Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/12 lok. 2
  • Tósakola kozanga kobanga na bisika ya mombongo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola kozanga kobanga na bisika ya mombongo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na bisika ya mombongo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Ndenge ya kosakola na bisika ya mombongo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 3/12 lok. 2

Tósakola kozanga kobanga na bisika ya mombongo

1. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te soki tobangaka kopesa litatoli na bisika ya mombongo?

1 Obangaka kosakola na bisika ya mombongo? Soki bongo, kolɛmba nzoto te mpamba te ata Paulo, mosakoli ya molende mpe oyo azalaki kobanga te, asengelaki ntango mosusu ‘kozwa mpiko’ mpo asakola. (1 Tes. 2:2) Awa na nse, tolobeli mwa makambo oyo ebangisaka basakoli mingi mpe topesi makanisi oyo ekoki kosalisa mpo na kolonga kobanga yango.

2. Mpo na nini tosengeli kobanga te ete tokosilikisa basali?

2 Basali bakosilika soki nakati bango mosala? Na bisika mingi ya mombongo, mosala ya basali ezalaka ya koyamba moto nyonso oyo ayei mpe mpo na yango, bayebaka ete ekoki kosɛnga bákata mosala mpo na mwa ntango. Mbala mingi bakomonisela yo bonkonde mpo bakoki kokanisa ete ozali kiliya. Soki olati malamu mpe ozali na boboto, bakomonisela yo limemya mingi.

3. Tokoki kosala nini mpo bakiliya basilika te?

3 Ekosɛnga nasolola na bakiliya ebele mbala moko? Soki likoki ezali, okoki kokende na ntango oyo bakiliya bakómi naino mingi te, na ndakisa ntango batɛkisi bauti kofungola. Zelá tii ntango nkolo magazini to mosali akozala ye moko mpo osolola na ye. Sololá na ye na mokuse mpenza.

4. Tokoki koloba nini ntango tozali kosakola na bisika ya mombongo?

4 Nakoloba nini? Soki basali bazali mingi, sololá naino na mokonzi na bango. Okoki koloba boye: “Ezali mpasi kokuta bato ya misala na ndako, yango wana toyei kotala bino na esika na bino ya mosala. Nayebi ete bozali na mosala, yango wana nakoloba na mokuse.” Ekoki kozala malamu koboya kosɛnga makabo, mingimingi soki tomoni ete bato bakoki komona biso lokola batɛkisi. Na kotalela mombongo oyo bazali kosala, okoki kosɛnga ndingisa epai ya mokonzi mpo osolola na basali na mokuse. Zongelá lisolo oyo osololaki na mokonzi na bango. Soki emonani lokola ete mosali moko azali na mosala mingi, sololá na ye na mokuse mpe na nsima tikelá ye trakte. Soki likoki ya kosolola na basali ezali te, mbala mosusu bakoki kopesa yo nzela otikela bango mikanda na esika bapemaka to na esika mosusu.

5. Mpo na nini tosengeli te kobanga kopesa litatoli na bisika ya mombongo?

5 Yesu mpe ntoma Paulo basakwelaki bato kozanga kobanga na bisika na bango ya mosala, yo mpe okoki kosala bongo. (Mat. 4:18-21; 9:9; Mis. 17:17) Bondelá Yehova asalisa yo mpo ozala motema likoló te mpe ozala na mpiko. (Mis. 4:29) Bato bazangaka te na bisika ya mombongo mpe kosakola kuna ebimisaka matomba. Mpo na nini te komeka lolenge wana ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto