Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/13 lok. 3
  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ozali kosalela yango malamumalamu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo ya sika oyo ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 11/13 lok. 3

Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola

1. Wapi ntina mibale ya masolo “Lisolo na moninga moko ya kartye”?

1 Mbala na mbala, banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ezalaka na masolo “Lisolo na moninga moko ya kartye.” Masolo yango ezali na ntina oyo mibale: komonisa mateya ya Biblia na ndenge oyo ezali mpenza kosepelisa mpe kolakisa ndenge ya kosalela mayele mpo na kosolola na bato masolo mosusu ya Biblia. (1 Pe. 3:15) Ndenge nini tokoki kosalela malamu masolo yango?

2. Ndenge nini tokoki kosalela masolo yango na mosala ya kosakola?

2 Tósalela yango na mosala ya kosakola: Okoki kobomba mwa ndambo ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na masolo wana. Soki moto oyo ozali kosolola na ye, to moto oyo asepelaki, to mpe moto oyo oyekolaka na ye Biblia atuni motuna to abimisi ntembe na likambo moko oyo elobelami na moko ya masolo yango, pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na lisolo yango mpe sɛngá ye bótalela yango. Soki ozali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela lisolo yango te, okoki kozwa yango na site Internet na biso jw.org.

3. Ndenge nini tokoki kotalela moko ya mosolo yango elongo na moto?

3 Ndenge nini okoki kosolola na moto na moko ya masolo yango? Basakoli mosusu basɛngaki moto atánga maloba ya moto ya kartye na mongongo makasi, mpe bango bátánga maloba ya Motatoli. Kosala bongo ezali malamu mpamba te ezali kotinda moto atalela bindimeli na biso na lolenge oyo ekosala ete ayoka mabe te.​—Mib. 32:2.

4. Ndenge nini tokoki kosala mpo tómesana na masolo yango?

4 Mesaná na yango mpe salisá basusu: Ntango ozali kotanga masolo yango, tyá likebi na bavɛrsɛ oyo ezali wana, na bandakisa oyo bapesi mpe ndenge makanisi ezali kolandana. Tyá likebi na elobeli oyo basaleli. Na nsima, meká kosala bongo na mosala ya kosakola. (Mas. 1:5; 9:9) Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Kotanga masolo wana ezali lokola obimi mosala ya kosakola elongo na mobongisi-nzela oyo azali mpenza na makoki, oyo ayebaka ntango nyonso kopesa eyano ya malamu!”

5. Ndenge nini tokoki kobongisa bayekoli ya Biblia mpo na mosala ya kosakola?

5 Okoki mpe kosalela bandakisa ya masolo yango mpo na kosalisa moto oyo oyekolaka na ye Biblia mpo amibongisa mpo na mosala ya kosakola. Bótánga yango elongo, tiká moyekoli ya Biblia atánga maloba ya Motatoli. Na ndenge yango, bayekoli ya Biblia bakomesana kolobela bindimeli na bango na ndenge ya mayele. (Kol. 4:6) Ya solo, masolo yango ezali moko ya nzela oyo Yehova azali kosalisa biso mpo ‘tókokisa mosala na biso malamumalamu.’​—2 Tim. 4:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto