Manaka mpo na pɔsɔ ya 17 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 17 SƐTƐMBƐ
Loyembo 49 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 17 par. 8-14, etanda na lok. 137 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ezekiele 46-48 (Min. 10)
No. 1: Ezekiele 48:1-14 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini tosengeli kozala sembo na makambo nyonso?—Ef. 4:25, 28; 5:1 (Min. 5)
No. 3: Ndenge ya koyanola moto oyo alobi: ‘Bino bozalaka na Biblia na bino moko’—rs lok. 261 par. 2–lok. 262 par. 1 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 30: “Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai?—Eteni 1” Mituna mpe biyano. Na ebandeli ya lisolo, lobelá na mokuse makanisi ya paragrafe ya liboso mpe na nsuka lobelá na mokuse makanisi ya paragrafe ya nsuka. Soki ata ndeko moko te azali na video yango, bóbongisa lisolo na bayangani na buku Mituna oyo bilenge batunaka volimi 1 to 2. Ekosalema na bankulutu mibale, mokomoko akosala miniti 15. Bópona mikapo mibale na babuku yango na kotalela mposa ya lisangá na bino. Sɛngá bilenge balobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 88 mpe libondeli