusu bakondima te. Wana ezali mwa makambo oyo okoki kotalela liboso ya kozwa ekateli ya komisalisa na lopitalo boye to boye.

Soki ondimi básalisa yo na lopitalo moko to kofanda na ndako moko ya mibange oyo ezali na boyokani na lingomba moko boye, okoki kotalela mbongo oyo okofuta kuna kaka lokola mbongo oyo ofutaka na moto oyo asaleli yo mosala moko boye. Mpo na yo, ezali lokola nde lingomba wana ezali kosala mombongo mpe mbongo oyo opesi ezali mpo na mosala basaleli yo, kasi te likabo mpo na kotombola losambo ya lokuta. Ekozala kaka lokola osombi eloko epai na bango to ofuti bango mpo na mosala basaleli yo.

Nzokande, lokola ozali moklisto, soki ondimi básalisa yo na bisika ya ndenge wana, osengeli kokeba ete omikɔtisa ata moke te na losambo ya lokuta. Lisusu, osengeli te kobenga bato oyo basalaka kuna to baoyo bazali koya kotala bato ya maladi na bankombo ya lokumu ya mangomba na bango, lokola “Sango” to “Mamelo.” (Mat. 23:⁠9) Osengeli kotalela yango kaka lokola esika oyei komisalisa mpe okofuta mbongo, kasi mpo na likambo mosusu te.

Soki bandimi yo na lopitalo ya ndenge wana, okoki koyebisa bango ete ozali Motatoli ya Yehova mpe okosepela ete bankulutu ya lisangá báyaka kotala yo. Na ndenge yango, okozwa lisalisi ya elimo oyo ebongi ntango okozala kuna.​—⁠1 Tes. 5:⁠14.

Ntango bandeko ya mibange bakei kofanda na ndako ya mibange, bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli, bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá basengeli kosala nyonso mpo na kosalisa bango na elimo, mingimingi soki ndako yango etambwisami na lingomba moko boye. Soki tozali kosalisa bango na molende ndenge wana, ekopesa bango makasi mingi mpe ekopekisa bango bámikɔtisa kozanga koyeba na milulu ya losambo, bafɛti to makambo mosusu ya ndenge wana oyo esalemaka na bandako wana.

Makanisi oyo touti kotalela ekosalisa mokomoko na biso atalela makambo nyonso liboso ya kozwa ye moko ekateli ya komisalisa na lopitalo to kofanda na ndako ya mibange boye to boye.​—⁠Gal. 6:⁠5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto