“Okokufa!”
LISOLO YA LEANNE KARLINSKY
Naboyi bázongisa ngai makila, kasi naluki lisalisi oyo eleki malamu na Espagne
SOKI balobi na yo opona esika nyonso oyo olingi kokende na mokili, okopona mboka nini? Mpo na ngai, ezalaki mpasi te. Natángisaka lokota ya Espagnole, mpe ngai na Jay, mobali na ngai, na Joel, mwana na ngai ya mobali, tozali na lisangá ya Batatoli ya Yehova oyo basalaka makita na Espagnole, na engumba Galax, na etúká ya Virginie, na États-Unis. Yango wana, nazalaki na mposa makasi ya kokende na Espagne. Kanisá naino esengo oyo nazalaki na yango ntango baboti na ngai basɛngaki ngai tókende elongo na bango na Espagne! Atako mobali na ngai mpe mwana na ngai ya mobali bakokaki kokende na biso te, nasepelaki mingi mpamba te, tokɔtaki na mpɛpo oyo ememaki biso tii na Madrid. Ntango tokómaki kuna na mokolo ya 21 Aprili, tosengelaki kokenda na Estella na vuatire, mboka moko ya moke na Navarre, na nɔrdi ya Espagne. Nafandaki malamu na kiti ya nsima ya vuatire mpe mpɔngi ezwaki ngai.
Likambo oyo nazali koyeba ezali ete ntango nalamukaki, namonaki nalali na matiti ya zamba mpe moi ezalaki kobɛta ngai na miso. Namitunaki ete: ‘Nazali wapi? Nakómi awa ndenge nini? Nazali kolɔta to ezali mpenza solo?’ Ntango nazalaki komituna boye, nayaki komona ete likambo ya nsɔmɔ ekómelaki ngai. Ezalaki ndɔtɔ te, mpamba te nazalaki malamu te. Elamba na ngai epasukaki mikemike na loboko ya mwasi mpe nakokaki lisusu kotombola mabɔkɔ to makolo na ngai te. Na nsima, bayebisaki ngai ete vuatire na biso etutanaki na ebende oyo ezalaka pembeni ya nzela mpe ebwakaki ngai libanda, ekendaki kobaluka mpe ekweaki na lobwaku moko ya mozindo ya mɛtrɛ 20 oyo ezalaki pembeni wana. Ezali mpe malamu lokola, ezala ngai moko to baboti na ngai, toyebi te ndenge nini likama yango esalemaki.
Ntango nabelelaki, moto moko oyo atambwisaka motuka ya monene ayaki mbangu esika ngai nazalaki. Na nsima, akitaki na nse mpenza na lobwaku, esika motuka ezalaki; baboti na ngai bakangamaki na kati. Moto yango agangaki epai ya moninga na ye ete: “Yebisá bato ya ambilanse báya noki! Bato oyo bazali na kati ya vuatire bazoki makasi!” Na nsima, azongaki epai na ngai mpo nazalaki koningana te mpe amekaki na boboto nyonso kosembola lokolo na ngai. Nagangaki mpo mpasi elekaki makasi; na ntango wana nde nayebaki ete nazoki makasi.
Bamemaki ngai mbangu na lopitalo ya Logroñó mpe batyaki ngai na esika oyo batyaka bato ya maladi makasi. Bapolisi bazalaki na boboto mpe bayebisaki Batatoli ya Yehova ya mboka wana likama oyo ekómelaki ngai mpe esika oyo nazalaki. Eumelaki te, bandeko mingi ya masangá ya Estella mpe ya Logroño bayaki kotala ngai; bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga bazalaki mpe wana. Ya solo, na ntango wana ya mpasi oyo nalekisaki na lopitalo yango, bandeko na ngai baklisto ya bolingo, oyo ezalaki mbala na ngai ya liboso nakutana na bango, bamipesaki butu na moi mpo na kokokisa bamposa na ngai. Na bolingo nyonso, basalisaki mpe baboti na ngai, oyo bazongaki mpenza nzoto kolɔngɔnɔ mpe pɔsɔ moko nsima ya likama yango, babimaki na lopitalo.
Na mokolo ya misato, na ngonga ya 1:00 ya ntɔngɔ, basalaki ngai lipaso mpamba te loketo na ngai ebukanaki. Nayebisaki monganga ete naboyi bázongisa ngai makila.a Andimaki kasi asepelaki te, mpe ayebisaki ngai ete nakokufa. Lipaso elekaki malamu, kasi nakamwaki ndenge bazalaki kosukola bampota na ngai te mpe na nsima, bazalaki ata kolongola babande te.
Na mokolo ya mitano, nasilaki mpenza makila (taux d’hémoglobine 4,7); mpe nazalaki lisusu na makasi te. Monganga andimaki kopesa ngai nkisi oyo esalemi na makila te—batubaki ngai ntonga ya érythropoïétine (EPO) oyo basangisaki na fer mpe nkisi mosusu oyo ematisaka makila, mpo na kopesa nzoto likoki ya kobota ba globules rouges mingi ya makila.b Na ntango yango, Jay na Joel bakómaki. Nasepelaki mingi mpenza ntango namonaki mobali na ngai na mwana na ngai ya mobali!
Pene na ngonga 1:30 ya ntɔngɔ, monganga moko ayebisaki Jay ete tribinali esili kopesa lopitalo ndingisa ya kozongisa ngai makila soki mpasi na ngai eyei makasi. Jay ayebisaki ye ete mposa na ngai ezalaki ete bázongisa ngai makila te ata ndenge nini. Monganga yango ayebisaki ye ete: “Soki ezali bongo, akokufa!”
Jay asololaki na bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga mpo bámema ngai na lopitalo mosusu oyo ekotosa ekateli na ngai. Elingi koloba te ete bato nyonso ya lopitalo wana baboyaki koyokela ngai. Na ndakisa, monganga moko ya mwasi ayebisaki ngai ete akosala nyonso oyo ekoki na ye mpo básalisa ngai mpe bakolanda ekateli na ngai. Kasi eumelaki te mpe minganga mosusu bazalaki kotungisa ngai. Batunaki ngai ete: “Ondimi kokufa mpe otika libota na yo?” Nayebisaki bango ete nalingi básalisa ngai na ndenge ya malamu mpenza kasi na makila te. Minganga yango baboyaki kosalisa ngai. Moko azalaki ata na mawa te mpe alobaki na ngai ete: “Okokufa!”
Bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga bazwaki lopitalo moko na Barcelone oyo endimaki kosalisa ngai kozanga kosalela makila. Lopitalo yango ekesanaki mpenza na oyo ya liboso! Na Barcelone, balifulumɛ mibale basukolaki ngai na boboto nyonso mpe basalaki nyonso ete nasepela na esika yango. Ntango babandi kolongola babande, lifulumɛ moko amonaki ete ekómaki na langi ya mai ya pondu mpe ekómaki makasi mpo na makila oyo ekangamaki na babande yango. Ayebisaki ngai ete ayoki nsɔni mingi na ndenge bato ya mboka na ye basali ngai makambo ya boye.
Eumelaki te mpe babandaki kopesa ngai nkisi oyo nasengelaki kozwa na lopitalo ya Logroño. Esalisaki ngai na ndenge ya kokamwa. Nsima ya mwa mikolo, nazalaki lisusu mpenza na likama ya kokufa te mpe makila na ngai emataki (taux d’hémoglobine 7,3). Ntango nabimaki na lopitalo, makila emataki mwa mingi (taux d’hémoglobine 10,7). Ntango basalaki ngai lisusu lipaso na lopitalo moko na États-Unis, makila na ngai emataki lisusu (taux d’hémoglobine 11,9).
Nazali mpenza kopesa matɔndi mingi na minganga mpe balifulumɛ oyo bazali kosala milende mpe bazali komemya bikateli ya bato oyo bango bazali kosalisa, ezala bandimi makanisi na bango to te. Ntango minganga bazali kotosa bindimeli ya moto ya maladi, bazali mpenza kosalisa ye na makambo nyonso; na bongo, bazali kopesa ye lisalisi ya monganga oyo eleki malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa makila mpo na kotosa mitinda ya Biblia.—Talá Genese 9:4; Levitike 7:26, 27; 17:10-14; Deteronome 12:23-25; 15:23; Misala 15:20, 28, 29; 21:25.
b Moklisto ye moko nde asengeli kopona soki akondima kozwa EPO to te.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1994, lokasa 31.
[Elilingi na lokasa 10]
Ngai na mobali na ngai, na mwana na biso
[Elilingi na lokasa 11]
Bandeko mibale ya Komite ya boyokani elongo na minganga