Manaka mpo na pɔsɔ ya 25 Yanuali
PƆSƆ EBANDI NA 25 YANUALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Basambisi 5-7
No. 1: Basambisi 7:1-11
No. 2: Ndenge nini tokoki koyeba “mwasi ya ndumba monene” oyo Emoniseli 17:1 elobeli?
No. 3: Ezali na moto oyo asilá kobima na lifelo oyo Biblia elobeli? (rs lok. 124 par. 4–lok. 125 par. 2)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Mokanda oyo tokokabola na Febwali. Lobelá na mokuse makambo ya ntina oyo ezali na mokanda tokokabola na sanza yango. Bósala mpe elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko asaleli libaku malamu mpo na kobanda koyekola na moto Biblia na buku oyo tokokabola na sanza yango.
Min. 20: “Ozali kozela nini mpo na kotondisa yango?” Lisolo ya mituna mpe biyano, ekosalema na nkulutu moko. Bósala mpe elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko azali kolimbola ntina ya karte DPA, mpe kosɛnga ete bátya yango na dosye na ye. Monganga andimi ete akotya yango. Mpo na kosukisa, tángá paragrafe ya nsuka.