Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/10 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 2/10 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 22 Febwali 2010. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 4 Yanuali tii na pɔsɔ ya 22 Febwali 2010.

1. Makambo nini ntango mosusu esalaki ete bana mosusu ya Yisraele bálekisa ntango liboso ya kozwa Mokili ya Ndaka, mpe likambo yango ekoki koteya biso nini? (Yos. 18:2, 3) [it-1-F lok. 934 par. 1]

2. Nini na ntembe te etindaki Yosua aloba maloba oyo ezali na Yosua 24:14, 15, mpe yango esengeli kotinda biso na kosala nini? [w08 15/5 nk. 17-18 par. 4-6]

3. Na lolenge nini basambeli ya Baala mpe losambo na bango ekómelaki Bayisraele motambo mpe eloko oyo ebendaka? (Bas. 2:3) [w08 15/2 lok. 27 par. 2-3]

4. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Ehude na ndenge asalelaki mopanga na ye na mpiko? (Bas. 3:16, 21) [w97 15/3 lok. 31 par. 4]

5. Elendiseli nini tokozwa soki totaleli ndenge oyo Yehova abikisaki Gideone ná basoda na ye 300? (Bas. 7:19-22) [w05 15/7 lok. 16 par. 8]

6. Na ndimbola nini molimo ya Yehova “ekokaki lisusu te kokanga motema mpo na mpasi ya Yisraele”? (Bas. 10:16) [cl nk. 254-255 par. 10-11]

7. Yefeta azalaki nde na makanisi ya kokaba moto lokola mbeka ntango alapaki ndai? (Bas. 11:30, 31) [w05 15/1 lok. 26 par. 1]

8. Makasi ya Samsone ezalaki mpenza na nsuki na ye? (Bas. 16:18-20) [w05 15/3 lok. 28 par. 5-6]

9. Lisalisi nini tokozwa soki tokangi ntina ya likambo ya kokamwa oyo Samsone asalaki, oyo ezali na Basambisi 16:3? [w04 15/10 nk. 15-16 par. 7-8]

10. Tokoki koyekola nini mpo na molimo na kotalela maloba oyo ezali na Basambisi 16:30? [w90-F 1/9 lok. 5 par. 5; sp nk. 13-14]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto