Tósalelaka Biblia malamumalamu
1. Mpo na nini Biblia ezali na ntina mingi?
1 Kosalela malamumalamu Liloba ya Nzambe esalisaka biso tósakola mpe tóteya solo na ndenge ya polele mpe tómonisa polele mateya ya lokuta mpe mimeseno oyo euti na bonkɔkɔ ya bato.—2 Tim. 2:15; 1 Pe. 3:15.
2. Nini ekoki kosalisa biso mpo tózwaka bavɛrsɛ ya Biblia kozanga mokakatano?
2 Tómesana na Biblia: Moto amesanaka na eloko moko soki azali kosalela yango mingi. Kotánga Biblia mobimba esalisaka moto ayeba na mokuse makambo oyo Biblia elobelaka. Esalisaka mpe mpo moto asimba bavɛrsɛ ya Biblia mpe azala na mokakatano te mpo na kozwa yango. Soki omeseni na Biblia, okobanda koloba na mpiko mpe na kondima ntango ozali kopesa litatoli na libaku malamu mpe na mosala ya kosakola.—1 Tes. 1:5.
3, 4. (a) Wapi mwa makambo tokoki kosala mpo na komesana na Biblia? (b) Bosilá kosalela mayele mosusu mpo na komesana na Biblia?
3 Zaláká na momeseno ya kofungola Biblia mpe kolanda ntango bazali kotánga bavɛrsɛ na makita. Ntango ozali koyekola yo moko to mpe ozali kobongisa makita, tángáká bavɛrsɛ oyo bazongeli maloba na yango te mpe kanisáká ndenge oyo okoki kosalela yango. Bandeko mingi bamonaka ete kotánga bavɛrsɛ na kati ya Biblia, na esika ya kotánga yango na ordinatɛrɛ to na plan, esalisaka bango mpo bámona yango noki ntango balingi kosalela yango na mosala ya kosakola.—Yoa. 14:26.
4 Mabota mosusu babongisaka ntango mpo na kokanga na motó bavɛrsɛ ya Biblia. Bamosusu basalelaka mwa bakarte oyo bakomi maloba na ngámbo moko mpe vɛrsɛ yango moko na ngámbo mosusu. Basalaka lisano ya kotunana soki vɛrsɛ boye elobaka nini to maloba boye ezali na vɛrsɛ nini. Kosala bilakiseli oyo ezali komonisa ndenge ya kopesa litatoli mpe ndenge ya kosala ntango moto abimisi ntembe to atuni biso motuna esalisaka mpe mpo tóyeba kosalela Biblia malamumalamu.
5. Mpo na nini tosengeli koyeba kosalela Biblia malamumalamu?
5 Biblia eleki buku mosusu nyonso. Kaka yango nde ezali na maloba oyo ekoki kokómisa biso bato ya “bwanya mpo na lobiko.” (2 Tim. 3:15) Lokola na teritware na biso bato mingi bayebi te maloba ya motuya oyo ezali na Biblia, ezali na ntina mingi tóbakisa mayele na biso mpo na kolakisa bango makambo oyo ezali na Biblia.—Mas. 2:1-5.