Manaka mpo na pɔsɔ ya 25 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 25 SANZA YA 11
Loyembo 122 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jl Liteya 11-13 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yakobo 1-5 (Min. 10)
No. 1: Yakobo 1:22–2:13 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ndenge oyo bolingo elongaka kobanga—1 Yoa. 4:16-18 (Min. 5)
No. 3: Ntina oyo kosuka kaka na kotánga Biblia ekoki te—rs lok. 283 par. 3-4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya zomi na mibale. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, lobelá ntina oyo bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, salelá lisolo oyo elobeli titre ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kosɛnga bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga. Salá mpe bongo mpo na Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Okopesa eyano nini? Diskur ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 69 paragrafe 1 tii na lokasa 70, paragrafe 1. Bósala elakiseli oyo ekomonisa mosakoli moko azali koyanola moyekoli ya Biblia oyo asengeli kozwa ekateli na likambo etali ye moko. Moyekoli atuni boye: “Soki ezalaki yo olingaki kosala nini na likambo ya boye?”
Min. 10: “Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola.” Mituna mpe biyano. Na lisalisi ya lisolo elobi: “Lisolo na motatoli ya Yehova” oyo euti kobima, bósala elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa makanisi oyo ezali na paragrafe 3.
Loyembo 45 mpe libondeli