Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/12 lok. 4
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 1 Ɔkɔtɔbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 1 Ɔkɔtɔbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 1 ƆKƆTƆBƐ
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 9/12 lok. 4

Manaka mpo na pɔsɔ ya 1 Ɔkɔtɔbɛ

PƆSƆ EBANDI NA 1 ƆKƆTƆBƐ

Loyembo 103 mpe libondeli

□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:

bt mok. 18 par. 1-5, bitanda na nk. 142 mpe 144 (Min. 30)

□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: Danyele 4-6 (Min. 10)

No. 1: Danyele 4:18-28 (Eleka min. 4 te)

No. 2: Mpo na nini bakristo ya solo baboyaka mpenza misala ya bilimo mabe? (Min. 5)

No. 3: Na ntango ya kala, ndenge nini Nzambe azalaki kopesa basaleli na ye malako awa na mabele?​—rs lok. 162 par. 2-3 (Min. 5)

□ Likita ya mosala:

Loyembo 80

Min. 5: Bandá koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo, bósala elakiseli oyo ekomonisa ndenge tokoki kobanda koyekola na moto na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lendisá bandeko nyonso básalela yango.

Min. 15: Mosala oyo tosalaki na mbula oyo eleki. Diskur ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá mosala oyo lisangá esalaki na mbula ya mosala oyo eleki, bendá likebi na makambo ya malamu mpe pesá bandeko longonya mpo na yango. Tuná mosakoli moko to basakoli mibale bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Yebisá likambo moko to mibale oyo etali mosala ya kosakola, oyo lisangá esengeli kobongisa na mbula ya sika ya mosala, mpe pesá mwa batoli oyo ebongi mpo na kosalisa bandeko básala lisusu malamu koleka.

Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, lobelá ntina oyo bazulunalo ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakoki kotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na masolo ya ebandeli ya Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu, ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.

Loyembo 85 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto