Manaka mpo na pɔsɔ ya 10 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 10 SƐTƐMBƐ
Loyembo 23 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 17 par. 1-7 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ezekiele 42-45 (Min. 10)
No. 1: Ezekiele 43:13-27 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini batyá nkombo Yehova na Makomami ya Grɛki ya bokristo ya Libongoli ya Mokili ya Sika?—rs lok. 260 par. 2-4 (Min. 5)
No. 3: Tosengeli kosala nini mpo tózwa elimo santu? (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Koyekola biso moko ekómisaka biso makasi na elimo. Lisolo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala nkasa 27-32.
Min. 10: Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te. (Yis. 54:17) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2012, lokasa 125, paragrafe 2, tii lokasa 126, paragrafe 3, mpe lokasa 181, paragrafe 3. Sɛngá na bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Min. 10: “Tósololaka na bato na ndenge ebongi.” Mituna mpe biyano.
Loyembo 44 mpe libondeli