Tózwa liteya na mabunga ya Bayisalaele
BAYISALAELE bayebaki malamu makambo oyo Yehova alingaki básala ntango bakokɔta na Mokili ya Ndaka. Na nzela ya Moize, Nzambe alobaki boye: “Bokokimisa bato nyonso bazali kofanda na mokili yango na liboso na bino, mpe bokobuka mabanga na bango nyonso makatami kitoko, mpe bokobuka bikeko na bango binangwi, mpe bokobebisa bisika na bango ya likoló.”—Mit. 33:52.
Bayisalaele basengelaki te kosala boyokani na bato ya mokili yango; basengelaki mpe te kobalana na bango. (Det. 7:2, 3) Nzambe akebisaki bato na ye na maloba oyo: “Okeba na ntina na yo mpenza ete osala kondimana na bato ya mokili mokoingela yo te ete yango ekóma motambo na kati na yo te.” (Ex. 34:12) Nzokande, Bayisalaele batosaki Nzambe te mpe bakweaki na motambo. Nini ememaki bango na libebi? Makambo oyo ekómelaki bango ekoki koteya biso nini?—1 Kol. 10:11.
Boninga ememi na losambo ya bikeko
Ntango Bayisalaele bazalaki kokɔta na Mokili ya Ndaka, bazalaki kolonga bato oyo bafandaki na mokili yango. Kasi, Bayisalaele batosaki maloba ya Nzambe malamumalamu te. Babenganaki banguna nyonso te. (Bas. 1:1–2:10) Kutu, lokola bakómaki kofanda elongo na “mabota nsambo” oyo ezalaki na mokili yango, bamesanaki na bango mpe bakómaki baninga. (Det. 7:1) Boninga yango ememaki Bayisalaele wapi? Biblia elobi boye: “Bakamataki bana basi na bango na libala mpe bapesaki bana basi na bango na bana babali na bango, mpe basalelaki banzambe na bango. Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] mpe babosanaki [Yehova] Nzambe na bango, mpe basalelaki Babala mpe Asela.” (Bas. 3:5-7) Boninga oyo Bayisalaele basalaki na bato ya mokili yango ememaki bango na kobalana na bango mpe kosambela bikeko. Lokola Bayisalaele babalanaki na bato ya mokili yango, bazalaki lisusu na makasi ya kobengana bango te. Losambo ya solo ebebaki mpe Bayisalaele bakómaki kosambela banzambe ya lokuta.
Lokola Bayisalaele basalaki boninga na bato oyo bazalaki kofanda na Mokili ya Ndaka, bato yango bakómaki likama mpo na bango koleka kutu ntango bazalaki banguna na bango, mpamba te bakokaki kobebisa makanisi na bango mpe boyokani na bango na Nzambe. Tótalela likambo mosusu oyo ebebisaki losambo ya Bayisalaele.
Mosala ya bilanga ememi na losambo ya Baala
Ntango Bayisalaele bafandaki na Mokili ya Ndaka, batikaki bomoi ya kotambolatambola mpe mingi bakómaki kosala bilanga. Emonani ete Bayisalaele balandaki ndenge oyo Bakanana bazalaki kosala bilanga. Kasi, emonani ete basukaki kaka wana te. Lokola bazalaki elongo na bato yango, Bayisalaele balandaki mpe bindimeli na bango na oyo etali mosala ya bilanga.
Bakanana bazalaki kosambela Babaala ndenge na ndenge; bazalaki kondima ete banzambe yango bazalaki kosala ete milona ebota malamu. Longola kolona mpe kobuka mbuma, nsukansuka, Bayisalaele bakómaki mpe kosangana na losambo ya banzambe oyo Bakanana bazalaki koloba ete bazalaki kosala ete milona ebota mingi. Na ndenge yango, Bayisalaele mingi bazalaki kokosana kosambela Yehova, nzokande bakómaki bapɛngwi.
Likebisi monene mpo na biso
Na ntembe te, ntango Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, bazalaki te na makanisi ya kosambela Baala mpe komikɔtisa na milulu na yango ya mbindo. Nzokande, boninga oyo basalaki ememaki bango na makambo yango. Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela biso soki tosali boninga na bato oyo bakoki komonana malamu, kasi bazali basambeli ya Yehova te. Ya solo, makambo mosusu esɛngaka kaka tókutana na bato yango, na ndakisa na mosala, na kelasi, to mpe na libota. Kasi, makambo oyo ekómelaki Bayisalaele ezali komonisa biso ete kosala boninga na bato ya ndenge wana ekoki kobendela biso mindɔndɔ. Biblia elobi solo ete: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”—1 Kol. 15:33.
Biso mpe tozali na makama mingi lokola oyo Bayisalaele bakutanaki na yango. Lelo oyo, bato ya mokili bazali kosambela banzambe ndenge na ndenge. Kati na banzambe yango tokoki kotánga mbongo, bavedɛti ya masano, bato minene ya politiki, bakonzi ya mangomba, to mpe bato mosusu na libota. Soki tokebi te, tokoki kokóma kotya makambo yango na esika ya liboso na bomoi na biso. Kokóma baninga ya bato oyo balingaka Yehova te ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe.
Bayisalaele mingi bakweaki na pite oyo ezalaki kosalema na losambo ya Baala. Lelo oyo mpe, basaleli mingi ya Nzambe bazali kokwea na mitambo ya ndenge wana. Na ndakisa, ezali mpasi te mpo moto oyo azali na ordinatɛrɛ na ndako na ye atala makambo ya mbindo oyo ekobebisa lisosoli na ye. Ezali mpenza mawa mingi soki moklisto akómi kotala makambo ya mbindo na Internet!
“Esengo na baoyo bayokaka makebisi na ye”
Kotosa Yehova na likambo etali kopona baninga ya malamu ezali ekateli ya moto na moto. (Det. 30:19, 20) Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Nazalaka elongo na banani ntango nazali kominanola? Bazali na etamboli ya ndenge nini? Bazali basaleli ya Yehova? Kozala elongo na bango ekolendisa ngai nazala moklisto ya malamu koleka?’
Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Esengo na baoyo bazali sembo na nzela na bango, baoyo batambolaka na mobeko ya Yehova. Esengo na baoyo bayokaka makebisi na ye; bakobaka koluka ye na motema mobimba.” (Nz. 119:1, 2, NW) Ya solo, “esengo ezali na moto oyo akobanza [Yehova], oyo akotambolaka na nzela na ye.” (Nz. 128:1) Na oyo etali kopona baninga na biso, tiká tózwa liteya na mabunga ya Bayisalaele mpe tótosa maloba ya Yehova malamumalamu.—Mas. 13:20.
[Elilingi na lokasa 26]
Boninga na bato oyo balingaka Yehova te ekoki komema biso na losambo ya bikeko