Tósololaka na bato na ndenge ebongi
1. Liteya nini tozwi na ndenge bakristo ya liboso basalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola?
1 Bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kosakwela bato ya mimeseno nyonso mpe ya mangomba ekeseni. (Kol. 1:23) Atako nsango na bango ezalaki kaka moko—Bokonzi ya Nzambe—basalelaki mayele ndenge na ndenge na kotalela bato oyo bazalaki kosolola na bango. Na ndakisa, epai ya Bayuda oyo bazalaki na limemya makasi mpo na Makomami, Petro abandaki na kotánga maloba ya mosakoli Yoele. (Mis. 2:14-17) Kasi, talá ndenge Paulo asololaki na Bagrɛki, ndenge ekomami na Misala 17:22-31. Lelo oyo, na bateritware mosusu bato bamemyaka Biblia, mpe tokoki mbala moko kolobela Biblia na mosala ya ndako na ndako. Kasi, soki tozali kosolola na bato oyo basepelaka na Biblia te to na lingomba te, to baoyo bazali na lingomba ya bokristo te, tosengeli kozala na bokɛngi mpenza.
2. Ndenge nini tokoki kopesa mikanda na bato oyo bandimaka Biblia mpe baoyo bandimaka yango te?
2 Tópesaka bato mikanda na ndenge ebongi mpenza: Na mbula ya mosala oyo, nsima ya sanza mibale nyonso, mikanda oyo tokokabola ekobanda kobongwana; yango etali bazulunalo, batrakte mpe mwa babuku. Soki bato mingi ya teritware na biso bandimaka Biblia te, tokoki kosalela mikanda mosusu oyo ekosepelisa bango. Ata soki totángi vɛrsɛ te na mbala ya liboso to tolobeli Biblia te, soki moto yango asepeli, ntango tokozongela ye, tózala na mokano ya kosalisa ye akóma na kondima epai ya Mozalisi mpe Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Kasi na esika oyo bato bamemyaka Biblia, tokoki kosalela mikanda na biso mpe kosolola na bango na ndenge ebongi na bango. Kutu, tokoki kopesa bango buku Biblia eteyaka to, mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, ata soki tozali kokabola yango na sanza wana te. Likambo ya ntina ezali nde kosolola na bato na ndenge oyo ebongi.
3. Na ndenge nini mitema ya bato ya teritware na biso ezali lokola mabele?
3 Bongisá mabele: Mbala mingi, motema ya moto ekokisamaka na mabele. (Luka 8:15) Esɛngaka mpenza kobongisa mabele mosusu liboso ete mboto ya solo ezwa misisa mpe ekola. Bapalanganisi ya nsango malamu ya liboso bazalaki kolonga kolona solo na mabele to mitema ya ndenge nyonso, mpe epesaki bango esengo. (Mis. 13:48, 52) Biso mpe tokoki koyoka esengo ndenge wana soki tozali kotya likebi na ndenge oyo tozali kosolola na bato.