Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr19 Mars nk. 1-6
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • 4-10/03
  • 11-17/03
  • 18-24/03
  • 25-31/03
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
mwbr19 Mars nk. 1-6

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

4-10/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 12-14

“Komonisa bolingo ya bokristo elimboli nini?”

it-1-F lok. 53

Kolinga

Bolingo ya bondeko (Gr: philadélphia, elimboli mpenza, “kolinga ndeko”); bandeko nyonso ya lisangá ya bokristo basengeli komonisa bolingo yango. (Ro 12:10; Ebr 13:1; talá mpe 1Pe 3:8.) Na yango, boyokani na kati ya lisangá esengeli kozala malilimalili te kasi nde makasi; lokola boyokani oyo bato ya libota moko bazalaka yango. Atako bandeko ya lisangá bamoniselanaka bolingo ya bondeko, Biblia elendisi bango bámonisa yango mingi koleka.​—1Te 4:9, 10.

Liloba ya Grɛki philostorgos, oyo elimboli “kolinga na motema,” esalelamaka mpo na kolobela moto oyo azali moninga ya motema ya moto mosusu. Stérgô moko ya maloba epai liloba yango eutá, esalelamaka mingi mpo na kolobela bolingi oyo bato ya libota moko bamoniselanaka. Ntoma Paulo alendisaki bakristo bámonisaka ezaleli yango. (Ro 12:10) Paulo amonisaki mpe ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala bato “oyo balinganaka te na kati ya libota” (Gr: astorgoï) mpe bato ya ndenge wana babongi na liwa.​—2Ti 3:3; Ro 1:31, 32.

w09 15/10 lok. 8 par. 3

“Bózala na kimya na bato nyonso”

3 Tángá Baroma 12:17. Paulo alobaki ete ntango basali biso mabe, tosengeli te kozongisa mabe na mabe. Kolanda toli yango ezali na ntina, mingimingi na bandako oyo bato mosusu bazali Batatoli te. Ndeko oyo molongani na ye azali Motatoli te asengeli koboya kozongisa liloba to likambo ya mabe oyo basali ye. ‘Kozongisa mabe na mabe’ ebongisaka makambo te. Kutu, ekoki nde kobebisa lisusu makambo.

w07 1/7 lok. 24 par. 12-13

“Bózongisa mabe na mabe na moto te”

12 Toli mosusu oyo Paulo apesaki mpo na lolenge ya kotalela bato oyo bazali bandimi mpe oyo bazali bandimi te yango oyo: “Bózongisa mabe na mabe na moto te.” Maloba wana eyokani mpenza na likambo moko oyo alobaki liboso: “Bóyina oyo ezali mabe.” Ndenge nini moto akoki koloba ete ayinaka mpenza mabe soki azali kozongisela basusu mabe oyo basali ye? Kosala bongo eyokani ata moke te na bolingo oyo ‘ezangi bokosi.’ Na nsima, Paulo alobaki boye: “Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso.” (Baloma 12:9, 17) Ndenge nini tokoki kosalela toli yango?

13 Liboso, na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolinti, alobelaki minyoko oyo bantoma bazalaki kokutana na yango. Alobaki boye: “Tokómi eloko ya kotala epai ya mokili, mpe epai ya baanzelu, mpe epai ya bato. . . . Ntango tozali kofingama, topambolaka; ntango tozali konyokolama, tokangaka motema; ntango tozali kobebisama lokumu, tobondelaka.” (1 Bakolinti 4:9-13) Ndenge moko mpe, bato ya mokili bazali kotala baklisto ya solo lelo oyo. Soki bazalani na biso bazali komona makambo ya malamu oyo tozali kosala ata ntango basali biso mabe, bakokakatana te mpo na kondima nsango na biso.​—1 Petelo 2:12.

w12 15/11 lok. 29 par. 13

Tólimbisanaka na motema moko

13 Ekoki kozala ete moto moko oyo azali mokristo te asali yo likambo moko ya mabe. Soki esalemi bongo, kobosana te ete ezaleli na yo ya malamu ekoki kotinda moto yango asepela na mateya ya Biblia. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla; mpo ntango ozali kosala bongo ozali kotya makala ya mɔtɔ na motó na ye. Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” (Rom. 12:20, 21) Soki tozali na maloba ya boboto ntango batumoli biso, tokoki ata kolɛmbisa motema ya moto oyo azalaki makambo makasimakasi mpe kobimisa bizaleli na ye ya malamu. Soki tozali komitya na esika ya moto oyo asali biso mabe mpe tozali koyokela ye mawa, ntango mosusu tokosalisa ye andima koyekola Biblia. Ata soki moto yango andimi koyekola te, soki topesi ye eyano ya boboto, yango ekoki kotinda ye aluka koyeba mpo na nini tokeseni na bato mosusu.​—1 Pe. 2:12; 3:16.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

lvs nk. 76-77 par. 5-6

Ndenge ya kopona kominanola

5 Likambo nyonso oyo tokoki kosala na bomoi ezali na boyokani na losambo na biso epai ya Yehova. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango alobaki: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.” (Baroma 12:1) Yesu alobaki: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Marko 12:30) Tosengeli ntango nyonso kolinga kopesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu. Na ntango ya kala na Yisraele, bambeka ya nyama oyo bato bazalaki kopesa Yehova esengelaki kozala nzoto malamu. Soki mbeka yango ezali na mbeba, Nzambe azalaki kondima yango te. (Balevi 22:18-20) Ndenge moko mpe, makambo mosusu ekoki kosala ete Yehova andima losambo na biso te. Na ndenge nini?

6 Yehova ayebisi biso: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (1 Petro 1:14-16; 2 Petro 3:11) Yehova akondima losambo na biso kaka soki ezali mosantu, to pɛto. (Kolimbola Mibeko 15:21) Losambo na biso ekoki kozala pɛto te soki tosalaka makambo oyo Yehova ayini, na ndakisa makambo ya mbindo, makambo ya mobulu, to makambo oyo ezali na boyokani na bademo. (Baroma 6:12-14; 8:13) Kasi, Yehova akosepela mpe te soki tondimaka kominanola na makambo yango. Makambo yango ekoki kosala ete losambo na biso ekóma mbindo mpe Yehova andima yango te, mpe ekoki mpenza kobebisa boyokani na biso na ye.

w08 15/6 lok. 31 par. 4

Makanisi ya ntina na mokanda epai ya Baroma

13:1​—Na ndenge nini bakonzi oyo bazali liboso “bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe”? Bakonzi ya Leta “bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe” mpamba te Nzambe atiki ete báyangela, mpe asakolaki boyangeli ya bakonzi yango mosusu. Tokoki komona yango na makambo oyo Biblia esakolaki mpo na bakonzi mosusu.

11-17/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 15-16

“Sɛngá Yehova apesa yo ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi”

w17.07 lok. 14 par. 11

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

11 Lisolo oyo elobeli ndenge Yesu alelaki ntango Lazare akufaki ezali kaka moko na ebele ya bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kobɔndisa biso. Tosengeli kokamwa te mpo “makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Baroma 15:4) Soki ozali kolela moto oyo olingaki, bavɛrsɛ lokola oyo ezali awa na nse ekoki kokitisa yo motema:

▪ “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nz. 34:18, 19.

▪ “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo [Yehova] ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”​—Nz. 94:19.

▪ “Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu na nzela ya boboto monene, bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi.”​—2 Tes 2:16, 17.

w16.04 lok. 10 par. 5

“Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”

5 Sɛngá Yehova apesa yo makasi. Yehova azali “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi.” (Baroma 15:5) Kaka ye nde ayebi malamu makambo oyo ekómelaka biso, ndenge oyo tomiyokaka, mpe bomoi na biso ya kala. Yango wana, ayebi malamu oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. Biblia elobi: “Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye, mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.” (Nz. 145:19) Kasi ndenge nini Nzambe akoyanola na mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye makasi ya koyika mpiko?

w14 15/6 lok. 14 par. 11

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”

11 Yehova ‘apesaka elikya oyo etondisaka biso na esengo mpe na kimya.’ (Rom. 15:13) Elikya oyo Nzambe apesi biso, esalisaka biso tóyika mpiko ntango kondima na biso emekami. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakotikala ‘sembo ata tii na liwa, bakozwa motole ya bomoi na likoló.’ (Em. 2:10) Bato ya sembo oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, bakosepela seko na seko awa na mabele ntango ekokóma Paradiso. (Luka 23:43) Koyeba bilikya oyo, ezali kotinda biso tósala nini? Mitema na biso etondi te na esengo, kimya mpe bolingo mpo na moto oyo apesaka “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza”?​—Yak. 1:17.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w89-F 1/12 lok. 24 par. 3

“Mpo na koyeba bosolo ya bolingo na bino”

Na ntembe te, bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo basengelaki mpenza kosunga bango na mikakatano na bango. Kutu, bazalaki na “nyongo” moko epai ya bakristo ya Yerusaleme. Ezalaki na Yerusaleme nde nsango malamu ekómelaki bato ya bikólo mosusu. Paulo alobaki maloba oyo: “Ya solo, bamonaki tè basengeli kosala bongo. Pamba té bato ya bikolo nyonso bazwaki bolamu ya Nzambe oyo bandeko Bayuda bazalaki na yango; boye basengeli pe kosalisa bango, na bomengo ya mokili oyo bazali na yango.”​—Ba-romén 15:27, Bible na lingala ya lelo oyo.

it-2-F lok. 647 par. 2

Koyeba makambo liboso, Kobongisa liboso likambo oyo ekoya

Masiya to Kristo asengelaki kozala momboto oyo alakamaki, oyo na nzela na ye bato nyonso ya sembo ya mabota nyonso na mabele mobimba bakopambwama. (Ga 3:8, 14) Mbala ya liboso oyo balobeli “momboto” yango, ezali nsima ya botɔmbɔki oyo ebimaki na Edene, kasi liboso ya kobotama ya Abele. (Eb 3:15) Yango elobelamaki bambula soki 4 000 liboso “sekele mosantu” emonisama mpe “momboto” to Masiya ayebana polele. Na yango, sekele yango “ebombamaki ntango molai mingi.”​—Ro 16:25-27; Ef 1:8-10; 3:4-11.

18-24/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKORINTI 1-3

“Ozali moto ya mosuni to moto ya elimo”

w18.02 lok. 19 par. 4-5

Kozala moto ya elimo elimboli nini?

4 Tólobela liboso makanisi ya moto ya mosuni. Moto ya mosuni alandaka makanisi ya mokili, oyo etindaka moto alukaka kaka bolamu na ye moko. Ntoma Paulo abengi yango “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (Baefese 2:2) Elimo yango etindaka bato bámekola makambo oyo bato nyonso basalaka. Basalaka kaka oyo balingi, bakipaka mibeko ya Nzambe te. Moto ya mosuni akanisaka kaka makambo ya mosuni mpe mbala mingi amonaka ete lokumu ná mbongo na ye nde ezali na ntina koleka, mpe atingamaka na makambo oyo amoni ete azali na ndingisa ya kosala.

5 Moto ya mosuni asalaka mpe makambo oyo Biblia ebengi “misala ya nzoto.” (Bagalatia 5:19-21) Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, alobelaki makambo mosusu oyo bato ya mosuni basalaka. Bakɔtaka na matata oyo etali bango te, bakɔtisaka bokabwani, batindaka bato bátomboka, bafundaka basusu na tribinale, bamemyaka bokonzi te, mpe bapesaka motuya mingi koleka na kolya mpe komɛla. Moto ya mosuni ayebaka kotɛmɛla komekama te. (Masese 7:21, 22) Yuda alobaki ete bato mosusu bakomipesa na makambo ya mosuni tii bakotya likebi ata moko te na makambo ya elimo.​—Yuda 18, 19.

w18.02 lok. 19 par. 6

Kozala moto ya elimo elimboli nini?

6 Sikoyo kozala moto ya elimo elimboli nini? Moto ya elimo atyaka likebi mingi na boyokani na ye na Nzambe. Atikaka elimo santu ya Nzambe etambwisa ye mpe asalaka makasi amekola Yehova. (Baefese 5:1) Alukaka koyeba ndenge Yehova akanisaka mpe atalelaka makambo lokola ye. Amonaka Nzambe moto ya solo mpenza. Na bokeseni na moto ya mosuni, moto ya elimo atosaka mibeko ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na ye. (Nzembo 119:33; 143:10) Asalaka “misala ya nzoto” te, kasi asalaka makasi amonisa “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Mpo na koyeba malamu soki kozala moto ya elimo elimboli nini, tózwa ndakisa oyo: Moto oyo ayebi kosala mombongo babengaka ye moto ya mombongo, mpe moto oyo atyaka likebi mingi na losambo na ye epai ya Nzambe babengaka ye moto ya elimo.

w18.02 lok. 22 par. 15

Kozala moto ya elimo elimboli nini?

15 Ndenge nini okoki komekola Kristo? Na 1 Bakorinti 2:16, Biblia elobi ete tosengeli kozala na “makanisi ya Kristo.” Mpe Baroma 15:5 emonisi ete tosengeli kozala na “makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango.” Na yango, mpo tózala lokola Kristo, tosengeli naino koyeba makanisi mpe bomoto na ye. Na nsima, tosengeli kolanda ndakisa na ye. Yesu atyaki makanisi nyonso na boyokani na ye na Nzambe. Na yango, soki tomekoli Yesu, tokozala mpe na boyokani malamu na Yehova. Yango wana ezali na ntina mingi tóyekola kokanisa lokola Yesu.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 854 par. 5

Bwanya

Yango wana mokili na bwanya na yango, etalelaki lokola bozoba likabo oyo Nzambe apesaki na nzela ya Kristo mpe eboyaki yango; bakonzi na yango, atako bazalaki na makoki mpe bayebaki kotambwisa makambo, bakendaki tii na ‘kobaka Nkolo oyo atondi na nkembo na nzete.’ (1Ko 1:18; 2:7, 8) Kasi, Nzambe amonisaki ete bwanya ya mokili ezali bozoba mpe ayokisaki bato na yango ya bwanya nsɔni ndenge asalelaki oyo bango bazalaki kotalela “eloko ya Nzambe oyo ezali zoba,” ata mpe bato oyo bango bazalaki kotalela lokola ‘bazoba, bato ya bolɛmbu mpe bato mpamba’ mpo na kokokisa mokano na ye oyo ekoki kobebisama te. (1Ko 1:19-28) Paulo akundwelaki bakristo ya Korinti ete ‘bwanya ya ntango oyo to mpe ya bakonzi ya ntango oyo’ ekokóma mpamba; yango wana bwanya yango ezalaki na esika te na mateya ya ntoma yango. (1Ko 2:6, 13) Akebisaki bakristo na Kolose na motambo ya “filozofi [philosophias, elimboli: “kolinga bwanya”] mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.”​—Kol 2:8; talá mpe v. 20-23.

w08 15/7 lok. 27 par. 6

Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bakorinti

2:3-5. Ekoki kozala ete ntango Paulo azalaki kosakola na Korinti, esika monene ya filozofi mpe boyebi ya Bagrɛki, azalaki komituna soki akokoka kosimba mitema ya bayoki na ye. Atako bongo, atikaki te ete bolɛmbu to kobanga epekisa ye kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Biso mpe tosengeli te kotikaka mikakatano epekisa biso kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tosengeli nde kolukaka lisalisi epai ya Yehova na elikya mpenza, ndenge Paulo asalaki.

25-31/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKORINTI 4-6

“Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini”

it-2-F lok. 130

Levire

Ntoma Paulo asalelaki kaka ndakisa yango ntango asɛngaki lisangá ya Korinti elongola na lisangá mobali moko oyo asalaki makambo ya mbindo; alobaki boye: “Boyebi te ete mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini? Bólongola levire ya kala, mpo bózala pɔtɔpɔtɔ ya sika ya farini, lokola nkisi ya kovimbisa ezali te na kati na bino. Mpo, ya solo, Kristo elekeli na biso apesami mbeka.” Na nsima, amonisaki polele oyo alingaki koloba ntango alobelaki “levire”: “Na yango, tósala fɛti yango, na levire ya kala te, na levire ya makambo mabe te mpe ya ezaleli ya mabe te, kasi na bagato ezangá levire ya bosembo mpe ya solo.” (1Ko 5:6-8) Awa, Paulo asaleli ndimbola ya elilingi ya fɛti ya bagato ezangá levire oyo Bayuda bazalaki kosala mbala moko nsima ya fɛti ya Elekeli. Kaka ndenge pɔtɔpɔtɔ moke ya farini ya ngayi evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini, lisangá na mobimba na yango elingaki kokóma mbindo na miso ya Yehova soki bapɛtolaki yango te na ezaleli mabe ya moto wana oyo asalaki makambo ya mbindo. Esɛngaki bálongola “levire” na kati na bango, kaka ndenge Bayisraele basengelaki te kozala na levire na bandako na bango na eleko ya fɛti yango.

it-2-F nk. 903-904

Satana

‘Kopesa Satana moto mpo mosuni ebebisama’ elimboli nini?

Ntango ntoma Paulo apesaki lisangá ya Korinti malako mpo na oyo basengeli kosala ndeko moko ya lisangá oyo asangisaki nzoto na mwasi ya tata na ye, akomaki boye: “Bópesa Satana moto yango mpo mosuni ebebisama.” (1Ko 5:5) Ezalaki etinda ya kolongola moto yango na lisangá, kokata bondeko nyonso elongo na ye. (1Ko 5:13). Kopesa ye na Satana elakisaki kolongola ye na lisangá mpo akóma moto ya mokili oyo Satana azali nzambe mpe mokonzi na yango. Ndenge moko na “mwa levire moke” na “pɔtɔpɔtɔ mobimba” ya farini, moto yango azalaki “mosuni,” elingi koloba moto ya mosuni na kati ya lisangá; kolongola ye na lisangá ekosala ete lisangá oyo elingaka makambo ya elimo ebebisa “mosuni” oyo ezali na kati ya lisangá. (1Ko 5:6, 7) Ndenge moko mpe, Paulo apesaki Himene ná Alezandre na Satana mpo babwakaki kondima mpe lisosoli malamu mpe kondima na bango ebebaki lokola masuwa oyo epanzani.​—1Ti 1:20.

lvs lok. 241, maloba ya nsuka ya lisolo

Kolongolama na lisangá

Ntango moto oyo asali lisumu ya monene abongoli motema te mpe aboyi kolanda mibeko ya Yehova, akoki kozala lisusu na kati ya lisangá te. Asengeli kolongolama na lisangá. Soki moto alongolami na lisangá, tokozala lisusu na boyokani na ye te mpe tokotika kosolola na moto yango. (1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 9-11) Ebongiseli ya kolongola moto na lisangá esalaka ete nkombo ya Yehova mpe lisangá efingama te. (1 Bakorinti 5:6) Kolongola moto na lisangá ezali mpe disiplini oyo ekoki kosalisa moto abongola motema mpo akoka kozongela Yehova.​—Luka 15:17.

▸ Mokapo 3, paragrafe 19

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w09 15/5 lok. 24 par. 16

Baanzelu​—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”

16 Na kati ya minyoko, baklisto bazalaka lokola ‘eloko ya kotala epai ya baanzelu.’ (1 Kol. 4:9) Baanzelu basepelaka mpenza komona bosembo na biso; mpe basepelaka ata ntango bato mabe babongoli motema. (Luka 15:10) Baanzelu bamonaka mpe bizaleli malamu ya basi baklisto. Biblia emonisi ete “mwasi asengeli kozala na elembo moko ya bokonzi na motó na ye mpo na baanzelu.” (1 Kol. 11:3, 10) Ya solo, baanzelu basepelaka komona basi baklisto mpe basaleli nyonso ya Nzambe awa na mabelé bazali kotosa bokonzi. Botosi yango ezalaka ndakisa mpo na bana yango ya Nzambe na likoló.

it-2-F lok. 151

Mobeko

Mobeko mpo na baanzelu. Atako baanzelu baleki bato, bazali na nse ya mibeko mpe mitindo ya Nzambe. (Ebr 1:7, 14; Nz 104:4) Yehova apesaki kutu monguna na ye Satana mitindo mpe bipekiseli. (Yb 1:12; 2:6) Mikaele, anzelu mokonzi atosaki mpe andimaki ete Yehova azali mosambisi oyo aleki basambisi nyonso ntango awelanaki na Zabolo; alobaki na ye boye: “Yehova apamela yo.” (Yd 9; talá mpe Zek 3:2.) Yehova Nzambe atye baanzelu nyonso na nse ya bokonzi ya Yesu Kristo. (Ebr 1:6; 1Pe 3:22; Mt 13:41; 25:31; Flp 2:9-11) Na yango, ezali na etinda ya Yesu nde anzelu moko akendaki epai ya Yoane. (Em 1:1) Na 1 Bakorinti 6:3, ntoma Paulo alobi ete bandeko ya Kristo ya elimo bakosambisa mpe baanzelu mpo na ntembe te, na lolenge moko to mosusu bakopesa mabɔkɔ mpo na kopesa bilimo mabe bitumbu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto