Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai? (Eteni 1)
Wana bilenge bazali kokóma mikóló basengeli kozwa bikateli ya minene. Video Les jeunes s’interrogent—Que vais-je faire de ma vie ? (Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai?) ebongisamaki mpo na kosalisa bilenge na likambo yango. Ntango otye DVD, poná esika bakomi Drame, na nsima, talá soki okoki koyanola na mituna oyo ezali na paragrafe 2. Na nsima poná esika bakomi Interviews, lisusu poná mpe Souvenirs, mpe meká koyanola mituna ya paragrafe 3.
Drame: (1) Na ndenge nini bomoi ya Timote ekokanaki na oyo ya bilenge bakristo mingi lelo? (2) Ndenge nini batyaki André mbamba mpo amipesa na lisano ya kopota mbangu? (3) Ndeko Fleissig ayebisaki André nini mpo na oyo etali (a) komipesa na Yehova mpe na lisano? (Mat. 6:24) (b) makambo oyo epesaka esengo ya solosolo? (c) saani oyo autaki na yango na kaa ya bakangami? (d) bato oyo bazalaki elongo na ye mpe mwasi na ye na fɔtɔ? (e) soki azalaki koyoka mawa mpo na makambo oyo atikaki? (Flp. 3:8) (4) Ndenge nini nkɔkɔ ya André ya mwasi ayanolaki motuna oyo André atunaki ye ete: “Ezali mabe mpo na ngai kokoma mopoti-mbangu monene?” (Luka 4:5-7) (5) Kolonga na lisano ya kopota mbangu ememelaki André litomba ya solosolo? (6) Nini esepelisaki yo na mokanda ya nsuka oyo ndeko Fleissig atikelaki André? (Mas. 10:22) (7) Likambo nini ndeko Fleissig asalisaki André ayeba?
Souvenirs: (8) Ndeko mwasi moko mpe ndeko mobali moko bazalaki kosala misala nini, mpe mpo na nini? (9) Yango ememelaki bango nini? (10) Ndenge nini bomoi ya mokomoko na bango ebongwanaki? (2 Ko. 5:15) (11) Misala nini ya elimo ezwaki esika ya misala na bango ya kala, mpe mpo na nini bamonaki ete bakoki te kosangisa misala yango mibale? (12) Bayokaka mawa na ndenge babongolaki makambo oyo bazalaki kotya na esika ya liboso na bomoi na bango? (13) Makambo nini balobaki oyo esalisi yo mpenza okanisa mpo na oyo osengeli kosala na bomoi na yo?
Tosɛngi yo otala mpe eteni oyo elobi Autres interviews mpe makambo mosusu oyo ezali wana, mpe omibongisa mpo na kopesa biyano ntango tokotalela yango na Likita ya mosala ya pɔsɔ ezali koya.