14-20/07
MASESE 22
Loyembo 79 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Mitinda oyo ekosalisa yo mpo na kobɔkɔla bana
(Min. 10)
Yebisá bana na yo makama oyo bakoki kokutana na yango na bomoi (Mas 22:3; w20.10 27 par. 7)
Bandá koteya bango ntango bazali naino mike (Mas 22:6; w19.12 26 par. 17-19)
Pesáká bango disiplini na bolingo (Mas 22:15; w06 1/4 9 par. 4)
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mas 22:29—Ndenge nini tokoki kosalela vɛrsɛ yango ntango bapesi biso mokumba moko na lisangá, mpe mpo na nini? (w21.08 23 par. 11)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 22:1-19 (th liteya 10)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. (lmd liteya 5 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lakisá moto yango ndenge ya komona na site jw.org makambo oyo ekoki kosalisa baboti. (lmd liteya 1 pwɛ 4)
6. Diskur
(Min. 5) ijwyp lisolo 100—Motó ya likambo: Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako? (th liteya 20)
Loyembo 134
7. Zalá na motema molai, kasi kokanga miso na mabe te
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Kobɔkɔla bana esɛngaka motema molai mpenza. Baboti basengeli kotyelaka bana na bango likebi mpe kozala motema ya kokita ntango bazali kolekisa ntango elongo na bango. (Mib 6:6, 7) Mpo na koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bana, baboti basengeli kotunaka bango mituna mpe na nsima koyoka bango na likebi. (Mas 20:5) Ekoki mpe kosɛnga ete baboti bázongela likambo moko mbala na mbala liboso ete bana bákanga ntina mpe básalela yango.
Ya solo baboti basengeli kozala na motema molai, kasi basengeli kokanga miso na mabe te. Yehova apesá baboti bokonzi ya kotyela bana mibeko mpe kopesa bango disiplini ntango babuki mibeko yango.—Mas 6:20; 23:13.
Tángá Baefese 4:31. Na nsima tuná bayangani boye:
Mpo na nini baboti basengeli te kopesaka bana disiplini na nkanda?
Tángá Bagalatia 6:7. Na nsima tuná bayangani boye:
Mpo na nini ezali na ntina ete baboti báteyaka bana ete kosala makambo ya mabe ekobimisela bango mikakatano?
Lakisá VIDEO ‘Na motema molai, bókangelanaka motema na bolingo’—Bana na yo. Na nsima tuná bayangani boye:
Mateya nini ozwi na video yango?
8. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi,” maloba ya ebandeli ya eteni 1, mpe liteya 1